Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w15 1/9 lok. 6
  • Tozwaka mbongo ya kotambwisa misala na biso wapi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tozwaka mbongo ya kotambwisa misala na biso wapi?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Masolo mosusu
  • Ndenge nini Batatoli ya Yehova basalelaka makabo?
    Mituna oyo bato batunaka mingi mpo na Batatoli ya Yehova
  • Mbongo mpo na mosala na biso na mokili mobimba eutaka wapi?
    Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
  • Makabo mpo na mosala ya Bokonzi
    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
  • ‘Kotondisa lobɔkɔ na likabo mpo na Yehova’
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2018
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
w15 1/9 lok. 6
Moto oyo azali kotya mbongo na kɛsi ya makabo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | BATATOLI YA YEHOVA BAZALI BANANI?

Tozwaka mbongo ya kotambwisa misala na biso wapi?

Mbula nyonso, tobimisaka mpe tokabolaka ebele ya Babiblia mpe mikanda oyo elimbolaka yango. Totongaka mpe totambwisaka misala ya bafiliale mpe ya ba-imprimeri na mokili mobimba. Ebele ya masangá na biso eyanganaka na makita ya losambo na bandako moko oyo ezalaka mindɔndɔ te kasi ya kitoko, oyo tobengaka Bandako ya Bokonzi. Nani abimisaka mbongo mpo na misala wana nyonso?

Mbongo oyo etambwisaka misala na biso eutaka na makabo oyo bato bapesaka na bolingo na bango moko. (2 Bakorinti 9:7) Na 1879, nimero ya mibale ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Siona, [ndenge bazalaki kobenga zulunalo oyo na ntango wana] elobaki boye: “Tondimi ete YEHOVA moto azali kopesa mbongo mpo na kobimisa ‘Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Siona,’ mpe lokola ezali bongo, tokoki te kosɛnga to koluka mbongo epai ya bato mpo na kobimisa yango.” Tii lelo tokangamaka kaka na ekateli yango.

Totindaka makabo yango mbala moko na babiro ya filiale na biso to totyaka yango na bakɛsi ya makabo oyo ezalaka na Bandako ya Bokonzi. Tosɛngaka dime te mpe tokɔngɔlaka mabonza te, tofutisaka mpe bato mbongo te mpo na mosala to mikanda na biso. Bafutaka biso te mpo na mosala ya kosakola, koteya na lisangá to kopesa mabɔkɔ na mosala ya kotonga bisika na biso ya losambo. Kutu, Yesu alobaki boye: “Bozwi ofele, bópesa ofele.” (Matai 10:8) Bandeko nyonso oyo basalaka na babiro ya filiale na biso mpe na biro monene ya Batatoli ya Yehova, ata mpe bandeko oyo batambwisaka misala ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba bafutamaka te.

“Ndenge esalemaka mpo na misala nyonso ya Batatoli ya Yehova, moto na moto apesaka ‘makabo’ na bolingo na ye moko mpe akataka motángo ya mbongo mpe ndenge akobanda kopesaka yango.”​—Tribinale ya Mpoto mpo na ntomo ya bato, 2011

Makabo oyo bapesaka esalelamaka mpe mpo na kosunga bandeko oyo bazwi makama. Bakristo ya liboso basungaki bandeko na bango oyo makama ekwelaki bango. (Baroma 15:26) Biso mpe tosungaka bandeko oyo bazwi makama na ndenge totongelaka bango lisusu bandako mpe bisika ya losambo, topesaka bango bilei, bilamba mpe lisalisi ya monganga.

Mwana moke ya mobali azali kosɛka

Talá video Typhon aux Philippines: une foi plus forte que l’épreuve na www.pr2711.com. (Fungolá esika bakomi QUI SOMMES-NOUS? > ACTIVITÉS)

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto