Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w14 15/6 nk. 8-11
  • Ndenge nini kosalisa bandeko oyo libala ekufá?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge nini kosalisa bandeko oyo libala ekufá?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • KOTUNGISAMA NA MAKANISI NDENGE NA NDENGE
  • KOBUNDA MPO NA KOBATELA MAKANISI MALAMU
  • NTANGO OZALI KOMIYOKA LOKOLA OZALI KAKA YO MOKO MPE BASUNDOLI YO
  • Ndenge ya kokende liboso ata soki libala ekufi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Nini ekoki kokómela bana soki baboti babomi libala?
    Lisalisi mpo na libota
  • Makambo minei oyo osengeli koyeba na oyo etali koboma libala
    Lamuká!—2010
  • Nzambe abengi bino mpo na kimya?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
w14 15/6 nk. 8-11

Ndenge nini kosalisa bandeko oyo libala ekufá?

Mwasi moko azali kobɔndisa ndeko moko ya mwasi oyo libala na ye ekufaki

Ekoki kozala ete oyebi moto moko to bato ebele oyo babomá mabala. Ezali bongo mpo bato bazali koboma mabala mingi. Na ndakisa, ankɛtɛ moko oyo esalemaki na Pologne emonisi ete bato ya mbula 30 oyo basali mbula kobanda misato tii motoba na libala, mbala mingi babomaka libala mpe kaka bato ya mbula wana te nde bazali koboma mabala.

Ebongiseli moko oyo etalelaka makambo ya mabota na Espagne elobi ete “bolukiluki oyo esalemi emonisi ete [na Mpoto], soki bato 100 babalani, 50 na bango bakoboma libala.” Ezali mpe bongo mpo na bikólo mosusu ya bozwi.

KOTUNGISAMA NA MAKANISI NDENGE NA NDENGE

Koboma libala ezali likambo moko oyo esalemaka mingi. Kasi nini esalaka ete likambo wana ya mawa esalema? Mwasi moko oyo apesaka toli na makambo etali mabala na Mpoto ya Ɛsti alobaki boye: “Koboma libala emonisaka polele makambo mabe oyo ezalaki kosalema liboso. Makambo yango ekoki kozala ete boyokani ebebaki mpe babalani bakabwanaki, mpe makambo wana epesaka mpasi mingi na makanisi.” Mwasi yango abakisaki boye: “Soki bato babomi libala, mitungisi lokola oyo eyaka mbala mingi na nsima: moko ya babalani akoki kokóma nkandankanda, mawamawa, komiyoka ete asundolami, elikya ezali lisusu te mpe nsɔninsɔni.” Babalani mosusu kutu bakómaka na likanisi ya komiboma. “Soki libala ebomami na tribinale, likambo mosusu elandaka na nsima. Lokola azali komitungisa ete atikali ye moko, moto oyo abomi libala akoki komituna boye: ‘Nakómi mpenza nani sikoyo lokola nabomi libala? Ntina na ngai mpenza na bomoi ezali nini?’”

Ntango akanisaki ndenge oyo ayokaki na mwa bambula oyo elekaki, mwasi moko na nkombo Ewa alobi boye: “Nsima ya kokata ete tobomi libala, nayokaki mpenza nsɔni, mpo na nsima bato ya kartye mpe baninga na ngai bakobanda kobenga ngai ‘abomá libala.’ Nazalaki na nkanda makasi. Natikalaki na bana mibale, mpe esengelaki nakokisa epai boye mokumba ya mama mpe epai boye mokumba ya tata.”a Ndeko Adam azalaki nkulutu na boumeli ya mbula 12 mpe bandeko bazalaki komemya ye mingi. Kasi alobi boye: “Na ntango moko boye, nabungisaki limemya oyo bandeko bazalaki kopesa ngai mpe nakómaki nkandankanda, mpe nabandaki kokóma mosika na moto nyonso.”

KOBUNDA MPO NA KOBATELA MAKANISI MALAMU

Nsima ya komitungisa soki bomoi na bango ekozala ndenge nini, bato mosusu oyo babomaki libala, babundaki mpo na kozongela makanisi malamu, ata bambula ebele nsima ya koboma libala. Bakoki mbala mosusu kokanisa ete basusu bamibanzabanzaka te mpo na bango. Lisusu, mopanzi-nsango moko oyo alobelaka makambo ya libala alobi ete esɛngaka bato yango “bábongola bizaleli na bango mpe báyekola ndenge ya kolonga mikakatano na bango.”

Ndeko Stanisław alobi boye: “Ntango tobomaki libala, mwasi wana oyo nazalaki na ye aboyaki ete nakendeke kotala bana mibale ya basi oyo tobotaki. Yango etindaki ngai nakanisa ete ata moto moko te azali komibanzabanza mpo na ngai, ata Yehova mpe asundoli ngai. Bomoi ekómaki bololo. Na nsima, nayaki komona ete nazalaki mpenza na makanisi ya malamu te.” Wanda, mwasi moko oyo abomaki libala azalaki mpe komitungisa soki bomoi na ye ekozala ndenge nini. Alobaki boye: “Nakanisaki ete nsima ya mwa ntango, bato mosusu, ezala mpe bandeko ya lisangá bakosalisa ngai ná bana te. Kasi, namoni sikoyo ndenge bandeko mingi bazalaka na biso ntango nyonso mpe basalisaka biso na milende oyo nazali kosala mpo na kobɔkɔla bana mpo bákóma basambeli ya Yehova.”

Makambo oyo bandeko oyo balobi emonisi ete nsima ya koboma libala, bato yango bakómaka na makanisi mingi ya mabe. Bakoki kobanda komimona ete bazali na ntina te, bazali mpamba mpe babongi te kotyelama likebi. Bakoki mpe mbala mosusu kobanda koloba mabe mpo na bato oyo bazali zingazinga na bango. Bakoki mpe kobanda kokanisa ete lisangá ezali malilimalili mpe ekipaka te makambo ya bandeko oyo bazali na mpasi. Kasi, bandakisa lokola oyo ya Stanisław mpe Wanda emonisi ete bato oyo babomá mabala bakoki komona ete bandeko na bango mibali mpe basi bamibanzabanzaka mpenza mpo na bango. Na ntembe te, bandeko ya lisangá basungaki mingi, ata soki lisalisi na bango emonanaki te na ebandeli.

NTANGO OZALI KOMIYOKA LOKOLA OZALI KAKA YO MOKO MPE BASUNDOLI YO

Tosengeli kobosana te ete ata soki tosali milende ndenge nini mpo na kosalisa bato oyo babomá libala, bakobanda kaka na bantango mosusu komiyoka ete bazali bango moko. Bandeko basi oyo mabala na bango ekufá bakoki kokanisa ete kaka bato moke nde bamibanzabanzaka mpo na bango. Alicja alobi boye: “Mbula mwambe eleki banda tobomaki libala. Kasi, namimonaka mpamba. Na bantango wana, nazalaka na makanisi ya kobendana na kwɛ na ngai mpe nabandaka kolela mpe komiyokela mawa.”

Atako makambo oyo elobelami awa emonanaka mingi epai ya bato oyo babomá libala, Biblia epesi toli ete ezali mabe komitangola na basusu. Moto oyo akoboya kolanda toli yango, akoki komonisa ete aboyi “makambo nyonso ya bwanya.” (Mas. 18:1) Kasi, ndeko mwasi oyo azali komiyoka ete azali kaka ye moko asengeli koyeba ete asengeli te ntango nyonso kolukaka toli to libɔndisi kaka epai ya ndeko mobali, ezali mpe bongo mpo na ndeko mobali. Na yango, litomba moko te ekomonana soki tobandi kokolisa makanisi ya lolango epai ya moto ya ndenge wana.

Bandeko na biso oyo mabala ekufá bakoki kotungisama mingi na makanisi ndenge na ndenge, bakoki kobanda komituna mpo na bomoi na bango, mpe komiyoka ete bazali kaka bango moko to basundolami. Soki tozali koyeba ete bato mingi bayokaka bongo mpe ezalaka mpasi mpo na kolonga yango, tosengeli komekola Yehova mpe tosengeli kosunga mpenza bandeko yango. (Nz. 55:22; 1 Pe. 5:6, 7) Tokoki mpenza kozala na elikya ete bakosepela mingi na lisalisi nyonso oyo tokopesa bango. Mpe na ntembe te, bakomona mpenza ete lisangá ezali na baninga ya solosolo oyo bakoki kosalisa bango!​—Mas. 17:17; 18:24.

a Bankombo mosusu topesi bango kopesa.

Monisá bokatikati ntango libala ekufi

Basaleli ya Yehova bazwaka libala na motuya mpenza. Ezali bongo mpo tolandaka mpenza makambo oyo Biblia elobaka mpo na yango. Na ndakisa, na mokanda ya Malaki 2:16, tozali kotánga likanisi oyo Nzambe amonisi polele ete: ‘Nayini koboma libala.’ Ntina kaka moko oyo babalani bakoki koboma libala ezali soki moko asali ekobo. Na yango, ezali mpenza mabe makasi kokóma na likanisi ya koboma libala mpo na ntina oyo Makomami epesi nzela te, mpo tokanaki liboso kobalana na moto mosusu.​—Eba. 2:22-24; Mib. 5:21; Mat. 19:4-6, 9.

Kasi soki libala ekufi mpo moko ya babalani oyo azali mokristo asalaki ekobo, bandeko ya lisangá basalisaka mingi. Bakomekola Yehova soki basali nyonso oyo bakoki mpo na kosalisa bayengebene wana oyo ‘elimo na bango etutami’ mpo na mwa ntango.​—Nz. 34:15, 18; Yis. 41:10.

NDENGE NINI OKOKI KOSALISA?

Okoki mpenza kopesa lisungi mingi? Okoki kosala nini mpo na kosalisa moto oyo azali kotungisama na makambo lokola oyo tolobeli na lisolo oyo? Talá oyo Biblia elobi, mpe moná ndenge bakristo mosusu ya sembo bapesaki lisalisi oyo esengeli.

Zalá moyoki malamu. (Mas. 16:20, 23)

Osengeli koyeba ete nsima ya koboma libala, ntango mosusu moto yango akoki koboya kolobela makambo nyonso oyo esalaki ete libala ekufa. Mpe koluka koyeba ndenge moto azali koyoka ekoki komema litomba te mpe ekoki kutu te kokitisa mitungisi na ye. (Mas. 12:25; Rom. 12:15) Michał, oyo asalisaki Adam, oyo tolobelaki liboso alobi ete osengeli komitya na esika ya moto yango, kozala moyoki malamu, mpe koluka te koyeba makambo nyonso: “Nasalisaki Adam amona ete na ntango oyo azali kotungisama na makanisi, mpe soki makanisi mabe etondeli ye, akoki kozanga koyeba koyebisa ngai likambo moko oyo na nsima akoki kokanisa ete alobaki te.” Na yango, Michał amonisi polele ete alukaki te koyeba makambo na ye nyonso. Kasi, azalaki koyoka ye lokola moninga mpenza. Tokoki kosala makambo ya malamu ezala liboso to nsima ya makita, mpe tokoki koloba maloba lokola: “Ozali malamu? Nakanisi ete ozali kotungisama. Yebá ete nazali wana mpo na kosalisa yo.”

Monisá ete otyelaka ye likebi. (Flp. 2:4)

Ndeko Mirosław alobi boye: “Ngai ná mwasi na ngai tosalá programɛ mpo na kosalisa ndeko mwasi moko oyo libala ekufá. Na ndakisa, tobongisaki fungola ya porte na ye. Tokendeki mpe kotika ye epai ya monganga.” Makambo wana ekoki komonana minene te; nzokande ezalaki na ntina mpe esalisaki mingi. Ndeko mwasi yango oyo bandeko wana basalisaki, azongelaki makasi mokemoke. Kutu likambo eleki ntina, abandaki mosala ya mobongisi-nzela mpe mwana na ye ya mwasi ya mbula 11 azwaki batisimo.

Babalani oyo bazali komibanzabanza mpo na ndeko mwasi oyo libala ekufaki

Monisá moto wana oyo libala ekufi ete Yehova ayebi malamu mpasi na ye.

Soki moto moko azali komona ete azali na ntina te, okoki kosalisa ye amona ete Nzambe alingaka mosaleli na ye mokomoko. ‘Toleki mpenza bakɛngɛli-mboka ebele na motuya,’ mpe koleka bikelamu nyonso, biso bato tozali mpenza na motuya na miso na ye. (Mat. 10:29-31) “Yehova azali moto oyo atalaka mitema malamumalamu” mpe na ndenge yango, azali na likoki ya koyeba makambo oyo bato babomá libala bazali na yango. Akosundola ata moke te mosaleli na ye moko ya sembo. (Mas. 17:3; Nz. 145:18; Ebr. 13:5) Na yango, ntango ozali kosalisa moto oyo libala ekufi, monisá ye ete Nzambe asepelaka mingi na bolingo oyo azali na yango mpo na solo mpe milende oyo azali na yango mpo na kopesa mabɔkɔ na losambo ya solo.​—Flp. 2:29.

Lendisá moto oyo libala ekufi ete amitangola te na lisangá.

Ntango batungisami makasi na makanisi ndenge na ndenge, basusu bamonaka mpasi kokende na makita. Nzokande, makita epesaka makasi to elendisaka; ntina na yango ezali “mpo na kotonga.” (1 Ko. 14:26; Nz. 122:1) Mpo na likambo yango, ezali na ntina mingi ete bankulutu bázala bato ya liboso. Wanda, oyo tolobelaki liboso alobi ete: “Tobosanaka te ndenge basalisaki biso.”

Lendisá moto yango oyo libala ekufi ete abondelaka, ayekolaka mpe amanyolaka mpo boyokani na ye ná Nzambe ekóma makasi. (Yak. 4:8)

Atako Yehova azali Mozwi-na-Nguya-Nyonso mpe afandaka na likoló, kasi atyaka likebi epai ya “moto ya mpasi mpe oyo elimo na ye ezali na mawa mpe oyo azali kolɛnga mpo na liloba na [ye.]” Kitisá moto oyo libala ekufi motema na vɛrsɛ oyo, mpe bendá likebi na ye ete kobondela Nzambe mpe koyekola, esalisaka mokomoko na biso apusana penepene na Nzambe.​—Yis. 66:2.

Okoki kosɛnga ye ete bóbima na mosala ya kosakola to bóbongisa makita elongo.

Bandeko mibale ya mibali bazali kosakola elongo

Yango ekosalisa ndeko yango amiyoka ete azali ye moko te mpe akozala na makasi ya kokoba nzela ya bomoi. Marta, oyo asalisaki ndeko mwasi moko ya molende, oyo elimo na ye etutamaki nsima ya koboma libala, alobi boye: “Tobimaka mingi na mosala ya kosakola elongo. Ememelaka biso esengo ntango tokokisi mikano oyo tomityelaki. Ntango mosusu tobongisaka makita elongo, mpe mbala mosusu tolambaka mwa eloko ya kolya.”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto