Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w14 1/2 nk. 5-7
  • Moto oyo abimisaka bitumba mpe bampasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Moto oyo abimisaka bitumba mpe bampasi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • ELEMBO YA MIKOLO YA NSUKA
  • MISALA YA SATANA EKOBUKANA
  • Batambwisi-mpunda minei yango bazali banani?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2017
  • Mpunda minei ezali kopota mbangu
    Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi!
  • Ndenge nini toyebi ete tozali kobika na “mikolo ya nsuka”
    Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?
  • Bankóto ya bamiliare ekei mpo na bitumba​—Bongo bomoi ya bato?
    Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
w14 1/2 nk. 5-7

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | ETUMBA OYO EBONGOLAKI MOKILI

Moto oyo abimisaka bitumba mpe bampasi

Etumba ya Liboso ya mokili mobimba esilaki na sanza ya 11/1918. Matata esilaki mpe bato babinaki na babalabala. Kasi esengo yango ezalaki ya ntango mokuse. Eumelaki te, likama mosusu ebimaki mpe yango ezalaki mabe koleka masasi.

Na France, na sanza ya 06/1918, basoda mingi babɛlaki maladi babengi grippe espagnole. Eumelaki te, bato bamonaki ete maladi yango ezalaki mabe mpenza. Na ndakisa, kaka na mwa basanza, ebomaki ebele ya basoda ya Amerika oyo bazalaki na France koleka kutu baoyo bakufaki na masasi. Mpe ntango etumba esilaki, basoda oyo bazongaki na bikólo na bango bamemaki maladi yango mpe epalanganaki nokinoki na mokili mobimba.

Mwa bambula nsima ya etumba yango, nzala ekɔtaki mpe nkita ebebaki. Nzala ekɔtaki na bikólo mingi ya Mpoto ntango matata yango esilaki na 1918. Na 1923, mbongo ya ekólo Allemagne esilaki valɛrɛ. Mbula motoba na nsima, nkita ya mokili mobimba ebebaki. Nsukansuka, na 1939, Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebandaki​—emonanaki lokola ete matata wana ya liboso ekobaki. Nini mpenza ebimisaki bitumba yango oyo esalemá naino liboso te?

ELEMBO YA MIKOLO YA NSUKA

Bisakweli ya Biblia esalisaka biso tóyeba nini ebimisaki makambo mosusu oyo esalemaki na ntango ya kala, ata mpe oyo etali Etumba ya Liboso ya mokili mobimba. Yesu Kristo asakolaki ete ekozala na ntango moko oyo “ekólo ekobunda na ekólo,” nzala mpe bamaladi mabe ekozala na mokili mobimba. (Matai 24:3, 7; Luka 21:10, 11) Ayebisaki bayekoli na ye ete makambo wana ekomonisa elembo ya mikolo ya nsuka. Mokanda ya Emoniseli elobeli makambo mosusu oyo emonisi ete mpasi etondi awa na mabele mpo na etumba oyo ebimaki na likoló.​—Talá etanda “Etumba na mabele mpe na likoló.”

Mokanda yango ya Biblia elobeli mpe bampunda minei, oyo na bantango mosusu babengaka yango bampunda minei ya Emoniseli. Bampunda yango misato emonisi makambo ya mpasi oyo Yesu autaki kolobela​—etumba, nzala mpe maladi mabe. (Talá etanda “Mpunda minei ezali mpenza kopota mbangu?”) Na yango, Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ebandisá eleko moko ya mpasi oyo ezali se kokoba. Mpe Biblia emonisi ete Satana nde azali mobandisi ya bampasi wana nyonso. (1 Yoane 5:19) Bokonzi na ye ekosuka mokolo mosusu?

Mokanda ya Emoniseli emonisi biso lisusu ete Satana azali na “ntango mokuse.” (Emoniseli 12:12) Yango wana azali na nkanda makasi mpe azali kobimisa bampasi mingi awa na mabele. Na yango, bampasi oyo tozali komona emonisi ete mikolo ya Satana etikali ya kotánga.

MISALA YA SATANA EKOBUKANA

Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ekɔtisaki mbongwana monene. Yango ebandisaki eleko moko ya bitumba, bato bakómaki kotomboka mpe kotyela lisusu bakonzi motema te. Emonisaki mpe ete babenganaki Satana kuna na likoló. (Emoniseli 12:9) Mokonzi yango oyo amonanaka te, oyo azali koyangela mokili asalaka makambo lokola mokonzi moko ya mabe oyo azali konyokola bato mpo ayebi ete mikolo na ye etikali ya kotánga. Ntango mikolo yango ekokóma na nsuka, bampasi oyo Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ebimisá ekosila.

Na kotalela bisakweli ya Biblia, osengeli mpenza kondima ete Yesu Kristo, Mokonzi na biso ya likoló “akobukabuka misala ya Zabolo.” (1 Yoane 3:8) Bamilio ya bato babondelaka ete Bokonzi ya Nzambe eya. Yo mpe osalaka yango? Na nzela ya Bokonzi yango, bato ya sembo bakomona ndenge mokano ya Nzambe ekosalema na mabele, kasi oyo ya Satana te. (Matai 6:9, 10) Na Bokonzi ya Nzambe, Etumba ya Mokili mobimba ekozala lisusu te​—ata mpe bitumba mosusu nyonso! (Nzembo 46:9) Luká koyeba makambo mosusu oyo etali Bokonzi yango mpo ozala ntango oyo kimya ekozala na mokili mobimba!​—Yisaya 9:6, 7.

Etumba na mabele mpe na likoló

Basiɛklɛ soki 19 liboso ete Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ebanda, Satana alakaki kopesa Yesu “makonzi nyonso ya mokili.” (Matai 4:8, 9) Yesu akweaki na motambo yango te, mpe na nsima amonisaki ete Zabolo nde azali “mokonzi ya mokili oyo.” (Yoane 14:30) Lisusu, ntoma Yoane akomaki ete “mokili mobimba ezali kolala na nguya ya moto mabe.”​—1 Yoane 5:19.

Soki Satana Zabolo nde azali na bokonzi mingi na mokili oyo, ebongi mpenza tóloba ete ye nde abimisaki Etumba ya Liboso ya mokili mobimba mpe makambo oyo yango ebimisaki. Yango wana, mokanda ya Emoniseli emonisi ete bampasi mingi oyo enyokoli mokili kobanda 1914 eutaka epai ya Satana. Talá mwa makambo oyo Emoniseli mokapo 12 elobi:

  • Vɛrsɛ 7 Etumba ebimaki na likoló, kati na Mikaele (Yesu Kristo) mpe dalagona (Satana).

  • Vɛrsɛ 9 Zabolo, “oyo azali kokosa mabele mobimba esika bato bafandi,” abwakami na mabele.

  • Vɛrsɛ 12 “Mawa na mabele mpe na mbu, mpo Zabolo akiteli bino na nkanda makasi, mpo ayebi ete azali na ntango mokuse.”

Kolandana ya badati ya Biblia mpe makambo oyo ezali kosalema na mokili emonisi ete etumba yango ebimaki nsima ya kotyama ya Bokonzi ya Nzambe na likoló na 1914.a Na yango, kaka na mbula yango nde etumba ebimaki na likoló mpe na mabele.

a Talá mokapo 8 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.

Mpunda minei ezali mpenza kopota mbangu?

Mpunda ya langi ya mpɛmbɛ mpe mokonzi oyo azali na likoló, oyo azali kotambwisa yango

Mpunda ya mpɛmbɛ, oyo motambwisi na yango azali mokonzi na likoló. Yesu Kristo, Mokonzi yango, azali kotambwisa yango mpo na kobundela boyengebene. (Nzembo 45:4) Mokumba na ye ya liboso ezali ya kobengana Satana ná bademo na ye na likoló.​—Emoniseli 6:2; 12:9.

Mpunda ya motane mpe basoda na esika ya bitumba

Mpunda ya motane ngwaa, oyo motambwisi na yango azali na bokonzi ya “kolongola kimya na mabele.” (Emoniseli 6:4) Kobanda 1914 bitumba ezali konyokola bato ntango nyonso. Kaka mbula 21 nsima ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebimaki mpe ebomaki bato mingi koleka. Balobi ete Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebomaki bato soki milio 60. Kobanda 1945 bitumba ebimaka na bisika ndenge na ndenge kasi ezalaka kaka mabe. Bato mosusu ya istware balobi ete bato koleka milio 100 bakufaki na bitumba na boumeli ya siɛklɛ ya 20.

Mpunda ya moindo mpe bana mingi oyo bazali kokufa nzala

Mpunda ya moindo, oyo motambwisi na yango azali na emekeli-kilo na lobɔkɔ mpo na komonisa nzala. (Emoniseli 6:5, 6) Na Allemagne, bato soki 750 000 bakufaki na nzala na boumeli ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, mpo basoda ya bikólo mosusu baboyaki bilei ekɔta na ekólo yango. Na 1921, bato koleka milio mibale bakufaki na nzala na Russie, mpe makambo ya ndenge wana esalemaki mpe na bisika mosusu. Na yango, bato milio soki 70 bakufaki na nzala na boumeli ya siɛklɛ ya 20. Mbula na mbula, bana koleka milio misato oyo bakokisi naino mbula mitano te bákufaka mpo na kozanga kolya malamu.

Mpunda ya langi ya mai ya mpondu mpe bato oyo bazali kobɛla

Mpunda ya langi mwa moke lokola mai ya mpondu, oyo motambwisi na yango azali komema liwa ná bolɔzi ya liwa. (Emoniseli 6:8) Grippe espagnole ezalaki maladi ya mabe mpenza na siɛklɛ ya 20. Atako motángo oyo epesami ekeseni mpenza, kasi bamosusu balobi ete maladi yango ebomaki bato soki milio 50. Buku moko (Man and Microbes) elobi boye: “Maladi yango ezalaki moko ya bamaladi oyo eleki mabe oyo ebimá naino te. Ata maladi ya babibɔ ebomaki bato mingi nokinoki ndenge wana te.” Maladi ya kolokoto, malaria mpe kɔsukɔsu ya ntolo ezali maladi oyo ebomaki bamilio ya bamilio ya bato na boumeli ya siɛklɛ ya 20.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto