Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 11/01 nk. 3-4
  • Tozwaka matomba na kotalela milende oyo tozali kosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tozwaka matomba na kotalela milende oyo tozali kosala
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • TÓMEKOLA BATO YA SEMBO:
  • TÓSALELA MAKAMBO OYO TOZALI KOYEKOLA:
  • TÓZWA MATOMBA NA BOYEKOLI YA BISO MOKO:
  • TÓPESAKA BIYANO NA MAKITA:
  • TÓLONA MINGI NA MOSALA YA KOSAKOLA:
  • Ozali mpenza kozwa litomba?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2000
  • Makita epesaka bilenge matomba
    Mosala na biso ya Bokonzi—2000
  • Mabota, bókumisa Nzambe na kati ya lisangá na Ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Aprili​—Sanza oyo tosengeli ‘kosala mingi mpe komipesa mpenza’
    Mosala na biso ya Bokonzi—2001
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2001
km 11/01 nk. 3-4

Tozwaka matomba na kotalela milende oyo tozali kosala

1 Yehova Nzambe amonisi bolingo na ye mpo na bato na ndenge mingi. Mokolo moko, Yesu alobelaki bolingo monene ya Nzambe na ntango amonisaki na ebele ya bato oyo basanganaki ete Nzambe ‘abimisaka moi na ye [mpo] na bato mabe mpe na bato malamu mpe anokisaka mbula [mpo] na bayengebene mpe na bapɛngwi.’ (Mat. 5:43-48) Mokolo mosusu, Yesu alobelaki lolenge eleki monene oyo Tata na ye amonisaki bolingo na ye: mbeka ya Mwana na ye mobotami-se-moko, oyo Nzambe apesaki mpo na lobiko na biso. (Yoa. 3:16) Yesu alendisaki bato oyo bazalaki koyoka ye ete bámonisa botɔndi mpo na bolingo ya Yehova. Tozali kosala makasi mpo na kolanda toli yango?

2 Mpo tómonisa mpenza botɔndi na bolingo ya Yehova mpe tózwela yango matomba oyo ekosuka te, tosengeli koyeba ye. (Yoa. 17:3) Tosengeli kozwa toli mpo na kosalela ye na ndenge oyo alingaka. Yehova apesi biso Liloba na ye Biblia, mpe atɛlɛmisi ebongiseli na ye ya malamu, epai tozwaka toli mpe mateya; yango emonisi mpenza ete amibanzabanzaka mpe alingaka biso. (Mat. 24:45-47; 2 Tim. 3:16, 17) Lokola tozali basaleli na ye oyo bamipesi, Yehova azali koteya biso banzela na ye. Kasi tozali nde komonisa na milende ya mokomoko na biso ete tozali mpenza na botɔndi mpo na bolingo ya Yehova? Tozali mpenza kolanda toli na ye mpo na kondimama na ye mpe kozwela yango matomba? (Yis. 48:17; Yak. 1:22) Na 1 Bakolinti 3:8 (NW), ntoma Paulo akomaki ete: “Moto oyo azali kolona mpe moto oyo azali komwangisa mai bazali moto kaka moko, kasi moto na moto akozwa mbano na ye engebene mosala na ye moko ya makasi.”

3 Ya solo, tosengeli kosala makasi mpo na kokokisa oyo Nzambe alingi ete tósala. Bato nyonso bakolaka ndenge moko te na elimo. Ezali na makambo mingi oyo ekoki kosala ete moto akola mbango na elimo to akola mbango te; yango wana ekozala likambo ya mayele te soki tozali koluka kokokanisa bokoli ya elimo ya moto oyo na oyo ya moto mosusu kuna, yango ekoki kolɛmbisa. Kasi, eloko oyo ezali na ntina mingi ezali nde milende oyo mokomoko azali kosala. Eloko nini tokoki kosala mpo na kozala penepene ya ebongiseli ya Yehova? Ezali na bisika oyo tokoki lisusu kobongisa mpo na oyo etali ndenge oyo tozali kokokisa mikumba na biso baklisto? Milende nini esengeli kosala mpo na kosimba malamumalamu misala ya lisangá? Ezali na malako mosusu oyo ebongiseli ya Nzambe ezali kopesa biso oyo tosengeli kosalela?​—1 Tim. 4:16.

TÓMEKOLA BATO YA SEMBO:

4 Esili koleka bambula mingi, bandeko mibali na bandeko basi ya sembo bazali kosakola nsango malamu ya Bokonzi. Lokola Paulo, ebongi mpenza tómekola bandeko wana ya sembo. (1 Kol. 11:1) Bamonisaki botɔndi mpo na bolingo ya Nzambe mpe bazwi matomba mingi mpo na mosala na bango makasi mpe milende oyo mokomoko asali mpo na kolanda toli ya Biblia. Na kati ya lisangá, bango nde bazali basali ya molende mpenza, bakimaka te kokokisa mikumba na bango. Tokoki komona mbuma ya mosala ya mokomoko na bango.​—Lom. 1:13; 2 Kol. 3:1-3.

5 Lelo oyo, ezali na bankóto ya bato ya sika oyo bazali koya na ebongiseli ya Yehova mbula na mbula. (Yis. 60:⁠8) Bango mpe bazali mpenza kosala makasi mpo na kokóma bato oyo bakoli na elimo, mpe ebongi mpenza kopesa bango longonya mpo na molende na bango na mosala ya kosakola. Bazali kozwa matomba na komona ndenge Yehova azali kopambola baoyo bazali kosala mingi na mosala na ye. Ndakisa ya bandeko mibali na bandeko basi oyo bakɔmeli ezali kosalisa bato ya sika bámona ete oyo ezali te ntango ya kolɛmba na mosala ya Nzambe. Ezala ete tozali basakoli ya sika to baoyo baumeli, tozali kokoba kokola na elimo, na kondimáká mikumba na biso ya boklisto mpe na kozwáká matomba na bibongiseli nyonso ya Teokrasi?

TÓSALELA MAKAMBO OYO TOZALI KOYEKOLA:

6 Bambula mingi liboso ete Yakobo akoma ete tosengeli kozala ‘bato oyo bazali kosala mosala,’ Mose ayebisaki Bayuda ete: “Bokobomba maloba . . . oyo.” (Yak. 1:25, NW; Det. 11:18) Boyebi yango moko ekokaki te. Bayuda basengelaki kobomba na mitema na bango makambo oyo ezalaki na kati ya Mibeko mpo na kotosa Yehova. Yango ezali mpe bongo mpo na biso lelo oyo. Yesu, Mwana ya Nzambe, ayebaki mpenza ntina ya kotosa. (Yoa. 8:28) Alobaki na Matai 7:24 ete: “Moto na moto oyo akoyokaka maloba na ngai mpe akotosaka yango akokokana na moto ya mayele.”

7 Tosalelaka makambo toyokaka na mayangani ya zongazonga? Tomonaka ntina oyo tosengeli kozala na ekɛngɛ mpe kobatela makanisi na biso na ntango oyo tozali na kati na yango? Toyebaka komibatela liboso ya mayele mabe ya Zabolo mpe liboso ya mitambo oyo atyaka? Tosepelaka na toli mpe na makebisi oyo ebongiseli ya Nzambe epesaka biso mbala na mbala oyo etali ntina ya kobatela bopɛto ya bizaleli mpe ya elimo na kati ya lisangá? Ndenge nini mokomoko azali kosalela makambo oyo ayekolaka?​—Yak. 1:23-25.

8 Motó ya likambo ya liyangani ya mokolo moko oyo ekosalema na mobu ya mosala oyo ya sika, euti mpenza na Makomami; elobi ete: “Bótosaka Nzambe, bótɛmɛla Zabolo.” (Yak. 4:7, NW) Yango ezali mpenza litambwisi ya malamu na mikolo oyo ya mpasi! Botosi na biso mpo na mibeko ya Nzambe esalaka ete Satana abundisa biso. Programɛ ya liyangani yango ekoteya biso ndenge ya kotɛmɛla mayele mabe oyo Zabolo asalelaka mpo na kobebisa kondima na biso. (Ebe. 2:1) Soki tolandi toli yango, mokomoko akozwa mapamboli na kotalela milende oyo azali kosala.

TÓZWA MATOMBA NA BOYEKOLI YA BISO MOKO:

9 Boyekoli ya moto ye moko esalisaka biso ete kondima na biso ezala makasi, mpe esalaka ete tósepela lisusu mingi na solo. Esalaka ete tómiyoka ete tokoki mpe esalisaka biso tóloba kozanga kobanga. Epesaka biso mayele mpe bososoli mpe esalisaka biso tólata bomoto ya sika. (Kols. 1:9-11) Nzokande, mpo na kozwa matomba na boyekoli esɛngaka ntango mpe milende; nzela ya mokuse oyo tokoki kolanda mpo na kozwa boyebi ya solo mpe kozala makasi na elimo ezali te. Matomba oyo boyekoli na biso ekopesa biso ekotalela se ntango oyo topesaka mpe milende oyo tosalaka mpo na koyekola.​—2 Kol. 9:6, 7; Gal. 6:7.

10 Pɔsɔ na pɔsɔ, tomibombelaka ntango oyo ebongi mpo na kobongisa makita ya lisangá? Yango ezali lolenge moko oyo tokoki komonisa botɔndi mpo na bilei ya elimo oyo Yehova azali kopesa biso na nzela ya moombo ya sembo mpe ya mayele. Soki tozali kobongisa malamumalamu makita ya lisangá, yango ekosalisa biso tólanda malamu programɛ ya kotánga mpe koyekola Liloba ya Nzambe. Pɔsɔ na pɔsɔ, tomibombelaka ntango mpo na kotánga Biblia ndenge yango emonisami na programɛ ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi? Esɛngaka kaka kolekisa mwa miniti mokolo na mokolo mpo na kotánga mpe komanyola likoló ya mikapo yango. Likita ya Mosala esalisaka biso tóyeba ndenge oyo tokoki kosala mpo mosala na biso ya kosakola ebimisa matomba mingi. Ntango tobongisaka likita yango, tokanisaka malamumalamu ndenge oyo tokoki kosalela makambo yango oyo tozali kotalela na mosala ya kosakola? Mpe tosalaka milende mpo na kobanda kosalela makambo yango nokinoki? Esengeli mpe kozwa bibongiseli ya sikisiki mpo na kobongisa boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe mpo na kobongisa Boyekoli ya mokanda. Tosalaka yango?

TÓPESAKA BIYANO NA MAKITA:

11 Tokoki kozwa matomba mingi na makita soki tozali kopesa biyano. Komibongisa mpo na makita mpe kosala milende mpo na kopesa biyano esalisaka biso tóyoka malamu ntango makita ezali kosalema mpe esalisaka biso tózwa matomba na biyano oyo bayangani mosusu bazali kopesa. Bandeko mingi babosanaka te milende oyo basalaki mpo na kopesa eyano mbala ya liboso na makita to milende oyo basalaki mpo na kobongisa lisolo na bango ya liboso na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi. Ata soki kobanga oyo tozalaki na yango liboso ezali lisusu te, tozali kaka kosala molende mpo bato nyonso bámona ete tozali kokola na elimo? (1 Tim. 4:15) Bato mosusu bazwaka matomba na biyano na biso mpe balendisamaka. Soki tomibongisi malamu, elingi koloba soki toyekoli liboso makambo tokotalela na makita, biyano ya ntina oyo tokopesa ekotinda bato mosusu na bolingo mpe na misala malamu.​—Ebe. 10:23-25.

12 Biyano na biso esengeli te kozala milaimilai mpe ya mindɔndɔ. Mbala mingi ezalaka malamu kosala bakomantɛrɛ ya mikuse oyo ezali kopesa mbala moko eyano na motuna oyo etunami to oyo ekomonisa polele ndenge ya kosalela vɛrsɛ moko. Soki tomibongisi malamu, tokozala na likoki ya kopesa biyano na maloba na biso moko. Soki tosali bongo, biso moko mpe bato mosusu tokozwela yango matomba mingi. Mpo na nini? Mpamba te kopesa biyano na maloba na biso moko esɛngaka biso tókanisa malamu makambo oyo tozali koloba mpe tólimbola ndenge tokangi ntina ya makanisi yango. Yango ekoki kopesa bato mosusu nzela bákanga mbala moko ntina ya lisolo oyo ezali kotalelama. Lisusu, ekosalisa biso tómikundwela makambo yango mpo na kosalela yango na libaku mosusu.

TÓLONA MINGI NA MOSALA YA KOSAKOLA:

13 Mosala na biso ya boklisto ezali eloko ya motuya mingi. (2 Kol. 4:7) Totalelaka yango bongo? Na mosala ya kosakola, tozali na libaku malamu ya komonisa kondima na biso epai ya bato mosusu. Yesu alobaki ete moto nyonso abimisaka na monɔkɔ makambo oyo etondi na motema na ye. (Luka 6:45) Molende oyo mokomoko asalaka mpo na kosakola esalaka ete tózwa matomba mingi. Yango esalaka ete tóyeba solo malamu, mpe tókóma kosalela Biblia malamu koleka. Tozali na esengo ya komemela bato mosusu mateya ya solo mpe kosalisa bango báyekola makambo na ntina na Mozalisi na bango Monene. Tozali kotatola ete Bokonzi ya Nzambe yango nde ebongi. Tozali na esengo ya koyeba ete tozali kosepelisa Yehova mpo tosalemi na elilingi na ye mpe tozali kosala mokano na ye.​—Mat. 5:48.

14 Soki mokomoko na biso azali ntango nyonso kotalela milende na ye, losambo na biso mpo na Yehova ekozala soki moke te mosala oyo tozali kosala kaka mpo tósala. Yango elimboli nini? Elimboli ete tokosala mokano ya Nzambe na mitema mibale te, tokoluka te kosalela ye mosala kaka mpo bato bámona biso to tokoluka te kosalela ye kaka moke kozanga ete tómipesa mpenza mobimba. Tosengeli kosalela Yehova na motema na biso mobimba. Komipesa mobimba na mosala na ye ezali lisɛngami oyo euti na Makomami. (Kols. 3:23, 24) Ya solo, bomoi ya moto mokomoko ekeseni na oyo ya moto mosusu, mpe Yehova asɛngaka biso te makambo oyo eleki makoki na biso. Kasi, makambo oyo tokoki kosala, azelaka ete tókokisa yango! (Mat. 22:37) Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, tozalaka na gɔigɔi, na yango ezali malamu ete mbala na mbala tómitalelaka malamumalamu mpo na koyeba bisika oyo tosengeli lisusu kobongisa na mosala na biso mpo na Nzambe. Tozalaka na momeseno ya kosala bongo?

15 Tosengeli komonisa bokɛngi soki tolingi kopesa nzela te na makambo na biso moko mpe bamposa na biso ete epekisa biso tóboma nzoto mpo na mosala ya Yehova. Tosengeli kotya bisengo, masano, mpe kominanola na esika na yango. Lisusu, tosengeli kokeba ete tómipesa mingi koleka te na mosala na biso ya mosuni. Soki tozali kotosa toli ya Yesu oyo ezali na Matai 6:22, 23, ntembe ezali te ete tokosala milende mingi mpo na kolanda matomba ya elimo mpe tokozwa matomba na kotalela milende oyo tozali kosala.

16 Wana tozali kosala milende mpenza mpo na kolata bomoto ya sika, tokondima mikumba na biso na kosaleláká toli mpe makanisi oyo tozali kozwa na makita ya lisangá, na mayangani ya mike mpe ya minene, mpe na nzela ya mikanda. Tiká ete mokomoko na biso ayekolaka na molende, apesaka biyano na makita, mpe asalaka mosala monene oyo ya kozalisa bayekoli na kotaleláká makoki na ye. Soki tozali komonisa botɔndi motindo wana mpo na bolingo ya Nzambe, tokoki kozala na elikya ya kozwa ebele ya matomba ya elimo banda lelo mpe tokobatela malamu mpenza elikya na biso ya kozala na bomoi ya seko na mokili ya sika ya Yehova.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto