Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • wp16 No. 4 nk. 14-15
  • Mateya ya lingomba na yo eyokani na mateya ya Biblia?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mateya ya lingomba na yo eyokani na mateya ya Biblia?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2016
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • NDENGE YA KOKOKANISA MATEYA NA BISO NA OYO YA BIBLIA
  • Bokonzi ya Nzambe ezali nini?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Yesu Klisto azali nani?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Bokonzi ya Nzambe ezali nini?
    Makambo oyo Biblia eteyaka
  • Bindimeli ya ba Témoins de Jéhovah ezali nini?
    Bindimeli ya ba Témoins de Jéhovah ezali nini?
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2016
wp16 No. 4 nk. 14-15

Mateya ya lingomba na yo eyokani na mateya ya Biblia?

OMIBENGAKA mokristo? Soki ezali bongo, ozali na kati ya bato koleka miliare 2 oyo bamibengaka bayekoli ya Kristo; elingi koloba soki ozwi bato misato, moko na bango azali mokristo. Mangomba mingi lelo balobaka ete bazali bakristo, kasi mateya na bango ezali ndenge moko te mpe bato na bato batalelaka makambo na ndenge na bango. Boye, mateya oyo ondimaka ekoki kokesana na mateya ya bakristo mosusu. Ezali na ntina otalela mateya oyo ondimaka? Ɛɛ, mpo soki olingi ozala mokristo ya solosolo ndenge Biblia esɛngi, ezali na ntina otalela yango.

Bayekoli ya liboso ya Yesu Kristo bakómaki kobengama “bakristo.” (Misala 11:26) Mpo báyebana bongo bazalaki na mposa ya bankombo mosusu te, mpo lingomba ya bokristo ezalaki kaka moko. Bakristo nyonso bazalaki kolanda mateya mpe malako ya Yesu Kristo Mobandisi ya lingomba ya bokristo. Bongo lingomba na yo? Okanisaka ete eteyaka makambo oyo Kristo ateyaki mpe oyo bayekoli na ye ya liboso bazalaki kondima? Nini ekoki kondimisa yo? Ezali na likambo kaka moko ya kosala​—kosalela Biblia.

Tótalela likambo oyo: Yesu Kristo azalaki kotalela Makomami ete ezali Liloba ya Nzambe mpe azalaki na limemya makasi mpo na yango. Atɛmɛlaki baoyo bazalaki kotya bonkɔkɔ na bango na esika ya liboso mpe kozongisa mateya ya Biblia nsima. (Marko 7:9-13) Boye, tokoloba ete mateya ya bayekoli ya solosolo ya Yesu esengeli kouta na Biblia. Yango wana mokristo mokomoko asengeli komituna boye: ‘Mateya ya lingomba na ngai eyokani na oyo ya Biblia?’ Mpo opesa eyano na motuna yango esɛngi okokanisa mateya ya lingomba na yo na oyo Biblia eteyaka.

Yesu alobaki ete tosengeli kosambela Nzambe na solo; solo oyo ezali na Biblia. (Yoane 4:24; 17:17) Ntoma Paulo mpe alobaki ete mpo tóbika tosengeli kozwa “boyebi ya sikisiki ya solo.” (1 Timote 2:4) Yango wana ezali na ntina ete mateya na biso euta na Biblia. Mpo yango nde ekosala ete tóbika!

NDENGE YA KOKOKANISA MATEYA NA BISO NA OYO YA BIBLIA

Tosɛngi yo otánga mituna motoba oyo ezali na lisolo oyo mpe otala biyano oyo Biblia epesi na mituna yango. Talá bavɛrsɛ ya Biblia oyo ezali wana, mpe kanisá na mozindo na biyano yango. Na nsima omituna boye: ‘Mateya ya lingomba na ngai ekokani na oyo ya Biblia?’

Kosala bongo ekoki kosalisa yo oyeba soki mateya ya lingomba na yo ekokani na oyo ya Biblia. Okosepela kokokanisa mateya mosusu ya lingomba na yo na oyo Biblia eteyaka? Batatoli ya Yehova bakosepela kosalisa yo oyeba polele solo ya Biblia. Mpo na nini te osɛnga moko na bango ayekola na yo Biblia ofele? To mpe okoki kokɔta na site Internet na biso, jw.org.

1 MOTUNA: Nzambe azali nani?

EYANO: Yehova, Tata ya Yesu, azali Nzambe ya seko, Mozwi-ya-Nguya-Nyonso mpe Mokeli ya biloko nyonso.

OYO BIBLIA ELOBI:

“Topesaka ntango nyonso Nzambe Tata ya Nkolo na biso Yesu Kristo matɔndi ntango tobondelaka mpo na bino.”​—Bakolose 1:3.

“Yehova, ɛɛ Nzambe na biso, obongi kozwa nkembo mpe lokumu mpe nguya, mpo yo ozalisaki biloko nyonso.”​—Emoniseli 4:11.

Talá mpe Baroma 10:13; 1 Timote 1:17.

2 MOTUNA: Yesu Kristo azali nani?

EYANO: Yesu azali Mwana ya liboso ya Nzambe. Yesu akelamaki, yango wana azali na ebandeli. Yesu azali na nse ya Bokonzi ya Nzambe mpe atosaka ye.

OYO BIBLIA ELOBI:

“Tata aleki ngai.”​—Yoane 14:28.

“[Yesu] azali elilingi ya Nzambe oyo amonanaka te, mwana ya liboso na biloko nyonso oyo ezalisamá.”​—Bakolose 1:15.

Talá mpe Matai 26:39; 1 Bakorinti 15:28.

3 MOTUNA: Elimo santu ezali nini?

EYANO: Elimo santu ezali nguya oyo Nzambe asalelaka mpo na kokokisa mokano na ye. Ezali moto te. Bato bakoki kotonda na elimo santu mpe kozwa nguya.

OYO BIBLIA ELOBI:

“Ntango Elizabeti ayokaki mbote ya Maria, mwana na libumu na ye apumbwaki; mpe Elizabeti atondaki na elimo santu.”​—Luka 1:41.

“Bokozwa nguya ntango elimo santu ekoya likoló na bino.”​—Misala 1:8.

Talá mpe Ebandeli 1:2; Misala 2:1-4; 10:38.

4 MOTUNA: Bokonzi ya Nzambe ezali nini?

EYANO: Bokonzi ya Nzambe ezali guvɛrnema ya likoló. Yesu azali Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe. Mosika te, Bokonzi yango ekosala ete mokano ya Nzambe esalema na mabele mobimba.

OYO BIBLIA ELOBI:

“Mpe anzelu ya nsambo ayulaki kelelo na ye. Mpe mingongo ya makasi ebimaki na likoló, elobi: ‘Bokonzi ya mokili ekómi bokonzi ya Nkolo na biso mpe ya Kristo na ye, mpe akoyangela libela na libela.’”​—Emoniseli 11:15.

Talá mpe Danyele 2:44; Matai 6:9, 10.

5 MOTUNA: Bato nyonso ya malamu bakendaka likoló?

EYANO: Te. Kaka etuluku moke ya bato ya sembo, oyo babengami “etonga moke,” nde Nzambe aponi bákende likoló. Bakozala bakonzi elongo na Yesu mpo na koyangela bato.

OYO BIBLIA ELOBI:

“Bóbanga te, etonga moke, mpo Tata na bino andimi kopesa bino bokonzi.”​—Luka 12:32.

“Bakozala banganga-nzambe ya Nzambe mpe ya Kristo, mpe bakoyangela elongo na ye.”​—Emoniseli 20:6.

Talá mpe Emoniseli 14:1, 3.

6 MOTUNA: Mokano ya Nzambe mpo na bato mpe mabele ezali nini?

EYANO: Bokonzi ya Nzambe ekokómisa mabele paradiso mpe bato ya sembo bakozala na nzoto ya malamu, kimya ya libela mpe bomoi ya seko.

OYO BIBLIA ELOBI:

“Bato ya komikitisa bakozwa mabele, mpe bakosepela mpenza na kimya mingi.”​—Nzembo 37:10, 11.

“Akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala eleki.”​—Emoniseli 21:3, 4.

Talá mpe Nzembo 37:29; 2 Petro 3:13.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto