Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w15 1/3 lok. 16
  • Biyano na mituna ya Biblia

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biyano na mituna ya Biblia
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Masolo mosusu
  • Ndenge nini tosengeli kokanisaka liwa ya Yesu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Biyano na mituna ya Biblia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Mituna na batangi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Ntina oyo tokanisaka liwa ya Nkolo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
w15 1/3 lok. 16

BIYANO NA MITUNA YA BIBLIA

Mpo na nini tosengeli kokanisaka liwa ya Yesu?

Bato bazali kosepela na bomoi na paradiso awa na mabele

Liwa ya Yesu epesi bato elikya nini mpo na mikolo ezali koya?​—Yisaya 25:8; 33:24

Banda kala, liwa ya Yesu ezalaka likambo oyo eleki ntina; akufaki mpo bato bázongela bomoi oyo Nzambe akanaki mpo na bango na ebandeli. Bato bakelamaki te mpo básalaka makambo mabe, bábɛlaka to bákufaka. (Ebandeli 1:31) Kasi lisumu ekɔtaki na mokili mpo na moto ya liboso, Adama. Yesu apesaki bomoi na ye mpo na kobikisa biso na lisumu mpe na liwa.​—Tángá Matai 20:28; Baroma 6:23.

Nzambe amonisaki mpenza ete alingaka biso na ndenge atindaki Mwana na ye na mabele mpo akufa mpo na biso. (1 Yoane 4:9, 10) Yesu ayebisaki bayekoli na ye básalaka mwa molulu oyo esɛngaki básalela limpa ná vinyo mpo na kokanisaka liwa na ye. Kosala bongo mbula nyonso ezali lolenge moko ya komonisa botɔndi na bolingo oyo Nzambe mpe Yesu bamoniselaki biso.​—Tángá Luka 22:19, 20.

Banani basengeli kolya limpa mpe komɛla vinyo?

Mbala ya liboso oyo Yesu ayebisaki bayekoli na ye bákanisaka liwa na ye, alobelaki kondimana to kɔntra. (Matai 26:26-28) Efungolelaki bango mpe mwa ndambo ya bato mosusu nzela ya kokóma bakonzi mpe banganga-nzambe elongo na Yesu na likoló. Atako bamilio ya bato bakanisaka liwa ya Yesu, kaka baoyo bazali na kondimana wana nde balyaka limpa mpe bamɛlaka vinyo.​—Tángá Emoniseli 5:10.

Ekokisi sikoyo mbula pene na 2 000 banda Yehova aponaka baoyo bakozala bakonzi. (Luka 12:32) Motángo na bango ezali moke soki tokokanisi yango na oyo ya bato oyo bakozwa bomoi ya seko na mabele.​—Tángá Emoniseli 7:4, 9, 17.

Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 5 ya buku oyo, Biblia eteyaka mpenza nini?, ebimisami na Batatoli ya Yehova

Ezali mpe na www.pr2711.com

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto