Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w15 1/5 lok. 16
  • Biyano na mituna ya Biblia

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biyano na mituna ya Biblia
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Masolo mosusu
  • Nini ekosalema na Mokolo ya Kosambisama?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Mokolo ya kosambisama ezali nini?
    Lamuká!—2010
  • Mokolo ya Kosambisama ezali nini?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Mokolo na kosambisama​—Eleko ya elikya!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
w15 1/5 lok. 16

BIYANO NA MITUNA YA BIBLIA

Mokolo ya kosambisama ezali nini?

Bato ya libota oyo bazali na esengo ya kokutana lisusu nsima ya lisekwa, na boumeli ya mbula 1 000

Mpo na nini mokolo ya kosambisama ekozala ntango moko ya esengo?

Na ntango ya kala, Nzambe asalelaki bazuzi mpo na kobikisa bato na ye na makambo ya kozanga bosembo. (Basambisi 2:18) Biblia elobeli mokolo ya kosambisama oyo ezali koya lokola ntango moko ya esengo oyo Yehova, Zuzi ya mabele mobimba, akobikisa bato na makambo ya kozanga bosembo.​—Tángá Nzembo 96:12, 13; Yisaya 26:9.

Nzambe aponi Yesu mpo bosembo esalema mpo na bakufi mpe bato ya bomoi. (Misala 10:42; 17:31) Bato mingi bakufá kozanga ete báyeba Nzambe. Na boumeli ya mokolo ya kosambisama, Yesu akosekwisa bato yango mpo bázwa libaku ya koyeba mpe kolinga Nzambe ya solo.​—Tángá Misala 24:15.

Mpo na nini mokolo yango ekoumela mbula 1 000?

Bato bakosekwa na boumeli ya mbula 1 000. (Emoniseli 20:4, 12) Bakozala na mposa ya ntango ya koyekola banzela ya Nzambe mpe kotosa ye. Na kokesana na makanisi ya bato mingi, Biblia emonisi ete bato bakosambisama na kotalela makambo oyo bakosala nsima ya lisekwa na bango.​—Tángá Baroma 6:7.

Biblia elobeli mpe mokolo ya kosambisama oyo ekoya na mbalakaka liboso ete mbula 1 000 ebanda. Babengaka mokolo yango mpe nsuka ya mokili ndenge tolobeli yango na masolo ya ebandeli na zulunalo oyo. Na mokolo yango, Nzambe akoboma bato nyonso oyo batyolaka ye, bato mabe. (2 Petro 3:7) Yango wana, tosengeli kosala nyonso mpo na komonisa ete tolingaka Nzambe.​—Tángá 2 Petro 3:9, 13.

Mpo na koyeba makambo mosusu, talá lokasa 213 ya buku oyo, Biblia eteyaka mpenza nini?, ebimisami na Batatoli ya Yehova

Ezali mpe na www.pr2711.com

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto