Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w16 Décembre nk. 29-31
  • Ezaleli ya boboto emonisaka bwanya

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ezaleli ya boboto emonisaka bwanya
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • EZALELI YA BOBOTO EMONISAKA BWANYA
  • “Esengo na bato na bopɔlɔ”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Motema pɛtɛɛ—Ezali na ntina nini mpo na biso?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
  • Tomilatisa bopɔlɔ
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • “Nani azali moto ya bwanya mpe ya bososoli na kati na bino?”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
w16 Décembre nk. 29-31
Ndeko moko oyo asalaka mosala ya kosalisa mibange to bibɔsɔnɔ azali kosolola na mwasi moko oyo azali na nkanda

Ezaleli ya boboto emonisaka bwanya

Toñi, ndeko mwasi moko oyo asalaka mosala ya kosalisa mibange to bibɔsɔnɔ, abɛtaki porte moko, mpe mwasi moko ayanolaki ye. Mwasi yango afingaki Toñi mpe asilikelaki ye, alobaki ete asengelaki koya banda kala mpo na kosalisa mama na ye oyo azali mobange. Nzokande, Toñi ayaki na mosala na ngonga oyo ebongi. Atako bongo, na boboto nyonso, Toñi asɛngaki mwasi yango bolimbisi mpo na likambo yango.

NTANGO Toñi ayaki mokolo mosusu, mwasi yango asilikelaki ye lisusu. Kasi, Toñi asalaki nini? Alobi boye: “Ezalaki likambo moko ya mpasi mpenza. Asengelaki te koloba na ngai mabe ndenge wana.” Atako bongo, Toñi asɛngaki lisusu bolimbisi mpe ayebisaki mwasi yango ete ayebaki mpasi oyo azalaki komona.

Soki ozalaki na esika ya Toñi, olingaki kosala nini? Olingaki komonisa ezaleli ya boboto? Elingaki kozala mpasi omipekisa mpo osilika te? Toboyi te, ekoki kozala mpasi kokanga motema na makambo lokola oyo touti kolobela. Ntango tozali na mitungisi to batumoli biso, ezalaka pɛtɛɛ te kokoba komonisa boboto.

Kasi, Biblia elendisi bakristo bámonisaka ezaleli ya boboto. Kutu, Liloba ya Nzambe emonisi ete boboto emonisaka bwanya. Yakobo atuni boye: “Nani azali moto ya bwanya mpe ya mayele na kati na bino? Alakisa misala na ye na etamboli na ye ya malamu na boboto oyo ezali komonisa bwanya.” (Yakobo 3:13) Na ndenge nini ezaleli ya boboto emonisaka bwanya oyo euti na likoló? Mpe nini ekoki kosalisa biso tómonisa ezaleli wana oyo esepelisaka Nzambe?

EZALELI YA BOBOTO EMONISAKA BWANYA

Ezaleli ya boboto ekoki kokitisa nkanda. “Eyano, ntango ezali ya boboto, elongolaka nkɛlɛ, kasi liloba oyo epesaka mpasi ematisaka nkanda.”​—Masese 15:1.

Kosilika ntango balobi to basali biso mabe ekoki se kobebisa makambo; ezali lokola kosopa petrole na mɔtɔ. (Masese 26:21) Nzokande, mbala mingi, eyano ya boboto ekitisaka nkanda. Ekoki ata kolɛmbisa motema ya moto oyo azalaki kosepela na biso te.

Ndeko Toñi amonaki yango na miso. Ntango mwasi wana ayokaki eyano ya boboto oyo Toñi apesaki ye, abimisaki mai ya miso. Alimbolaki ete mikakatano na ye moko mpe oyo ya libota elekelaki ye. Toñi apesaki litatoli ya malamu mpe mwasi yango abandaki koyekola Biblia; nyonso wana kaka mpo amonisaki ezaleli ya boboto.

Ezaleli ya boboto ekoki kopesa biso esengo. “Esengo na bato ya ezaleli ya boboto, mpo bakozwa libula ya mabele.”​—Matai 5:5.

Mpo na nini bato ya ezaleli ya boboto bazalaka na esengo? Bato mingi oyo liboso bazalaki bato ya matata bakómá na esengo mpo balatá ezaleli ya boboto. Bomoi na bango ekómá malamu, mpe bayebi ete makambo ya malamu ezali kozela bango na mikolo ezali koya. (Bakolose 3:12) Ndeko Adolfo, oyo azali mokɛngɛli ya zongazonga na Espagne, akanisi lisusu ndenge bomoi na ye ezalaki liboso ayeba solo.

Alobi boye: “Nazalaki komona ntina ya bomoi te. Nazalaki kotomboka mpambampamba, yango wana ata baninga na ngai mosusu bazalaki kobanga ngai mpo nazalaki komilakisa mpe kosilika makasi. Nsukansuka, makambo ebongwanaki. Mokolo moko nabundaki, mpe bazokisaki ngai mpota motoba na mbeli; makila ebimaki mingi, etikalaki moke nakufa.”

Kasi lelo oyo, ndeko Adolfo ateyaka basusu ezaleli ya boboto, ezala na maloba to na misala. Bato mingi basepelaka na ye mpo akómá moto ya esengo mpe ya boboto. Ndeko Adolfo alobi ete asepelaka mingi ndenge abongwaná. Mpe atɔndaka Yehova ndenge asalisaka ye amonisa ezaleli ya boboto.

Ezaleli ya boboto esepelisaka Yehova. “Zalá na bwanya, mwana na ngai, mpe sepelisá motema na ngai, mpo nazongisa monɔkɔ na ye oyo azali kotumola ngai.”​—Masese 27:11.

Zabolo, monguna monene ya Yehova, atumolaka ye ntango nyonso. Yehova akokaki mpenza kosilika mpo na matumoli wana; nzokande Biblia elobi ete Yehova azali Nzambe oyo “ayokaka nkanda noki te.” (Kobima 34:6) Soki tosali makasi tómekola Nzambe oyo ayokaka nkanda noki te mpe azali na boboto, tokomonisa ete tozali na bwanya oyo esepelisaka Yehova mingi.​—Baefese 5:1.

Mokili oyo elingaka biso te. Tokoki kokutana na bato oyo bazali “bato ya lofundo, bato ya lolendo, bato oyo bafingaka, . . . oyo bakoselaka bato makambo, oyo bazangi komipekisa, bato ya nko.” (2 Timote 3:2, 3) Kasi, yango esengeli te kopekisa mokristo amonisa ezaleli ya boboto. Liloba ya Nzambe ekundweli biso ete “bwanya oyo euti na likoló ezalaka . . . kimya, na makambo makasimakasi te.” (Yakobo 3:17) Soki tozali komonisa ezaleli ya kimya mpe tozali makambo makasimakasi te, tokomonisa ete tozali na bwanya oyo euti na likoló. Bwanya ya ndenge wana ekotinda biso tózala na boboto ntango batumoli biso, mpe ekosalisa biso tópusana lisusu penepene na Yehova, oyo bwanya na ye ezali na nsuka te.

Ndenge ya kokóma na ezaleli ya boboto

Soki moto moko azokisi yo to asaleli yo makambo na bosembo te, nini ekoki kosalisa yo osilika te mpe osala makambo na ndenge oyo ekosepelisa Yehova? Okoki komanyola na mitinda ya ntina mingi oyo elandi:

  1. 1 BOYÁ “ELIMO YA MOKILI.”​—1 Bakorinti 2:12. Bato mingi bamonaka ete boboto ezali bolɛmbu. Bakanisaka ete mpo moto azala elombe, asengeli kozala makambo makasimakasi mpe nkandankanda. Makanisi ya ndenge wana emonisaka elimo ya mokili, kasi te bwanya oyo euti na likoló. Kutu, Biblia emonisi polele ete elimo ya boboto ezali na nguya mingi. “Na motema molai nde bandimisaka motambwisi, mpe lolemo ya boboto ekoki kobuka mokuwa.”​—Masese 25:15.

    Mituna mpo na komanyola:

    Namonaka ete elimo ya boboto ezali elembo ya nguya to ya bolɛmbu?

    Nazali kosala makasi nakima “misala ya nzoto,” na ndakisa koswana mpe nkanda?​—Bagalatia 5:19, 20.

  2. 2 ZWÁKÁ NTANGO YA KOMANYOLA. “Motema ya moyengebene emanyolaka mpo na koyanola, kasi monɔkɔ ya bato mabe esopasopaka makambo ya mabe.” (Masese 15:28) Soki tolobi ntango tozali na nkanda, tokoki kobimisa maloba oyo na nsima tokoyoka mawa mpo na yango. Nzokande, soki tomanyoli liboso ya koloba, tokozwa ntango ya kobongisa makanisi na biso, koyanola na boboto, mpe yango ekosala ete moto oyo azali koyoka biso asilika te.

    Mituna mpo na komanyola:

    Kosilika nokinoki ezali na makama nini?

    Nakoki kolekisa makambo mosusu oyo ezali sembo te, kaka mpo na koluka kimya?​—Masese 19:11.

  3. 3 BONDELÁKÁ MBALA NA MBALA. Bondeláká mpo na kosɛnga elimo santu, nguya oyo eleki makasi na molɔ́ngɔ́ mobimba. (Luka 11:13) Simbá ete boboto mpe komipekisa ezali na kati ya bizaleli ya mbuma ya elimo santu ya Nzambe. Ndeko Adolfo alobi boye: “Kobondela Yehova mbala na mbala esalisaki ngai, mingimingi ntango nazalaki koyeba te nasala nini.” Ndenge moko mpe, Yehova akoyanola mabondeli ya mozindo oyo tosalaka mpo na kosɛnga ye elimo santu, soki ‘totingami na mabondeli.’​—Baroma 12:12.

    Mituna mpo na komanyola:

    Nabondelaka Yehova mbala na mbala ete atalaka motema na ngai mpe mikano na ngai?

    Nasɛngaka ye apesa ngai elimo santu mpe bwanya mpo nasalaka makambo na ndenge oyo ezali kosepelisa ye?​—Nzembo 139:23, 24; Yakobo 1:5.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto