Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 3/96 lok. 3
  • Bokundoli epai na mokomeli mpe mokɛngɛli na mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bokundoli epai na mokomeli mpe mokɛngɛli na mosala
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Masolo mosusu
  • Bangonga oyo esɛngami mpo na babongisi-nzela etalelami lisusu
    Mosala na biso ya Bokonzi—1999
  • Mapamboli ya mosala ya mobongisi-nzela
    Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • Biyano na mituna na bino
    Mosala na biso ya Bokonzi—2010
  • Tolendendela kati na mosala ya pion­nier
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1996
km 3/96 lok. 3

Bokundoli epai na mokomeli mpe mokɛngɛli na mosala

Mbula na mbula, liyebisi libimaka kati na Mosala na biso ya Bokonzi ya Febwáli, esɛngaka na mokomeli mpe na mokɛngɛli na mosala ete ‘bátalela mosala ya babongisi-nzela ya sanza na sanza nyonso.’ Ntina ya botaleli yango oyo esengeli kosalema na sanza oyo ya Mársi ezali nini? Koyeba nani akozala na mposa ya lisungi mpo na kokokisa motuya na ye ya bangonga na nsuka ya mobu.

Babongisi-nzela ya sanza na sanza basengeli kopesa bangonga 1 000 na mbula kati na mosala ya kosakola. Na nsuka ya sanza ya Febwáli, basusu bayaka komona ete bazangi bangonga mosusu, mpe yango ekoki kolɛmbisa bango. Bankulutu mbala mingi bazalaka na likoki ya kosunga babongisi-nzela, na kolendisáká bango mpe na kopesáká bango batoli ebongi. Lisungi wana ya bankulutu ekoki kozala malamu mpe kopesa nzela na mobongisi-nzela ete aluka kokokisa bangonga na ye, na esika ete atika mosala na ye.

Babongisi-nzela bakozala na botɔ́ndi na likebi ya bolingo oyo bankulutu bakotyela bango na likambo yango. Lisangá mpe lizwaka matomba na kozala na babongisi-nzela ya esengo kati na mosala ya kosakola mpe oyo bazali kokokisaka mosala na bango na bosembo nyonso.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto