Tómekola kondima na bango
1 Ntoma Paulo alimbolaki ete kondima ezali “elendiseli na biloko bikolikya biso, ezali mpe elimbweli na biloko bizangi komonana.” Abakisaki ete: ‘Soki kondima ezali te, tokoki kosepelisa Nzambe te.’ (Ebe. 11:1, 6) Paulo alendisaki biso ete tótonda na kondima, tósalela yango mpe tókoba kozala na yango.—2 Kol. 4:13; Kols. 2:7; 2 Tim. 2:22.
2 Biblia etondi na bandakisa minene ya kondima. Kati na Baebele mokapo 11, Paulo atandi molɔngɔ́ molai ya batatoli oyo bamonisaki kondima liboso na komekama nyonso. Kati na bango, tozali kokuta Abele, martíru ya liboso na ntina na kondima. Noa mpe alobelami, mpamba te, na kondima na ye, amonisaki bobangi Nzambe oyo esengelaki mpo na kobikisa libota na ye. Abalayama akumisami na ntina na kondima na ye mpe na botosi na ye. Mose mpe alobelami, mpamba te na nzela ya kondima na ye atikalaki ngwi lokola nde azalaki komona Ye oyo amonanaka te. Lokola bandakisa wana ezalaki mpenza mingi, Paulo alobi ete ntango ekozanga ye mpo na kolanda koyebisa makambo nyonso oyo matalaki bango. Tozali mpenza na botɔ́ndi lokola tozali na likoki ya kolendisa kondima na biso na kotaleláká ‘bandakisa wana ya etamboli ya bulɛɛ’ mpe ‘misala oyo mimonisami na bokangami epai na Nzambe’!—2 Pet. 3:11.
3 Na ekeke ya liboso, Yesu atunaki motuna oyo: “Wana ekoya Mwana na moto, akokuta kondima awa na nsé?” (Luka 18:8) Lelo oyo, tokoki nde kokuta bandakisa minene ya kondima katikati na biso? Tozali nde komona mibali mpe basi, bilenge mpe mikóló, oyo bazali komonisa kondima ya makasi epai na Yehova, lokola yango emonisamaki na basaleli ya Nzambe na ntango ya kala?
4 Bandakisa ya kondima na mikolo na biso: Tozali na bandakisa minene ya kondima zingazinga na biso! Kondima ya bakɛngɛli oyo bazali kokamba biso ebongi ete tómekola yango. (Ebe. 13:7) Kasi bazali bobele bango moko te bato oyo bazali komonisa kondima oyo tosengeli komekola. Lisangá mokomoko ezali na basangani ya sembo oyo bazali kolendendela kati na mosala na bango mpo na Yehova uta bambula mingi, atako mbala mingi bakutanaka na mikakatano ya lolenge nini.
5 Bandeko na biso ya basi oyo bazali sembo uta bambula mingi, bazali koyika mpiko na botɛmɛli makasi ya mibali na bango, babongi mpenza kokumisama. Ezali na batata mpe bamama oyo balóngaki mokakatano motali kobɔkɔla bana bango moko. Kati na biso tozali kokuta mibangé basi-bakufeli-mibali oyo bazali kosangana kozanga kolɛmba na misala nyonso ya lisangá, nzokande bamoko kati na bango bazali ata na libota moko te mpo na kosunga bango. (Talá Luka 2:37.) Kondima ya bandeko oyo bazali koyika mpiko na bokɔnɔ oyo eumeli ntango molai ezali kokamwisa biso ntango nyonso. Mingi bazali kolanda kosala na bosembo nyonso atako bandelo ezali kopekisa bango na kozwa mikumba mosusu ya Teokrasi. Na mpiko nyonso, Bilenge Batatoli mosusu basili komonisa kondima na bango atako bakutanaka na botɛmɛli na eteyelo. Bokangami na biso epai na Nzambe ezali koyeisama makasi wana tozali kotala babongisi-nzela ya sembo oyo bazali kolendendela mbula na mbula, kozanga kobanga mikakatano makasi koleka. Lokola Paulo, ntango ekozanga biso mpo na kolobela makambo nyonso oyo bandeko mibali mpe bandeko basi wana bakutanaki na yango kati na mosala ya Bokonzi, misala nyonso ya kondima oyo bakokisaki!
6 Bandakisa wana ya kondima ezali kobɔndisa mpe kolendisa biso. (1 Tes. 3:7, 8) Ebongi mpenza ete tómekola kondima na bango, mpamba te “baoyo bazali kosala na bosembo bazali esengo mpo na [Yehova].”—Mas. 12:22, NW.