Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w13 1/12 lok. 16
  • Biyano na mituna ya Biblia

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biyano na mituna ya Biblia
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Masolo mosusu
  • Biyano na mituna ya Biblia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Biyano na mituna ya Biblia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Nzambe akotya guvɛrnema moko mpo na mokili mobimba?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Na ntina na Bokonzi ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
w13 1/12 lok. 16

BIYANO NA MITUNA YA BIBLIA

Mpo na nini Yesu akozonga lisusu?

Liboso Yesu Kristo amata na likoló na mobu 33 ya ntango na biso, alakaki ete akozonga lisusu. Amikokanisaki na moto moko ya lokumu oyo akei mobembo mpo na ntango molai mpe azongi na nguya nyonso mpo na koyangela lokola mokonzi. Yesu akozonga lisusu mpo bato bázwa guvɛrnema ya malamu.​—Tángá Luka 19:11, 12.

Yesu akotyela bato guvɛrnema ya malamu

Yesu akozonga na nzoto ya ndenge nini? Asekwaki na nzoto ya elimo. (1 Petro 3:18) Na nsima, azongaki na likoló mpe afandaki na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe. (Nzembo 110:1) Bambula mingi na nsima, balekisaki Yesu liboso ya Yehova Nzambe, “Mokóló na Mikolo,” oyo apesaki ye bokonzi mpo na koyangela bato. Na yango, Yesu akozonga na nzoto ya bomoto te kasi nde lokola Mokonzi oyo tokoki komona na miso te.​—Tángá Danyele 7:13, 14.

Yesu akosala nini ntango akoya?

Ntango Yesu akoya elongo na baanzelu na ye, akosambisa bato. Akoboma bato mabe, kasi akopesa baoyo bandimi ete azala Mokonzi na bango bomoi ya seko.​—Tángá Matai 25:31-33, 46.

Boyangeli ya Yesu ekokómisa mabele paradiso. Akosekwisa bakufi mpo bázala na bomoi na paradiso yango awa na mabele.​—Tángá Luka 23:42, 43.

Mpo na koyeba makambo mosusu, talá nkasa 73 tii 85 ya buku oyo, Biblia eteyaka mpenza nini?, ebimisami na Batatoli ya Yehova

Okoki kozwa yango na Internet na www.jw.org

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto