Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w15 1/11 lok. 3
  • Ndenge nini Nzambe atalelaka bitumba?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge nini Nzambe atalelaka bitumba?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Masolo mosusu
  • Bitumba
    Lamuká!—2017
  • Ndenge Nzambe atalelaka bitumba lelo oyo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Ndenge Nzambe atalelaki bitumba na siɛklɛ ya liboso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Ndenge Nzambe azalaki kotalela bitumba na ntango ya kala
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
w15 1/11 lok. 3
Basoda, mituka ya bitumba, mpe baaviɔn oyo ebwakaka bɔmbi

ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Ndenge nini Nzambe atalelaka bitumba?

Okopesa eyano nini na motuna yango? Bato mingi bakanisaka ete Nzambe alingaka bitumba. Balobaka ete Nzambe atindaki basambeli na ye mosusu na ntango ya kala bábunda bitumba; mpe Biblia elobeli masolo yango. Kasi, bato mosusu bamoni ete Yesu, Mwana ya Nzambe ateyaki bayekoli na ye bálingaka banguna na bango. (Matai 5:43, 44) Na yango, bamonaka ete ndenge oyo Nzambe atalelaka bitumba ebongwaná mpe ete lelo oyo aboyaka bitumba.

Okanisi nini? Nzambe alingaka bitumba? Soki ɛɛ, na bitumba ya lelo, Nzambe azalaka na ngámbo ya banani? Kozwa biyano na mituna yango ekoki kobongola ndenge oyo otalelaka bitumba. Na ndakisa, soki oyebi ete alingaka bitumba mpe azali na ngámbo ya etuluku moko ya bato oyo yo olingi ete bálonga, na ntembe te, okosepela mpo okondimisama mpenza ete ngámbo na bino nde ekolonga. Kasi, okomiyoka ndenge nini soki oyebi ete Nzambe azali na ngámbo ya banguna na bino? Na ntembe te, okotalela lisusu soki okozala na ngámbo nini.

Kasi, ezali na likambo moko ya ntina mingi. Soki oyebi ndenge Nzambe atalelaka bitumba, ndenge na yo ya kotalela Nzambe ekobongwana. Soki ozali na kati ya bamilio ya bato oyo bitumba esalaka bango mpasi mingi na motema, na ntembe te okolinga koyeba soki Nzambe nde atindaka bato bábunda, andimaka bampasi oyo bitumba ebimisaka to akipaka te bampasi ya bato oyo bazali konyokwama ndenge bato mosusu bakanisaka.

Okoki kokamwa soki omoni ete eyano ya Biblia ekeseni mpenza na makanisi wana nyonso. Lisusu, tii lelo, ndenge oyo Nzambe atalelaka bitumba ebongwani te. Tótalela naino oyo Biblia elobi mpo na ndenge oyo Nzambe azalaki kotalela bitumba na ntango ya kala mpe na siɛklɛ ya liboso, ntango Yesu azalaki awa na mabele. Yango ekosalisa biso tóyeba ndenge Nzambe atalelaka bitumba lelo oyo mpe soki na mikolo ezali koya bato bakokoba kaka kobunda.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto