“Bósɛnzɛlaka”
1 Ezalaki mwa moke liboso ete akóma na ntango elekaki mpasi kati na bomoi na ye ya bomoto nde Yesu alobaki maloba oyo mazwami kati na Matai 26:38-41. Ntango yango esengelaki komonana ete ezalaki ntango oyo eleki ntina kati na Lisoló mobimba ya bato. Lobiko ya bato nyonso ezalaki na likámá. Bayekoli ya Yesu basengelaki ‘kosɛnzɛla.’
2 Tokómi lelo pene na koya ya Yesu kati na mokumba na ye oyo mosangisi makambo mibale: mosikoli mpe mobomi. Lokola tozali baklisto ya bokɛngi oyo bazali koyeba ete ntango oyo ezali ya kosala nokinoki, tozali te kokanga mabɔkɔ wana tozali kozela lobiko na biso. Toyebi ete tosengeli ntango nyonso komilɛngɛla. Ezali likambo ya ntina ete tókóba ‘kosala mosala makasi mpe kobunda’ kati na mosala ya Yehova. (1 Tim. 4:10) Ezali boni mpo na moko moko kati na biso? Tozali nde kosɛnzɛla?
3 Tómitalela biso moko: Yesu apesaki lisusu likebisi oyo ete: “Bókeba mpo na bino moko.” (Luka 21:34, 35, NW) Tosengeli kokeba mpo na biso moko, kosɛnzɛláká ete tózala “na efundeli te mpe na ekweli te, . . . kati na libota na bato bayɔngɔtani mpe bapengwi nzela.” (Filp. 2:15) Tomitambwisaka mokolo na mokolo lokola baklisto, komekoláká Yesu mpe kolandáká mitindá oyo mizwami kati na Liloba ya Nzambe? Tosengeli kobwaka etamboli nyonso ya mbindo ya mokili, oyo “ezali kolala na kati na oyo mabe.” (1 Yoa. 5:19; Lom. 13:11-14) Ntango tomitaleli biso moko na lisalisi ya Makomami, tozali mpenza komona ete tozali komisɛnzɛla ndenge Yesu asɛngaki yango?
4 Bankulutu basengeli kosɛnzɛla ete bákokisa malamu mpenza mikumba na bango kati na lisangá, koyebáká ete bakozongisa monɔkɔ mpo na lolenge oyo bazali kobatela etongá. (Eb. 13:17) Batambwisi ya mabota bazali na mokumba ya sikisiki ya kotambwisa ndako na bango kati na banzela ya Yehova. (Gen. 18:19; Yosua 24:15; talá 1 Timoté 3:4, 5) Ezali mpe likambo ya ntina mingi ete biso banso tólanda etindá ya Biblia oyo etali kolingana bamoko na bamosusu. Yango ezali elembo oyo ezali kokesenisa boklisto ya solo.—Yoa. 13:35.
5 Tósɛnzɛla ete tókebisa bazalani na biso: Kosɛnzɛla esangisi makambo mingi koleka likambo litali kokeba mpo na yo moko. Tozali na mokumba ya kozalisa bayekoli. (Mat. 28:19, 20) Bolingo oyo tozali na yango mpo na bazalani na biso esengeli kopusa biso na kokebisa bango mpo ete bákoka kobika na kobomama ya mokili. Yango ezali mokumba ya baklisto nyonso. Ezali eteni ya ntina kati na losambo na biso. (Lom. 10:9, 10; 1 Kol. 9:16) Mbala mingi, tokutanaka na kozanga bosepeli mpe na botɛmɛli ya polele ntango tozali kosangana na mosala yango ya lobiko. Tosengeli kokóba kosala, atako mingi bazali kotyola likebisi na biso. (Ezk. 33:8, 9) Bolingo ya solosolo mpo na Nzambe mpe mpo na bazalani ekopusa biso na kolendendela.
6 Oyo ezali te ntango ya koluka bosepeli. Tosengeli te kopesa nzela na mitungisi ya bomoi ya mokolo na mokolo ete mipengwisa biso, mpe tosengeli te komipesa na bisengo ya mokili oyo, noki ekómela biso motambo. (Luka 21:34, 35) Koleka bileko mosusu nyonso, lelo ezali ntango ya koyeba ete tozali kobika na eleko moko ya ntina mingi. Ntango oyo Yesu akoyeisa esambiseli likoló na ebongiseli mabe oyo esili mpenza kobɛlɛma mingi. Bobele baoyo bazali komikɛngɛla, oyo bazali na bokɛngi mpe baoyo bazali kosɛnzɛla nde bakobika. Soki totosi malako ya Yesu mpe ‘tolóngi kokima makambo nyonso wana,’ na ntembe te tokozala na botɔ́ndi mingi mpo na Yehova.—Luka 21:36.