Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w14 1/12 lok. 16
  • Biyano na mituna ya Biblia

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biyano na mituna ya Biblia
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Masolo mosusu
  • Biyano na mituna ya Biblia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Epai wapi tokoki kozwa biyano na mituna minene etali bomoi?
    Epai wapi tokoki kozwa biyano na mituna minene etali bomoi?
  • Makambo mosusu oyo ekoki kosalisa libota
    Lamuká!—2018
  • Bampasi ekosila mokolo mosusu?
    Bampasi ekosila mokolo mosusu?
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
w14 1/12 lok. 16

BIYANO NA MITUNA YA BIBLIA

Ndenge nini bana bakoki koyekola kolinga Nzambe?

Moboti moko azali kosalela biloko oyo Nzambe akelá mpo na koteya mwana na ye

Salelá mateya ya Bozalisi mpo na kosalisa bana na yo báyeba Nzambe mpe bálinga ye

Bana bakoki koyekola kolinga Nzambe kaka soki bandimisami ete azalaka mpenza mpe alingaka bango. Mpo bálinga Nzambe, basengeli koyeba ye. (1 Yoane 4:8) Na ndakisa, basengeli koyeba makambo lokola oyo: Mpo na nini Nzambe akelaki bato? Mpo na nini Nzambe atiki ete bampasi ezala? Nzambe akosala nini mpo na bato na mikolo ezali koya?​—Tángá Bafilipi 1:9.

Mpo na kosalisa bana na yo bálinga Nzambe, basengeli komona ete yo moko olingaka ye. Soki bamoni yango, na ntembe te bakolanda ndakisa na yo.​—Tángá Kolimbola Mibeko 6:5-7; Masese 22:6.

Ndenge nini okoki kosimba mitema ya bana?

Liloba ya Nzambe ezali na nguya. (Baebre 4:12) Na yango, salisá bana na yo báyeba mateya na yango ya ebandeli. Mpo na kosimba mitema ya bato, Yesu azalaki kotuna mituna, koyoka mpe kolimbola Makomami. Okoki kolanda ndakisa ya Yesu mpo na kosimba mitema ya bana.​—Tángá Luka 24:15-19, 27, 32.

Lisusu, masolo ya Biblia oyo elobeli lolenge oyo Nzambe asalelaki bato makambo, ekoki kosalisa bana na yo báyeba mpe bálinga Nzambe. Mikanda mingi oyo ebongisami mpo na bango ezali na site www.pr2711.com.​—Tángá 2 Timote 3:16.

Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 14 ya buku oyo, Biblia eteyaka mpenza nini?, ebimisami na Batatoli ya Yehova

Ezali na www.pr2711.com, to tindá mokanda na adrɛsi oyo ezali na lokasa 2 mpo na kozwa yango ofele

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto