Tósala na molimo na biso mobimba
1 Tozali na bantina mingi ya kozala na botɔ́ndi epai na Yehova. Na ndakisa, makambo oyo asalaki na ntango ya kala, oyo azali kosala sikawa mpe oyo akosala lisusu mpo na biso na mikolo mizali koya. Botɔ́ndi na biso esengeli kopusa biso na kosala nini? Nzembo moko ya Davidi ezali kopesa eyano oyo: “Nakokumisa Yehova ntango nyonso, lisanzoli na ye ekozala na monɔkɔ na ngai libela.”—Nz. 34:1.
2 Biblia ezali komonisa polele ete tosengeli kosakola. Tozali kokokisa mosala yango ‘na molimo na biso mobimba, mpo na Yehova.’ (Kols. 3:23) Ntango tozali kosangana mpenza na molimo na biso mobimba na mosala ya kosakola, na meko nini tokokokisa yango? Soki tozali kokanisa na mozindo likoló na bolingo oyo Yehova azali na yango epai na biso, na ntembe te mitema na biso mizali kopusa biso ete tóloba na molende nyonso na ntina na ye mpe na mikano na ye kitoko. Tozali na mposa ya kosala nyonso oyo tokoki kosala.
3 Na lolenge lobongi tokoki komizela ete moto oyo azali kosala na molimo na ye mobimba azala na mposa ya kotya elimo na ye likoló na mosala na ye ya bulɛɛ. Mokomi na Nzembo oyo amonaki mpenza makambo na lolenge wana, alobaki boye: “Mbala nsambo na mokolo moko nakosanzola yo.” (Nz. 119:164) Baoyo bazali na mayoki motindo moko na Mokomi na Nzembo bazali koluka kozwa matomba na makoki oyo bazali na yango ya kokumisa Yehova. Engebene ezalela na bango, bazali kosala nyonso oyo ekoki na bango mpo na kosala na molende.
4 Tozali na mabaku mingi ya kokumisa Yehova: Ntina ezali te ya kozela bobele ete tózala na mosala ya ndako na ndako mpo na kosakola nsango malamu. Baninga na biso ya mosala, baninga na biso ya kelasi, basangani ya libota na biso mpe bayebani na biso, bango nyonso bazali na mposa ya koyoka nsango ya Bokonzi. Ntango totamboli, tokoki kobanda masoló, oyo makoki mbala mosusu kopesa biso nzela ya kopesa litatoli, epai na basáli kati na ɔtɛ́lɛ, basáli kati na rɛstorá, na esika batɛkisaka esánsi, to na basɔfɛ́lɛ ya taksí. Na esika tofandaka, tokoki kopesa litatoli epai na bato ya pembeni na biso. Soki tokɔti lopitalo, tokoki kosakola na lolenge ya litatoli ya libaku malamu epai na balifulumɛ́, epai na minganga mpe epai na bakɔni mosusu.
5 Litatoli ya libaku malamu ebotaka mbuma: Mokolo moko, wana bazalaki kotambola na lobala ya banyama, Batatoli mibali babandaki kosolola na mobali moko oyo azalaki kotambola elongo na mwana na ye. Na nsima ya mwa ntango, mobali yango mpe mwasi na ye bayaki kati na solo. Na nsima, mobali yango andimaki ete mwa liboso ete akutana na Batatoli ya Yehova mpo na mbala ya liboso, abɔndelaki Nzambe na kosɛngáká na ye ete: ‘Soki ozali, pesá ngai nzela ete náyeba yo.’ Mpo na ye, bokutani na Batatoli na lobala ya banyama ezalaki eyano ya Yehova na libɔndeli na ye.
6 Baoyo bazali komipesa na molimo na bango mobimba kati na mposa na bango ya kopesa lisungi ya elimo na bazalani na bango, bazwaka bosepeli mingi. Bayebi ete mosala yango, oyo bazali kokokisa “na motema mobimba,” ezali kosepelisa Yehova.—1 Nta. 28:9.