Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • wp19 No. 3 nk. 10-11
  • Ndenge nini liwa ekolongolama?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge nini liwa ekolongolama?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2019
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • NZAMBE APESAKI LISIKO MPO NA KOLONGOLA LIWA
  • NTANGO NINI LIWA EKOLONGOLAMA?
  • Liwa na Yesu Elimboli nini mpo na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Lisiko ezali likabo ya Nzambe oyo eleki monene
    Makambo oyo Biblia eteyaka
  • Lisiko ya Klisto: Nzela ya Nzambe mpo na lobiko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Oyo Nzambe asili kosala mpo na kobikisa bato
    Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2019
wp19 No. 3 nk. 10-11
Yesu; Batye Yesu na nzete ya mpasi na katikati ya bato mabe mibale

Ndenge nini liwa ekolongolama?

ATAKO kozanga botosi ya Adama ná Eva, baboti na biso ya liboso, ememelá bato lisumu mpe liwa, yango ebongoli te mokano ya Nzambe mpo na bato. Na kati ya Liloba na ye, Biblia, Nzambe amonisi mbala na mbala ete mokano na ye ebongwani te.

  • “Bayengebene bakozwa mabele, mpe bakofanda wana seko.”​—Nzembo 37:29.

  • “Akolongola mpenza liwa mpo na libela, mpe Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso Yehova akopangwisa mpenza mpisoli na bilongi nyonso.”​—Yisaya 25:8.

  • “Liwa, monguna ya nsuka, akosilisama makasi.”​—1 Bakorinti 15:26.

  • “Liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te.”​—Emoniseli 21:4.

Ndenge nini Nzambe “akolongola mpenza liwa” to ‘akosilisa’ yango? Biblia emonisi polele ete ‘bayengebene bakofanda seko.’ Kasi elobi mpe ete “ezali na moto moko te oyo azali moyengebene na mabele oyo asalaka kaka malamu.” (Mosakoli 7:20) Yango elingi koloba ete na kokesana na oyo Biblia elobi, Nzambe azali na mposa te ete bato bátosa mibeko na ye mpo alongola liwa? Ezali bongo te! Akoki kosala bongo te, mpo “Nzambe . . . akoki kobuka lokuta te.” (Tito 1:2) Nzambe akosala nini mpo na kokokisa mokano na ye mpo na bato?

NZAMBE “AKOLONGOLA MPENZA LIWA MPO NA LIBELA.”​—YISAYA 25:8

NZAMBE APESAKI LISIKO MPO NA KOLONGOLA LIWA

Yehova Nzambe azwaki ebongiseli moko mpo na kosikola bato na liwa: apesaki lisiko. Lisiko ezali eloko oyo ekokani mpenza na valɛrɛ ya eloko oyo moto abebisi to mpo makambo esalema na bosembo. Lokola bato nyonso bazali bato ya masumu mpe bazali na etumbu ya liwa, Biblia elobi polele: “Moko na bango akoki kosikola ndeko na ye ata moke te, to kopesa Nzambe lisiko mpo na ye; (mpe ntalo ya lisiko ya molimo na bango ezali motuya moko monene mpenza yango wana ezangá mpo na ntango oyo etyami ndelo te).”​—Nzembo 49:7, 8.

Ntango moto ya kozanga kokoka akufi, akoki kofuta kaka nyongo ya masumu na ye moko; akoki te komisikola, to mpe kofuta nyongo ya masumu ya moto mosusu. (Baroma 6:7) Tosengelaki na moto oyo azali moto ya kokoka mpe azangi lisumu mpo apesa bomoi na ye, mpo na masumu na ye te, kasi nde mpo na masumu na biso.​—Baebre 10:1-4.

Yango nde likambo Nzambe asalaki. Atindaki Mwana na ye, Yesu, abotama awa na mabele lokola moto ya kokoka, elingi koloba moto azangi lisumu. (1 Petro 2:22) Yesu alobaki ete ayaki mpo na “kopesa molimo na ye lisiko na esika ya bato mingi.” (Marko 10:45) Akufaki mpo na kofuta nyongo ya masumu na biso mpe kosikola biso na liwa mpo tózwa bomoi.​—Yoane 3:16.

NTANGO NINI LIWA EKOLONGOLAMA?

Ndenge Biblia esakolaki, lelo oyo tozali na “ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano,” oyo ezali komonisa ete tokómi na “mikolo ya nsuka” ya mokili mabe oyo. (2 Timote 3:1) Mikolo ya nsuka ekosuka na “mokolo ya kosambisama mpe ya kobebisa bato oyo batyolaka Nzambe.” (2 Petro 3:3, 7) Kasi bato oyo balingaka Nzambe bakobomama te mpe bakozwa “bomoi ya seko.”​—Matai 25:46.

Bato ya mbula mpe ya loposo ndenge na ndenge

Yesu ayaki mpo na “kopesa molimo na ye lisiko na esika ya bato mingi.”​—Marko 10:45

Bamilio ya bato mosusu bakosekwa mpe bakozwa libaku ya kozala na bomoi ya seko. Yesu asekwisaki moto moko ntango akendaki na engumba ya Naine. Mwana mobali moko akufaki, mwana yango azalaki mwana se moko ya mwasi moko oyo mobali akufá, mpe Yesu ‘ayokaki mawa,’ asekwisaki mwana yango. (Luka 7:11-15) Ntoma Paulo akomaki boye: “Nazali na elikya epai ya Nzambe, elikya oyo bato oyo mpe bazalaka na yango, ete lisekwa ekozala, ya bayengebene mpe ya bato oyo bazangi boyengebene.” Elikya yango ezali komonisa bolingo monene oyo Nzambe azalaka na yango mpo na bato.​—Misala 24:15.

Bamiliare ya bato bakozwa bomoi ya seko. Biblia elobi: “Bayengebene bakozwa mabele, mpe bakofanda wana seko.” (Nzembo 37:29) Na ntango yango, bakozala mpenza na esengo mpe bakolendisama na komona kokokisama ya maloba oyo ntoma Paulo akomaki esali sikoyo soki mbula 2 000 ete: “Liwa, wapi bolongi na yo? Liwa, wapi etubeli na yo?” (1 Bakorinti 15:55) Liwa, monguna ya bato, akolongolama mpenza!

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto