Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 7/96 lok. 7
  • Masoló ya boninga oyo makoki kosimba motema

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Masoló ya boninga oyo makoki kosimba motema
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Masolo mosusu
  • Masolo oyo makoki kolendisa baninga
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Ndenge ya kobanda lisolo mpo na kopesa litatoli ya libaku malamu
    Mosala na biso ya Bokonzi—2014
  • Ndenge ya koyeba kosolola na bato
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Kobanda lisolo na ndenge oyo ekopesa biso nzela ya kopesa litatoli
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2018
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1996
km 7/96 lok. 7

Masoló ya boninga oyo makoki kosimba motema

1 Tokoki kolimbola lisoló ete ezali bongo “bosombitanyi maloba.” Kosolola na lolenge ya boninga likoló na likambo moko oyo ezali kosepelisa molobani na biso ekoki kobenda likebi na ye mpe ekoki kosalisa biso ete tósimba motema na ye na nsango ya Bokonzi. Eksperiansi esili komonisa ete ebongi mpenza kosolola na bato na lolenge ya boninga mpe ya boboto na esika ya kosuka bobele na koteya bango.

2 Lolenge ya kobanda lisoló ya boninga: Kozala na likoki ya kosolola elongo na moto elimboli te ete osengeli bobele kobimisa ebele ya makanisi mpe ya bavɛrsɛ́. Yango ezali nde kosolola kati na bato mibale. Na ndakisa, masoló oyo tosololaka elongo na baninga na biso ya kartyé kati na lopango ezalaka ya kozokisa te kasi nde ya boboto. Na esika ya kokanisa liboso makambo nini tokoloba, tóyanolaka mbala moko na makanisi oyo azali kobimisa. Soki tozali komonisa bosepeli mpenza mpo na makambo oyo azali koloba, likoki ekozala ete azongela lisusu masoló yango. Esengeli mpe kozala bongo na ntango tozali kopesa litatoli.

3 Masoló lokola mobulu, mikakatano ya bilenge, makambo matali esika tofandi, makambo mazali koleka na mokili to mpe ata ntango ekoki kosalisa mpo na kobanda masoló ya boninga. Mitó na makambo oyo mitaleli mpenza bomoi ya bato mokolo na mokolo ezalaka na nguya mpo na kolamwisa bosepeli na bango. Wana lisoló na biso lizali kokóba, tokoki mokemoke komema yango epai na nsango ya Bokonzi.

4 Kosala lisoló ya boboto elimboli te ete komibongisa ata moko ezali na ntina te. Komibongisa ezali na ntina. Nzokande, tosɛngisami te na kosala plan ya liloba mokomoko to ya kokanga na motó makambo oyo tokoteya, soki tosali bongo tokozala na mokakatano mpo na kobongola maloba na biso mpe tokoyeba te komiyokanisa na likambo mokomoko. (1 Kol. 9:20-23) Lolenge malamu ya komibongisa ezali ya kopona motó na likambo moko to mitó na makambo mibale ya Biblia, na likanisi ya kotonga masoló likoló na mitó na makambo wana. Kozongela mateya ya búku Comment raisonner ekosalisa biso mingi.

5 Bizaleli ya ntina mpo na lisoló ya boninga: Ntango tozali kosolola elongo na moto moko, tosengeli kozala na mɔ́tɔ mpe koloba makambo malongobani. Kosɛka mpe esengo ekosalisa biso na komonisa bizaleli wana. Tozali koyebisa nsango oyo eleki malamu kati na mokili; ezali na eloko mosusu te oyo ezali kobenda bato ya motema sembo koleka yango. Soki bato yango bamoni ete bosepeli oyo tozali komonisa bango euti na mposa ya solo ya koyebisa bango nsango malamu, mbala mosusu bakopusama na koyoka yango.​—2 Kol. 2:17.

6 Lisoló esengeli kozala ntango moko ya malamu. Na bongo, tózala na boboto mpe na takte mingi ntango tozali koyebisa nsango ya Bokonzi. (Gal. 5:22; Kols. 4:6) Tósala makasi na kotikela molobani na biso bopusi moko ya malamu. Na kosaláká bongo, ata soki tolóngi te kosimba motema na mbala ya liboso, ekoki kozala ete moto yango akosepela koyoka nsango na mikolo mikoya ntango Motatoli moko akosolola na ye.

7 Ezali te na koyebáká na mobimba liteya moko ya kwɔkɔsɔ nde tokobanda masoló ya boninga. Ezali na kolamwisáká bosepeli ya moto nde tokoloba likambo oyo likosimba motema na ye. Wana tosili komibongisa, tokozala na likoki ya kobanda masoló ya boninga elongo na bato nyonso. Tósala makasi na kosimba mitema ya bato oyo tokokutana na bango na koyebisáká bango nsango oyo eleki malamu mpo na koyoka: mapamboli ya Bokonzi oyo makoki kosuka te.​—2 Pet. 3:13.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto