Nyonso ezali kotambola malamu na elimo!
1 Bato mingi bazali kolɔta mokolo oyo bakoki koloba ete: “Nyonso ezali kotambola malamu!” Mpo na bango, mokolo yango ekoya ntango bakokóma na biloko mingi ya mosuni, oyo ekopesa bango nzela ya ‘kopema, kolya, komɛla mpe komisepelisa.’ (Luka 12:19) Nzokande, uta sikawa, biso tokoki koloba ete tozangi ata eloko moko te na elimo. (Nz. 34:10) Na ndenge nini?
2 Na Masese 10:22 tozali kotánga boye: “Mapamboli na [Yehova] ikoyeisa bozwi.” Biso baoyo tozali kozwa matomba na ngɔlu ya Nzambe, tokoki koloba na lotómo nyonso ete Nzambe “azali kozwisa biso biloko nyonso na malamu ete tósepela na yango.” (1 Tim. 6:17) Yango ezali kosala ete tózala libota oyo lileki na bozwi kati na mabelé mobimba!
3 Tókanisa na mozindo matomba oyo tozali na yango: Bobele bato moke kati na biso bazali na biloko mingi ya mosuni. Kasi, topambolami pamba te tomitungisaka te koleka ndelo mpo na bamposa na biso ya mokolo na mokolo. Yehova ayebi biloko oyo ezali na ntina mpo na biso mpe alaki ete akopesa biso yango. (Mat. 6:31-33) Elaka yango epesaka biso kimya ya elimo, oyo esombamaka te.
4 Kasi matomba ya elimo oyo tozali na yango esuki bobele wana te. Bomoi na biso etalelaka bilei ya elimo oyo eutaka epai ya Yehova. (Mat. 4:4) Baoyo bazali koluka bilei ya elimo na mokili bazali komona mpasi na nzala, nzokande biso tozali kolya mpe komɛla lokola tolingi. (Yis. 65:13) “Moombo ya sembo” azali kopesa biso nzela na kozwa boyebi mingi oyo ekokani na mosusu te oyo ezali komema na bomoi ya seko.—Mat. 24:45; Yoa. 17:3.
5 Bondeko na biso ya mokili mobimba ya motuya ezali kopesa biso likoki ya kosepela na boninga ya mɔ́tɔ ya bandeko basi mpe bandeko mibali oyo batondi na bolingo oyo bafandi bipai binso na mokili. (Yoa. 13:35) Lisangá ezali esika ya kimya, kati na yango tokoki kozwa kobɔndisama mpe kolendisama. Bankulutu bazali kosɛnzɛla likoló na milimo na biso mpe basungaka biso mpo na kolónga mikakatano ya lolenge nyonso. (Ebe. 13:17) Na kotikaláká pene na bandeko na biso, tozali kozwa matomba na bilendiseli bamoko na bamosusu, yango elendisaka mpe esungaka biso na kolendendela.—Lom. 1:11, 12.
6 Kútu mosala na biso ezali lipamboli. Misala mingi epesaka mpii mpe ememaka ata bosepeli moko te. Na kosakoláká nsango malamu epai na bazalani na biso, tozali kopesa bango esengo, mpe yango ezali kopesa biso bosepeli. (Mis. 20:35) Na bongo, tokoki mpenza komona bolamu mpo na mosala na biso monene.—Mos. 2:24.
7 Likoló na nyonso, tozali na elikya moko kitoko. (Lom. 12:12) Tozali kozela mokili ya sika, ya kokoka mpe ya sembo, kati na yango tokobika elongo na baoyo tolingaka, kati na esengo mpe na kimya libela na libela. Elikya yango ezali mpenza na motuya monene koleka nyonso oyo mokili ekoki kopesa.—1 Tim. 6:19.
8 Lolenge nini tosengeli komonisa botɔ́ndi na biso? Tokokoka soko moke te kozongisela Yehova nyonso oyo asili kosala mpo na biso. Tokoki bobele komonisa botɔ́ndi na biso (1) na kopesáká ye botɔ́ndi mokolo na mokolo mpo na ngɔlu na ye (Ef. 5:20), (2) na komonisáká bolingo na biso na nzela ya botosi na biso (1 Yoa. 5:3), (3) na kosantisáká nkombo na ye na kosakoláká nsango malamu (Nz. 83:18) mpe (4) na kosungáká lisangá ya boklisto mpe kosaláká elongo na yango.—1 Tim. 3:15.
9 Tozali na bantina nyonso ya kozala bato ya esengo kati na mokili mobimba. (Nz. 144:15b) Tiká ete ezaleli na biso, etamboli na biso mpe mosala na biso emonisa esengo oyo tozali na yango kati na paladiso na biso ya elimo! Nyonso ezali kotambola malamu!