Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • wp19 No. 1 lok. 3
  • Tokoki koyeba Nzambe?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tokoki koyeba Nzambe?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2019
  • Masolo mosusu
  • Okoki kosala nini mpo oyeba Nzambe malamu?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Oyebi malamu tata na yo ya likoló?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Nzambe azali nani?
    Makambo oyo Biblia eteyaka
  • Mateya ya solo oyo etali Nzambe ezali nini?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2019
wp19 No. 1 lok. 3
Moto moko azali kotala zamba kitoko

Tokoki koyeba Nzambe?

Bato mingi bandimaka ete Nzambe azali. Kasi, soki otuni bango soki azali ndenge nini, okozwa biyano ndenge na ndenge. Bato mosusu balobaka ete Nzambe azali zuzi moko ya makambo makasi, oyo alukaka kaka kopesa bato etumbu. Mpo na bamosusu, Nzambe alingaka bato mingi mpe alimbisaka kaka, ata soki basali mabe nini. Mpo na bamosusu mpe, Nzambe apesá biso mokɔngɔ mpe akipaka biso te. Lokola bato bazali na makanisi ndenge na ndenge, bato mosusu bamonaka ete tokoki koyeba Nzambe te.

Koyeba Nzambe ezali na ntina? Ɛɛ. Soki oyebi Nzambe malamu, ntango mosusu okotika koloba ete: “Bomoi ezali na ntina te!” (Misala 17:26-28) Soki okómi moninga ya Nzambe, akolinga yo mpe akobanda kosalisa yo. (Yakobo 4:8) Mpe, koyeba Nzambe malamu ekoki kosalisa yo ozwa bomoi ya seko.​—Yoane 17:3.

Ndenge nini okoki koyeba Nzambe? Kanisá moto moko oyo oyebi malamu, na ndakisa moninga moko ya motema. Nini esalaki ete bókóma baninga ya ndenge wana? Ekoki kozala ete obandaki naino koyeba nkombo na ye, bizaleli na ye, makambo oyo alingaka mpe oyo aboyaka, ata mpe makambo oyo asalá ná oyo azali kokana kosala, mpe bongo na bongo. Nyonso wana ebendaki yo epai na ye; na maloba mosusu, oyekolaki makambo na ye.

Ndenge moko mpe, tokoki koyeba Nzambe soki toluki koyeba makambo oyo:

  • NKOMBO YA NZAMBE NANI?

  • AZALI NA BIZALELI NINI?

  • ASALÁ MAKAMBO NINI?

  • AKOSALA MAKAMBO NINI?

  • KOYEBA YE EKOKI KOPESA YO BOLAMU NINI?

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo ekopesa biyano oyo euti na Biblia na mituna wana. Masolo na yango ekosalisa yo oyeba Nzambe mpe ekolobela bolamu oyo okozwa soki okómi moninga na ye.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto