Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w15 1/9 lok. 7
  • Mpo na nini tosakolaka?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini tosakolaka?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Masolo mosusu
  • Makambo mosusu oyo ekoki kosalisa libota
    Lamuká!—2018
  • Epai wapi tokoki kozwa biyano na mituna minene etali bomoi?
    Epai wapi tokoki kozwa biyano na mituna minene etali bomoi?
  • Lisalisi mpo na koyeba mateya ya Biblia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • “Bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
w15 1/9 lok. 7
Batatoli mibale ya Yehova bazali kosakola na kartye moko

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | BATATOLI YA YEHOVA BAZALI BANANI?

Mpo na nini tosakolaka?

Ekoki kozala ete komipesa mingi na mosala ya kosakola ndako na ndako, na bisika ya bato nyonso mpe esika nyonso oyo tokoki kokutana na bato nde ekesenisaka biso mpenza na mangomba mosusu. Mpo na nini tosalaka bongo?

Batatoli ya Yehova basakolaka mpo na kokumisa Nzambe mpe koyebisa bato nkombo na ye. (Baebre 13:15) Totosaka mpe komandema oyo ya Yesu Kristo: “Bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, . . . bóteya bango bátosa makambo nyonso oyo napesi bino mitindo.”​—Matai 28:19, 20.

Longola yango, tolingaka bazalani na biso. (Matai 22:39) Toboyi te, toyebi ete bato mingi bazalaka na mangomba na bango oyo basambelaka mpe ete moto nyonso te nde asepelaka na nsango na biso. Ata bongo, tomonaka ete mateya ya Biblia ebikisaka bomoi ya bato. Yango wana tokobaka “kozanga kotika, . . . koteya mpe kosakola nsango malamu oyo etali Kristo,” kaka ndenge bakristo ya siɛklɛ ya liboso basalaki.​—Misala 5:41, 42.

Antonio Cova Maduro moto moko ya sosioloji, akomaki mpo na “milende ya Batatoli ya Yehova mpe ndenge babomaka nzoto . . . , mpo mateya ya Biblia ekóma bisika nyonso oyo bato bazali.”​—Zulunalo moko El Universal, Vénézuéla

Bato mingi oyo batángaka mikanda na biso bazali Batatoli ya Yehova te. Mpe bamilio ya bato oyo toyekolaka na bango Biblia bazali na mangomba na bango. Ata bongo, basepelaka ndenge Batatoli ya Yehova bakendaka na bandako na bango.

Toboyi te, okoki kozala na mituna mosusu mpo na Batatoli ya Yehova. Soki olingi kozwa biyano, tosɛngi yo

  • Otuna Motatoli moko ya Yehova.

  • Okɔta na site na biso www.pr2711.com.

  • Oyangana na makita na biso, oyo ezalaka ofele mpe moto nyonso akoki koyangana.

Yesu atindi bayekoli mibale na mosala ya kosakola
Ngomba oyo ezipami na nɛjɛ

Mpo na koyeba makambo mosusu etali Batatoli ya Yehova, talá video Les Témoins de Jéhovah: organisés pour proclamer la bonne nouvelle, na www.pr2711.com. (Fungolá esika bakomi PUBLICATIONS > VIDÉOS)

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto