Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w17 Juin lok. 3
  • Ozali koyeba lisusu?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ozali koyeba lisusu?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • Masolo mosusu
  • Ozali koyeba lisusu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • Ozali koyeba lisusu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Ozali koyeba lisusu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
  • Okoki kosalela Yehova ata soki babɔkɔlá yo malamu te
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
w17 Juin lok. 3

Ozali koyeba lisusu?

Otángaki na likebi banimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo euti kobima? Talá soki okoki koyanola na mituna oyo elandi:

Ntango tozwi malako na ebongiseli ya Nzambe, bakɛngɛli ya zongazonga mpe bankulutu na lisangá basengeli kosala nini?

Basengeli kotosa nokinoki. Bakoki komituna boye: ‘Nalendisaka bandeko bázala sembo epai ya Yehova? Nalandaka kozanga koumela malako oyo ebongiseli ya Nzambe epesi?’​—w16.11, lok. 11.

Ntango nini bakristo ya solo bakɔtaki na boombo ya Babilone?

Esalemaki mwa moke nsima ya liwa ya bantoma. Na ntango wana, bakonzi babandaki kobima na lisangá. Lingomba ná Leta balendisaki bokristo ya lokuta mpe balukaki kopekisa bakristo oyo bazalaki lokola blé. Kasi mwa bambula liboso ya 1914, bakristo oyo batyamaki mafuta na elimo babandaki kobima na boombo.​—w16.11, nk. 23-25.

Mpo na nini mosala ya Lefèvre d’Étaples ezalaki na ntina?

Na bambula ya 1520, Lefèvre abongolaki Biblia na Lifalanse mpo bato nyonso bákoka kotánga yango. Bandimbola oyo apesaki na bavɛrsɛ ya Biblia esalisaki Martin Luther, William Tyndale, mpe John Calvin.​—wp16.6, nk. 10-12.

Bokeseni nini ezali kati na “kokanisa bamposa ya nzoto” mpe “kokanisa na elimo”? (Baroma 8:6)

Moto oyo akanisaka bamposa ya nzoto alobelaka ntango nyonso makambo ya mosuni mpe akumisaka yango. Moto oyo akanisaka na elimo ayokanisaka bomoi na ye na makambo mpe makanisi ya Nzambe; elimo santu nde etambwisaka ye. Kokanisa bamposa ya nzoto ememaka na liwa; kokanisa na elimo ememeka na bomoi mpe kimya.​—w16.12, nk. 15-17.

Okoki kosala nini mpo na kokima mitungisi mosusu?

Yebá makambo oyo eleki ntina, kolekisa ndelo te, zwáká ntango ya kopema mwa moke na mokolo, zwá ntango ya kosepela na biloko oyo Nzambe akelá, saláká mwa masɛki, saláká ngalasisi mpe laláká mingi.​—w16.12, nk. 22-23.

“Enoka amemamaki esika mosusu mpo amona liwa te.” (Baebre 11:5) Na ndenge nini?

Ekoki kozala ete Yehova asalaki ete Enoka akufa na pɛtɛɛ nyonso kozanga ayeba ete azali kokufa.​—wp17.1, nk. 12-13.

Mpo na nini bopɔlɔ ezali kaka na ntina mingi?

Moto ya bopɔlɔ amiyebaka mpe ayebaka ete ezali na makambo mosusu oyo azali na makoki ya kosala te to azali na ndingisa ya kosala te. Tosengeli koyeba oyo etamboli na biso ekosala basusu mpe tosengeli te komimona ntina mingi.​—w17.01, lok. 18.

Nini emonisi ete Nzambe akambaki lisangani ya mikóló bakambi na ntango ya bantoma, kaka ndenge azali kokamba Lisangani ya Mikóló-Bakambi lelo oyo?

Elimo santu ezalaki kosalisa bango bákanga ntina ya mateya ya Biblia. Na litambwisi ya baanzelu, bazalaki kokamba mosala ya kosakola mpe batikaki Liloba ya Nzambe etambwisa bango. Ezali mpe bongo lelo oyo.​—w17.02, nk. 26-28.

Makambo nini etindaka biso tózwa lisiko na valɛrɛ mingi?

Makambo minei oyo elandi: Nani apesaki yango, mpo na nini apesaki yango, milende oyo asalaki mpo apesa yango, mpe mposa oyo ekokisaki mpenza. Tosengeli komanyolaka makambo yango.​—wp17.2, nk. 4-6.

Nsima ya kozwa ekateli, mokristo akoki kobongola yango?

Tosengeli kokokisaka maloba na biso. Kasi, na bantango mosusu esɛngaka tótalela lisusu ekateli oyo tozwaki. Ntango bato ya Ninive babongolaki motema, Nzambe abongolaki ekateli oyo azwaki mpo na bango. Ntango toyebi makambo mosusu oyo toyebaki liboso te, ekoki kosɛnga tóbongola ekateli na biso.​—w17.03, nk. 16-17.

Mpo na nini bilobaloba ezali mabe?

Bilobaloba ekoki kongalisa likambo. Ezala tozali na elonga to te, koloba likambo moko oyo ekozokisa ebongisaka makambo te.​—w17.04, lok. 21.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto