Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w18 Mai lok. 32
  • Mbuma ya kobuka ezali beboo!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mbuma ya kobuka ezali beboo!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
  • Masolo mosusu
  • Mayele ya kosakola nsango malamu
    Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
  • Mosala ya kosakola kati na bateritware epai lisangá lizali te na mboka Paraguay, ezali kobota mbuma
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Ozalaka na teritware ya yo moko?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
w18 Mai lok. 32
Liyangani ya etúká na Ukraine, na Nyzhnya Apsha, na mobu 2012

Liyangani ya etúká na Ukraine, na Nyzhnya Apsha, na mobu 2012

Mbuma ya kobuka ezali beboo!

YESU asakolaki ete na mikolo ya nsuka mbuma ya kobuka ekozala beboo. (Matai 9:37; 24:14) Likambo ya kokamwa oyo esalemaki na Ukraine, na etúká ya Transcarpatie, emonisi bosolo ya maloba wana. Kaka na mwa bamboka misato oyo ezali zingazinga na yango, masangá ezali 50, mpe basakoli koleka 5 400.a Na bamboka yango, na bato 4 moko na bango azali Motatoli ya Yehova!

Bato na teritware yango bazalaka ndenge nini? Ndeko Vasile, oyo afandaka kuna alobi boye: “Awa bato bamemyaka Biblia, basepelaka na bosembo, bato ya libota bazalaka na boyokani, mpe balukaka mpenza kosalisana.” Abakisi: “Na bantango mosusu baboyaka bindimeli na biso. Kasi soki olakisi bango makambo oyo ezali na Biblia, bayokaka mpenza na likebi.”

Atako bongo, bandeko na biso bakutanaka mpe na mikakatano mosusu ntango basakolaka na bisika oyo basakoli bazali mingi kasi bato bazali moke. Na ndakisa, lisangá moko ezali na basakoli 134 kasi na teritware yango bandako ya bato ezali kaka 50! Basakoli basalaka ndenge nini na likambo yango?

Bandeko mingi basalaka makasi bákende kosakola esika mposa ya basakoli ezali monene. Ndeko Ionash, oyo azali na mbula 90, alobi: “Na lisangá na biso, mosakoli moko azali na ndako moko to mibale mpo na kosakola. Nasakolaka na mboka, kasi kala mingi te, ntango maladi ekómaki makasi, natambolaki lisusu kilomɛtrɛ soki 160 na teritware ya sika, esika nazalaki kosakola na monɔkɔ ya hongrois.” Basakoli basengeli kosala milende mpo na kokende kosakola na bateritware mosusu. Ndeko Ionash, abakisi: “Mpo na kozwa engbunduka, nazalaki kolamuka na ngonga ya 4 ya ntɔngɔ mpe kosakola tii na ngonga ya 18 ntango engbunduka ezongaka. Nasalaki bongo mbala misato na pɔsɔ.” Amonaki nde ete ezalaki na ntina asala milende wana nyonso? Alobi: “Nazwaki esengo mingi na lolenge wana ya mosala ya kosakola. Nazalaki na esengo ya kosalisa libota moko oyo emesanaki mpenza na bato te báyeba solo.”

Ezali solo ete moto nyonso te na masangá oyo ezali kuna azali na likoki ya kosala mobembo ya molai. Kasi basakoli nyonso, ata mpe baoyo bakómi mikolo, basalaka makasi básakola malamumalamu na teritware ya lisangá na bango. Na 2017, bandeko basalaki Ekaniseli na bamboka wana misato mpe motángo ya bayangani oyo basangisaki elekaki motángo ya basakoli mbala mibale to katikati ya bato nyonso ya bamboka yango. Na ntembe te ata soki tozali kosala esika nini, tozali kaka na “mingi ya kosala na mosala ya Nkolo.”​—1 Bakorinti 15:58.

a Bankombo ya bamboka yango ezali Hlybokyy Potik, Serednye Vodyane, mpe Nyzhnya Apsha.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto