Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • wp19 No. 1 nk. 4-5
  • Nkombo ya Nzambe nani?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nkombo ya Nzambe nani?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2019
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • MPO NA NINI NKOMBO YA NZAMBE EZALI NA NTINA?
  • NKOMBO YANGO EZALI KOMONISA NINI?
  • Nkombo ya Nzambe
    Lamuká!—2017
  • Mpo na nini tosengeli koyeba nkombo ya Nzambe
    Nkombo ya Nzambe oyo ekoumela seko
  • Mpo na nini tosengeli kosalela nkombo ya Nzambe?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Kumisá nkombo monene ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2019
wp19 No. 1 nk. 4-5

Nkombo ya Nzambe nani?

Soki olingi koyeba moto moko boye, na ntembe te likambo ya liboso oyo osalaka ezali kotuna ye, “Nkombo na yo nani?” Soki ozwi libaku ya kotuna Nzambe motuna wana, akopesa yo eyano nini?

“Ngai Yehova. Yango nde nkombo na ngai.”​—Yisaya 42:8.

Ezali mbala ya liboso oyoka nkombo yango? Soki ezali bongo, tokokamwa te mpo bato mingi oyo babongolá Biblia, batiká nkombo ya Nzambe kaka na mwa bisika moke; bamosusu kutu balongolá yango mpenza. Na esika na yango, mingi batyá titre “NKOLO.” Nzokande, nkombo ya Nzambe ezali mbala soki 7 000 na makomi ya Ebre, monɔkɔ oyo bakomaki na yango Biblia na ebandeli. Nkombo yango ekomamá na balɛtrɛ minei YHWH, mpe babongolaka yango “Yehova” na Lingala.

Nkombo ya Nzambe na Ebre na barulo ya Mbu Ekufá

Mokanda ya Nzembo na rulo ya Mbu Ekufá Siɛklɛ ya liboso T.B., EBRE

Nkombo ya Nzambe na Anglais na libongoli ya Tyndale

Libongoli ya Tyndale 1530, ANGLAIS

Nkombo ya Nzambe na Espagnol na Biblia ya Reina-Valera

Biblia ya Reina-Valera 1602, ESPAGNOL

Nkombo ya Nzambe na Chinois na libongoli ya Union

Libongoli ya Union 1919, CHINOIS

Nkombo ya Nzambe ezali na bisika ebele na makomi ya Ebre mpe ezali na mabongoli mingi

MPO NA NINI NKOMBO YA NZAMBE EZALI NA NTINA?

Ezali na ntina mpo na Nzambe ye moko. Moto moko te apesá ye nkombo yango; ye moko amipesá yango. Yehova alobaki boye: “Wana nde nkombo na ngai mpo na seko, mpe wana nde ekaniseli na ngai bileko na bileko.” (Kobima 3:15) Na Biblia, nkombo ya Nzambe ezali na bisika ebele koleka batitre na ye mosusu nyonso, na ndakisa Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, Tata, Nkolo, to Nzambe, mpe ezali na bisika ebele koleka ata nkombo ya moto mosusu nyonso lokola Abrahame, Moize, Davidi, to Yesu. Longola yango, Yehova alingi ete nkombo yango eyebana. Biblia elobi: “Mpo [bato] báyeba ete yo, oyo nkombo na yo ezali Yehova, yo moko nde Oyo-Aleki-Likoló na mabele mobimba.”​—Nzembo 83:18.

Ezali na ntina mpo na Yesu. Na libondeli ya Tata na biso, Yesu ateyaki bayekoli na ye bábondelaka Nzambe ete: “Nkombo na yo esantisama.” (Matai 6:9) Ye moko mpe abondelaki Nzambe boye: “Tata, pesá nkombo na yo nkembo.” (Yoane 12:28) Kopesa nkombo ya Nzambe nkembo ezalaki na esika ya liboso na bomoi ya Yesu; kutu, mokolo mosusu alobaki boye na libondeli: “Nayebisi bango nkombo na yo mpe nakoyebisa yango.”​—Yoane 17:26.

Ezali na ntina mpo na bato oyo bayebi Nzambe. Basaleli ya Nzambe ya ntango ya kala bayebaki ete nkombo ya Nzambe ezalaki kobatela mpe kobikisa bango. “Nkombo ya Yehova ezali ndako molai ya makasi. Moyengebene akimaka mpo na kokɔta kuna mpe azwaka libateli.” (Masese 18:10) “Moto nyonso oyo akobelela nkombo ya Yehova, akobika.” (Yoele 2:32) Biblia elobi ete bato oyo basalelaka Nzambe bakoyebana na nkombo na ye. “Mpo bato ya bikólo nyonso . . . bakotambola moto na moto na nkombo ya nzambe na ye; kasi biso . . . tokotambola na nkombo ya Yehova Nzambe na biso mpo na ntango oyo etyami ndelo te, ɛɛ seko na seko.”​—Mika 4:5; Misala 15:14.

NKOMBO YANGO EZALI KOMONISA NINI?

Nkombo yango ebongi kaka na Nzambe ye moko. Bato mingi ya mayele oyo balimbolaka maloba ya Biblia balobaka ete Yehova elimboli “Akómisaka.” Yehova Nzambe asalisaki biso tóyeba ndimbola ya nkombo na ye ntango alobaki maloba oyo epai ya Moize: “Nakozala oyo nakozala.” (Kobima 3:14) Yango elingi koloba ete nkombo ya Nzambe emonisi ete azali Mozalisi oyo akelá biloko nyonso, kasi esuki wana te. Nkombo yango ezali mpe komonisa ete akoki komikómisa mpe akoki kokómisa bikelamu na ye nyonso oyo ye alingi mpo na kokokisa mokano na ye. Batitre na ye ekoki komonisa lokumu na ye, bokonzi na ye, nguya na ye; kasi, kaka nkombo na ye Yehova, nde ezali komonisa malamumalamu oyo ye azali mpe oyo akoki kokóma.

Nkombo yango emonisi ete akipaka biso. Nkombo ya Nzambe ezali mpe komonisa ete abosanaka bikelamu na ye te, ezala biso bato. Longola yango, lokola Nzambe ayebisi biso nkombo na ye, elakisi ete alingi tóyeba ye. Kutu, azelaki te biso tótuna ye nkombo na ye; ye moko ayebisaki biso yango. Na maloba mosusu, Yehova alingi te tómona ete azali Nzambe oyo akipaka biso te; kasi alingi tóyeba ete tokoki kokóma baninga na ye.​—Nzembo 73:28.

Kosalela nkombo ya Nzambe elakisaka ete tolingi koyeba ye. Tópesa ndakisa: okoki koyebisa nkombo na yo na moto moko oyo olingi akóma moninga na yo. Okanisi nini soki moto yango azali kaka koboya kobenga yo na nkombo na yo? Na ntembe te, nsukansuka okomituna soki moto yango alingi mpenza kozala moninga na yo. Ezali mpe bongo mpo na Nzambe. Yehova ayebisi biso nkombo na ye, mpe azali kolendisa biso tóbengaka ye na nkombo yango. Ntango tozali kobenga ye na nkombo wana, tozali komonisa ete tolingi kozala baninga na ye. Kutu, atyaka likebi na “baoyo bakanisaka [to balingaka] nkombo na ye”!​—Malaki 3:16.

Nkombo ya Nzambe ezali eloko ya libosoliboso oyo moto asengeli koyeba mpo na kokóma moninga na ye. Kasi, esengeli kosuka wana te. Tosengeli mpe koyeba bizaleli ya Nzambe oyo tozali kobenga na nkombo wana.

NKOMBO YA NZAMBE NANI? Nkombo ya Nzambe ezali Yehova. Nkombo yango ebongi kaka na Ye moko mpo akoki kokokisa nyonso oyo akani

NZAMBE AUTÁ WAPI?

Bato mingi bamitunaka motuna wana. Mbala mosusu yo mpe omitunaka bongo. Na maloba mosusu, motuna yango ezali boye: Soki Nzambe nde akelá mokili mpe biloko nyonso, bongo Nzambe ye moko autá wapi?

Bato mingi ya mayele balobaka ete mokili mpe biloko nyonso ezali na ebandeli. Likanisi yango eyokani na maloba ya vɛrsɛ ya liboso ya Biblia; elobi ete: “Na ebandeli Nzambe azalisaki likoló mpe mabele.”​—Ebandeli 1:1.

Mokili ekokaki te komikela yango moko; ekokaki mpe te kobima kaka boye. Ekoki kosalema te ete eloko te ebimisa eloko. Soki eloko moko te ezalaki liboso mokili ebanda, mokili elingaki kozala te. Mpo mokili esalema, esengelaki nguya moko oyo ezalaka seko na seko ezala liboso. Yehova Nzambe, oyo azali na nguya mpe na bwanya oyo ezali na nsuka te, mpe azali na nzoto ya mosuni te nde Mozalisi ya biloko nyonso.​—Yoane 4:24.

Biblia elobi boye mpo na Nzambe: “Liboso bangomba ebotama, to obanda kobimisa mokili mpe mabele . . . libela na libela yo ozali Nzambe.” (Nzembo 90:2) Maloba wana elakisi ete Nzambe azali na ebandeli te. Yango wana, “na ebandeli” akelaki mokili.​—Emoniseli 4:11.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto