Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • wp19 No. 1 nk. 13-14
  • Nzambe akosala makambo nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nzambe akosala makambo nini?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2019
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • AKOSILISA MAKAMBO NYONSO YA MABE
  • AKOKÓMISA MABELE PARADISO
  • AKOSILISA MALADI MPE LIWA
  • AKOTYA GUVƐRNEMA YA KOKOKA
  • Bokonzi ya Nzambe ekosala makambo nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2020
  • Mokano ya Nzambe mpo na mabelé ezali nini?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Bokonzi ya Nzambe—Mpo na nini ezalaki na ntina mingi mpo na Yesu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Bokonzi ya Nzambe ezali nini?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2019
wp19 No. 1 nk. 13-14
Basaleli ya Nzambe bazali kokómisa mabele paradiso

Nzambe akosala makambo nini?

Soki okutani na mokakatano moko, tokanisi mpenza ete okolinga moninga moko asalisa yo. Lokola ezali bongo, bato mosusu balobaka ete Nzambe azali moninga te mpo bamonaka ete asalelaka bango eloko moko te. Nzokande, Nzambe asalelá biso makambo mingi mpe akosala lisusu makambo mingi mpo na kosilisa mikakatano mpe bampasi nyonso oyo tozali kokutana na yango. Akosala nini?

AKOSILISA MAKAMBO NYONSO YA MABE

Mpo na kosilisa makambo nyonso ya mabe na mokili, Nzambe akolongola moto oyo abimisaka yango. Biblia eyebisi biso moto yango ntango elobi boye: “Mokili mobimba ezali kolala na nguya ya moto mabe.” (1 Yoane 5:19) “Moto mabe” yango ezali oyo Yesu abengaki “mokonzi ya mokili oyo,” elingi koloba Satana Zabolo. (Yoane 12:31) Satana azali kotinda bato básala makambo oyo ezali kobimisa bampasi oyo tozali kokutana na yango lelo. Nzambe akosala nini?

Mosika te, Yehova akotinda Mwana na ye Yesu Kristo “abebisa nyɛɛ moto oyo akoki kopesa liwa, elingi koloba, Zabolo.” (Baebre 2:14; 1 Yoane 3:8) Kutu, Biblia elobi ete Zabolo ye moko ayebi ete “azali [to atikali] na ntango mokuse” mpo abomama. (Emoniseli 12:12) Nzambe akoboma mpe bato nyonso oyo bazali kosala mabe.​—Nzembo 37:9; Masese 2:22.

AKOKÓMISA MABELE PARADISO

Soki Mozalisi alongoli makambo nyonso ya mabe awa na mabele, akokokisa makambo oyo akanaki kosala na ebandeli mpo na bato mpe mpo na mabele. Tokomona makambo nini?

Kimya ya libela. “Bato ya komikitisa bakozwa mabele, mpe bakosepela mpenza na kimya mingi.”​—Nzembo 37:11.

Bilei ekozala beboo mpe ya malamu. “Mbuma ekozala beboo na mabele; na nsɔngɛ ya bangomba biloko ekotondana.”​—Nzembo 72:16.

Bandako ya kitoko mpe mosala ya malonga. “Bakotonga bandako mpe bakofanda kuna; mpe ya solo, bakolona bilanga ya vinyo mpe bakolya mbuma na yango. . . . Bato oyo naponi bakozwa mpenza litomba na mosala ya mabɔkɔ na bango.”​—Yisaya 65:21, 22.

Ozali na mposa ya komona makambo wana? Etikali moke ekokisama.

AKOSILISA MALADI MPE LIWA

Lelo oyo, moto nyonso abɛlaka mpe akufaka, kasi etikali moke nyonso wana esila. Lokola Yesu apesaki mbeka mpo na kolongola biso na boombo ya liwa, etikali moke Nzambe asalela mbeka yango mpo “moto nyonso oyo azali kondimela ye abomama te kasi azwa bomoi ya seko.” (Yoane 3:16) Nyonso wana ekomema nini?

Maladi ekozala lisusu te. “Moto moko te oyo afandi kuna akoloba: ‘Nazali na maladi.’ Bato oyo bafandi na mokili yango bakolimbisama libunga na bango.”​—Yisaya 33:24.

Liwa ekotungisa lisusu bato te. “Akolongola mpenza liwa mpo na libela, mpe Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso Yehova akopangwisa mpenza mpisoli na bilongi nyonso.”​—Yisaya 25:8.

Bato bakozala na bomoi ya seko. “Likabo oyo Nzambe azali kopesa ezali bomoi ya seko na nzela ya Kristo Yesu Nkolo na biso.”​—Baroma 6:23.

Bato oyo bakufá bakosekwa. “Lisekwa ekozala, ya bayengebene mpe ya bato oyo bazangi boyengebene.” (Misala 24:15) Bakozwa bolamu nyonso wana mpo Nzambe apesaki mbeka mpo na kosikola biso.

Ndenge nini Nzambe akokokisa nyonso wana?

AKOTYA GUVƐRNEMA YA KOKOKA

Mpo Nzambe akokisa mokano na ye mpo na bato mpe mpo na mabele, akosalela guvɛrnema oyo atye kuna na likoló, oyo Mokonzi na yango ezali Kristo Yesu. (Nzembo 110:1, 2) Ezali guvɛrnema to bokonzi yango nde Yesu ateyaki bayekoli na ye básɛngaka na libondeli na maloba oyo: “Tata na biso na likoló, . . . Bokonzi na yo eya.”​—Matai 6:9, 10.

Bokonzi ya Nzambe ekoyangela mabele mobimba mpe ekosilisa mabe mpe bampasi nyonso. Bokonzi yango ezali guvɛrnema eleki malamu oyo ekoki koyangela bato! Yango wana, ntango Yesu azalaki awa na mabele, amipesaki na kosakola “nsango malamu ya Bokonzi” yango, mpe ayebisaki bayekoli na ye bálanda lokolo na ye.​—Matai 4:23; 24:14.

Lokola Yehova alingaka mpenza bato, alaki kosalela bango makambo nyonso wana. Nyonso wana esengeli kotinda yo oyeba Nzambe malamu mpe opusana penepene na ye! Soki osali yango, bolamu nini okozwa? Lisolo oyo elandi ekolobela yango.

NZAMBE AKOSALA MAKAMBO NINI? Nzambe akolongola maladi mpe liwa, akotya Bokonzi oyo ekokómisa bato liboke moko, mpe ekokómisa mabele paradiso

BOKONZI YA NZAMBE EZALI NINI?

  • Ezali guvɛrnema oyo Nzambe akotya na likoló mpo na kokokisa mokano na ye.​—Ebandeli 1:28; Matai 6:9, 10.

  • Nzambe ye moko aponi Mokonzi na yango, oyo akoyangela likoló mpe mabele.​—Yisaya 9:6, 7; 11:2-4; Matai 28:18.

  • Ekotambwisama na mateya ya Yesu, oyo euti na mibeko ya Nzambe.​—Matai 22:37-39; Yakobo 2:8.

  • Ebandaki koyangela, mpe lelo oyo, bamilio ya bato bazali kosakola “nsango malamu ya Bokonzi” na mokili mobimba.​—Matai 24:14; 28:19, 20.a

a Mpo na koyeba makambo mosusu etali Bokonzi ya Nzambe mpe boyangeli na yango, talá buku Sepelá na bomoi libela na libela! liteya 32, ebimisami na Batatoli ya Yehova. Ezali mpe na Internet na www.jw.org.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto