Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 7/96 nk. 3-6
  • Lolenge ya kozalisa bayekoli na lisalisi ya búku Boyebi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lolenge ya kozalisa bayekoli na lisalisi ya búku Boyebi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Masolo mosusu
  • Ndenge ya koyekola na moto Biblia tii azwa batisimo—Eteni ya liboso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
  • Ndenge ya koyekola na moto Biblia tii azwa batisimo—Eteni ya mibale
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
  • Salisá moyekoli na yo akokisa masɛngami mpo na kozwa batisimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
  • Tyá likebi na ‘mayele na yo ya koteya’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1996
km 7/96 nk. 3-6

Lolenge ya kozalisa bayekoli na lisalisi ya búku Boyebi

1 Baklisto nyonso bazali na mokano malamu ya koteya solo epai na bazalani mpe ya kozalisa bayekoli baoyo bazali “kati na ezaleli esengeli mpo na bomoi ya seko.” (Mis. 13:48, NW; Mat. 28:19, 20) Mpo na kosalisa biso, lisangá ya Yehova esili kopesa biso esaleli moko kitoko: búku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Motó na likambo na yango emonisi ntina mpenza ya boyekoli ya Biblia na ndako. Ya solo, mpo na kozwa bomoi ya seko, esengeli koyekola koyeba Yehova, Nzambe bobele moko ya solo, mpe Mwana na ye, Yesu Klisto.​—Yoa. 17:3.

2 Sikawa, búku Boyebi ezali mpenza búku ya la Société oyo ebongi ete tósalela na ntango ya boyekoli ya Biblia na ndako. Na lisalisi na yango, tokoki koteya solo na lolenge ya pɛtɛɛ, ya polele mpe na ntango mokuse. Yango ekosalisa biso na kosimba mitema ya baoyo tozali koteya. (Luka 24:32) Ya solo, esengeli ete ye oyo azali kotambwisa boyekoli asalela myango ya malamu mpo na koteya. Ezali mpo na yango nde siplemá oyo ebongisami na mokano ya kopesa makanisi mpe bokundoli na ntina na myango ya koteya oyo mimonanaki malamu. Na bososoli nyonso mpe na kotalela ezalela na biso moko, tokoki solo kosalela mokemoke mwa ndambo na makanisi mosusu, to makanisi yango nyonso. Tóbatela malamu siplemá oyo mpe tótalelaka yango mbala na mbala. Ezali na makanisi ndenge na ndenge oyo makoki kosalisa biso na koteya malamu ntango tozali kosalela búku Boyebi mpo na kozalisa bayekoli.

3 Tótambwisa boyekoli ya Biblia oyo ezali kokóla: Tómonisa bosepeli ya solosolo epai na moyekoli mokomoko, na kotaleláká ye lokola moyekoli moklisto mpe lokola moto oyo akokóma ndeko mobali to ndeko mwasi na mikolo mizali koya. Tózala na mɔ́tɔ, na boboto mpe na esengo. Soki tozali bayoki ya likebi, tokolónga koyeba moto yango​—bomoi na ye ya kala mpe motindo ya bomoi na ye sikawa—​yango ekosalisa biso na kososola lolenge nini ya malamu koleka mpo na kosalisa ye na elimo. Tózala pene na komipesa biso moko mpo na bolamu ya moyekoli.​—1 Tes. 2:8.

4 Nsima wana nzela epesami mpo na boyekoli, ekozala malamu kotalela mikapo ya búku Boyebi na lolenge yango elandani. Na motindo wana, moyekoli akoki bongo kokóma na bososoli ya solo mokemoke, mpamba te búku oyo ezali kolandisa masoló ya Biblia na lolenge loleki mpenza malamu. Salá ete boyekoli ezala pɛtɛɛ mpe esepelisaka, mpo ete yango ezala na nguya mpe ekóba kokende liboso. (Lom. 12:11) Engebene ezalela ya makambo mpe makoki ya moyekoli mokomoko, mbala mosusu okozala na likoki, kati na mikapo mingi, ya kotalela mokapo mobimba na liteya moko na boumeli soko ya ngonga moko, kozanga ete boyekoli esalema na lolenge ya likolólikoló. Bayekoli bakokóla mingi soki molakisi mpe bango moko bazali kotosa ngonga balakaná mpo na boyekoli pɔ́sɔ na pɔ́sɔ. Mbala mosusu likoki ekozala ya koyekola na bato mingi mikapo 19 ya búku oyo na boumeli soko ya sanza motoba.

5 Bandá liteya mokomoko na kopesáká makanisi ya mokuse oyo makolamwisa bosepeli mpo na makambo bokoyekola. Okomona ete motó na likambo ya mokapo mokomoko ezali likambo oyo esengeli kotalelama. Motó na likambo ya moke mokomoko ezali komonisa likanisi moko ya monene, yango ekosalisa bino na kobatela kati na makanisi motó na likambo ya mokapo. Sɛnzɛlá ete olobaka mingimingi te. Salá nde makasi na kolobisa moyekoli. Na kotunáká moyekoli mituna ya sikisiki ya kobenda likebi na kotalela makambo oyo asili koyeba, okosalisa ye na kokanisa mpe na kokóma na bosukisi ya malamu. (Mat. 17:24-26; Luka 10:25-37; talá Mokanda mpo na Eteyelo, lok. 51, par. 10.) Landá malamumalamu makanisi oyo mazali kati na búku Boyebi. Soki okɔtisi makanisi mosusu, okotangwa na makanisi ya minene to mpe okobulunganisa yango, yango ekosala ete boyekoli eumela mpenza ntango molai. (Yoa. 16:12) Soki motuna moko etunami oyo ezali na boyokani te na lisoló bozali koyekola, mbala mingi okoki kopesa eyano na nsuka ya boyekoli. Yango ekosalisa bino na kosilisa liteya ya pɔ́sɔ wana kozanga kobulungana. Yebisá na moyekoli ete akozwa biyano na mituna na ye mingi na boumeli ya boyekoli.​—Talá Mokanda mpo na Eteyelo, lok. 94, par. 14.

6 Soki moyekoli andimaka makasi mpenza Bosato, kozanga kokufa ya molimo, lifelo to mateya mosusu ya lokuta mpe ete ndimbola ya búku Boyebi ezali kokokisa te mposa na ye, okoki kopesa ye búku Comment raisonner to mokanda mosusu oyo elobeli likambo yango. Yebisá ye ete bokolobela lisoló yango nsima wana akosila kokanisa na makambo oyo akotánga.

7 Na kobandáká mpe na kosukisáká boyekoli na libondeli mpo na koluka litambwisi ya Yehova, tokokamata ntango yango na lisɛki te, mpe tokosala ete moko na moko azala na ezaleli ya limemya, na kotyáká Yehova na esika ya liboso lokola Moteyi ya solosolo. (Yoa. 6:45) Soki moyekoli azali naino komela likaya, mbala mosusu ekozala malamu kosɛnga ye ete amela yango te na ntango ya boyekoli.​—Mis. 24:16; Yak. 4:3.

8 Tóteya malamumalamu na lisalisi ya Makomami, ya bandakisa mpe ya mituna ya bozongeli: Ezala ete tosili koyekola mateya mbala boni: moteyi ya mayele akoyekola liboso liteya mokomoko, na kokanisáká moyekoli mokomoko. Yango ekosalisa ye na koyeba liboso mituna mosusu oyo moyekoli yango akoki kotuna. Mpo na koteya malamumalamu, zalá na bososoli polele ya makanisi minene ya mokapo. Luká bavɛrsɛ́ mpo na komona boyokani na yango na mateya mpe poná oyo ekotángama na boumeli ya boyekoli. Kanisá malamu likoló na lolenge okoki koteya na lisalisi ya bililingi mpe ya mituna ya bozongeli oyo ezali na nsuka ya mokapo.

9 Na kosaleláká Makomami malamumalamu, okosalisa moyekoli na koyeba ete azali mpenza koyekola nde Biblia. (Mis. 17:11) Salelá etánda “Yebá kosalela malamu Biblia na yo,” na lokasa 14 ya búku Boyebi, mpo na kolakisa ye lolenge ya koluka bavɛrsɛ́. Monisá ye lolenge ya koyeba bavɛrsɛ́ oyo itángami kati na liteya. Soki ntango ezali, bóluka mpe bótánga bavɛrsɛ́ oyo ilobelami kasi itángami te. Tuná na moyekoli ete alimboli na nini bavɛrsɛ́ yango ezali kosimba to kongɛngisa makambo oyo malobelami na paragrafe. Lobelá mingi biteni minene ya bavɛrsɛ́ mpo ete moyekoli akanga ntina ya makanisi minene ya liteya. (Neh. 8:8) Na momeseno, ezali na ntina te ete moteyi abakisa na boumeli ya lisoló bavɛrsɛ́ mosusu likoló na oyo tozali kokuta kati na búku. Limbolá ntina ya koyeba nkombo mpe kolandana ya mikanda ya Biblia. Mbala mosusu ekozala malamu mpo na moyekoli ete atánga Mosenzeli ya 15 Yúni 1991, nkasa 27-30. Na ntango ebongi, lendisá ye ete asalelaka Traduction du monde nouveau. Okoki komonisa mokemoke lolenge ya kosalela makambo na yango ya ndenge na ndenge, na ndakisa mitindami oyo mizali na kati mpe index ya maloba oyo mazali na Biblia.

10 Liteya 34 ya Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe emonisi ete bandakisa to masese elamwisaka makanisi mpe epesaka nzela na kosimba makanisi ya sika kozanga nkaká. Elamwisaka mayele mpe mayoki, na motindo yango, nsango elekisami na makasi oyo, mbala mingi, mayebisi mpamba ekoki kosala yango te. (Mat. 13:34) Búku Boyebi ezali na bandakisa mingi mpo na koteya, bandakisa ya pɛtɛɛ kasi ya nguya. Na yango, tozali kokuta na mokapo 17 ndakisa moko oyo ezali kotinda biso na kozala na botɔ́ndi mpo na lolenge oyo Yehova azali kopesa biso, na elobeli ya elimo, bilei, bilamba mpe ndako na nzela ya lisangá ya boklisto. Bililingi kitoko ya lángi ndenge na ndenge oyo ezali na búku Boyebi ekoki kosalelama malamumalamu mpo na kosimba mayoki. Na kotaleláká motó na likambo moke “Lisekwa ya esengo” na lokasa 185, paragrafe 18 ekozala na bopusi likoló na moyekoli soki atali elilingi oyo ezali na lokasa 86. Yango ekopusa ye mbala mosusu na komona ete lisekwa ezali likambo ya solo oyo ekosalema na Bokonzi ya Nzambe.

11 Esengeli ete bayekoli ya Biblia bákóla na elimo nsima ya kotalela liteya mokomoko. Yango wana kobosana te kotuna mituna ya bozongeli oyo mizwami na etánda “Meká boyebi na yo” oyo tozali kokuta na nsuka ya mokapo mokomoko. Monisá mpenza elikya na makambo oyo bouti koyekola na esika ya kosuka bobele na koyeba yango na bɔɔngɔ́. Mwa ndambo na mituna yango mizali na mokano ya kolamwisa eyano ya moto ye moko oyo euti na motema. Na ndakisa, talá lokasa 31, epai etunami na moyekoli ete: “Wapi bizaleli ya Yehova Nzambe oyo bizali mpenza kosepelisa yo?”​—2 Kol. 13:5.

12 Lakisá na bayekoli lolenge ya komibongisa mpo na boyekoli: Moyekoli oyo azali kotánga liteya liboso ye moko, oyo atyaka bilembo na biyano mpe oyo akanisaka na lolenge akoki kolobela yango na maloba na ye moko akokóla nokinoki na elimo. Na ndakisa na yo mpe na bilendiseli na yo, okoki kolakisa ye lolenge ya komibongisa mpo na boyekoli. Monisá ye búku na yo, epai otyaki minkɔ́lɔ́tɔ́ na likoló to na nsé ya maloba mpe makanisi ya minene. Monisá ye lolenge ya kozwa mbala moko biyano na mituna oyo minyatami. Okoki kosalisa moyekoli na kobongisáká mokapo moko elongo na ye. Lendisá ye ete ayanola na maloba na ye moko. Ezali na mwango wana nde tokoki koyeba soki azali mpenza kososola mateya. Soki apesi eyano na kotángáká yango kati na búku, okoki kolamwisa likoki na ye ya kokanisa na kotunáká ye lolenge akoki kolimbola likanisi yango epai na moto mosusu na maloba na ye moko.

13 Lendisá moyekoli ete alukaka bavɛrsɛ́ oyo itángami te wana azali komibongisa na boumeli ya pɔ́sɔ, mpamba te mbala mosusu bokozala na likoki te ya kotalela yango nyonso na ntango ya boyekoli. Pesá ye longonya mpo na milende azali kosala mpo na kobongisa mateya na ye. (2 Pet. 1:5; talá Mosenzeli ya 15 Augústo 1993, nk. 13-14, epai tozali kokuta makanisi mosusu likoló na oyo ekoki kosalema ezala na moteyi to na moyekoli mpo ete ye [moyekoli] akoka koyekola malamu na ntango ya boyekoli ya Biblia.) Na motindo wana, moyekoli akoyekola lolenge ya komibongisa mpo na makita ya lisangá mpe na kopesa biyano ya kosepelisa. Akoyekola lolenge ya kozala na mimeseno malamu mpo na boyekoli na ye moko; boye akobongisama mpo na kokóba kokóla kati na solo nsima wana akosilisa boyekoli na ye ya Biblia na búku Boyebi.​—1 Tim. 4:15; 1 Pet. 2:2.

14 Tókamba bayekoli na lisangá ya Yehova: Baoyo bazali kozalisa bayekoli bazali na mokumba ya kokamba bayekoli na lisangá ya Yehova. Moyekoli akokóla nokinoki mpo na kokɔmela na elimo soki andimi mpe azali kosepela na lisangá ya Nzambe mpe soki azali koyeba ntina ya kozala mosangani na yango. Mposa na biso ezali ete azwa esengo na kosangana elongo na basaleli ya Nzambe mpe ete azala na mposa ya kozala elongo na biso na Ndako ya Bokonzi, epai kuna akozwa lisungi na elimo mpe na bizaleli na nzela ya lisangá ya boklisto.​—1 Tim. 3:15.

15 Mwa búku Ba Témoins de Jéhovah​—Basangani mpo na kosala mokano ya Nzambe na mokili mobimba ebimisami mpo na kosalisa bato ete bámimesenisa na lisangá bobele moko oyo Yehova azali kosalela na mikolo na biso mpo na kokokisa mokano na ye. Nsima wana moboko ya boyekoli etyami, mpo na nini te kopesa ekzamplere moko epai na moyekoli? Uta na ebandeli, byangá moyekoli na koyangana pɔ́sɔ na pɔ́sɔ na makita. Yebisá ye lolenge yango esalemaka. Okoki koyebisa ye motó na likambo ya lisukúlu oyo ekopesama to komonisa ye lisoló oyo ekotalelama na boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Mbala mosusu, ekozala malamu kolakisa ye Ndako ya Bokonzi wana makita mazali kosalema te, mpo ete alɛmbisa bobangi oyo akoki kozala na yango mpo na mbala ya liboso na esika ya sika. Na ntembe te okoki mpe komonisa ye ete okoleka kozwa ye mpo ete bókenda na makita. Soki ayei, salá ete azala na esengo, amiyoka ete ayambami malamu. (Mat. 7:12) Lakisá ye epai na Batatoli mosusu, ezala mpe epai na bankulutu. Tokolikya ete akobanda kotalela lisangá lokola libota na ye ya elimo. (Mat. 12:49, 50; Mko. 10:29, 30) Okoki kotyela ye mikano oyo akobanda kokokisa mokemoke, na ndakisa koyangana na likita moko pɔ́sɔ na pɔ́sɔ.​—Ebe. 10:24, 25.

16 Wana boyekoli ezali kokóba na búku Boyebi, lobelá mingi biteni oyo bizali komonisa ntina ya kosangana pɔ́sɔ na pɔ́sɔ na makita ya lisangá. Talelá mingimingi nkasa 52, 115, 137-139, 159, mpe mokapo 17. Monisá mayoki mozindo ya botɔ́ndi oyo yo moko ozali na yango mpo na lisangá ya Yehova. (Mat. 24:45-47) Lobelá lisangá na bino mpe makambo oyo bozali koyekola na makita na maloba moko ya kokumisa. (Nz. 84:10; 133:1-3) Ekozala malamu ete moyekoli atala videokasɛti mokomoko ya la Société na kobandáká na oyo ete Les Témoins de Jéhovah​—Un nom, une organisation. Bokokuta makanisi mosusu mpo na lolenge ya kokamba bato na lisangá kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Mársi 1985, nkasa 22-26 (ebimeli ya Lifalansé), mpe kati na siplemá ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Augústo 1993.

17 Lendisá bayekoli ete bápesa litatoli epai na bazalani: Ntango tozali koyekola na bato, mokano na biso ezali ya kozalisa bango bayekoli oyo bakotatola mpo na Yehova. (Yis. 43:10-12) Yango elimboli ete moteyi asengeli kolendisa moyekoli ete alobela bazalani na ye makambo oyo azali koyekola kati na Biblia. Tokoki kosala yango na lolenge ya pɛtɛɛ na kotunáká ete: “Lolenge nini okoki kolimbola liteya oyo ya solo na libota na yo?” to: “Bavɛrsɛ́ nini okosalela mpo na komonisa yango epai na moninga na yo?” Bimisá biteni ya ntina oyo bizali na búku Boyebi oyo bizali kolendisa lolenge ya kopesa litatoli, na ndakisa na nkasa 22, 93-95, 105-106, mpe kati na mokapo 18. Soki likoki ezali, ekozala malamu kopesa na moyekoli mwa batrakte oyo akosalela mpo na kopesa litatoli ya libaku malamu. Pesá ye likanisi ya kobyangaka basangani ya libota na ye na kosangana na boyekoli. Azali nde na baninga oyo bakolinga mpe koyekola Biblia? Yebisá ye ete apesa yo nkombo ya baoyo bazali komonisa bosepeli.

18 Na kosanganáká na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi mpe na Likita ya mosala, moyekoli yango akozwa kobongisama mpe bilendiseli oyo ekosalisa ye na kokóma mosakoli ya nsango malamu. Soki amonisi mposa ya kokomisa nkombo na Eteyelo to ya kokóma mosakoli oyo azwi naino batisimo te, ekozala malamu kolanda makanisi mapesami kati na búku Lisanga, nkasa 98-100. Soki azali kokokisa te masɛngami na likambo moko kati na bomoi na ye, okoki koluka kati na mikanda ya la Société makanisi ya ntina oyo malobeli likambo yango mpe koyebisa ye yango. Na ndakisa, ekoki kozala ete moyekoli moko azali na mokakatano mpo na kolongwa na boombo ya likaya to ya bilangwiseli mosusu. Búku Comment raisonner emonisi bantina ya moboko oyo euti na Biblia mpo na yango baklisto basengeli kotika mimeseno mabe wana mpe emonisi na lokasa 118 mwango oyo emonanaki malamu na kosalisa bazalani mpo na kotika yango. Bondelá elongo na ye na ntina na likambo yango mpe lakisá ye ete atyaka mingimingi elikya epai na Yehova mpo na kozwa lisalisi.​—Yak. 4:8.

19 Mwango ya kolanda mpo na koyeba soki moto akokisi masɛngami mpo na kosangana na mosala ya kosakola elobelami kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yanuáli 1996, lok. 16, par. 6. Soki moyekoli akokisi masɛngami, ezali malamu kokamata ntango ya komimekisa mpo na kobongisa ye na kobima na ye mbala ya liboso na mosala ya kosakola. Na lolenge ya malamu, lobelá mayoki mpe botɛmɛli oyo emonanaka mingi epai na bato ya teritware na bino. Libosoliboso, bandá kosakola elongo na ye ndako na ndako soki likoki ezali, mpe na nsima, bongisá ye mokemoke mpo na biteni mosusu ya mosala ya kosakola. Soki lisoló na yo ezali mokuse mpe pɛtɛɛ, ekozala na ye mpasi te mpo na komekola yo. Zalá na maloba ya kotonga mpe ya kolendisa, monisá esengo na mosala ya kosakola; boye akososola mpenza elimo na yo mpe akomekola yango. (Mis. 18:25) Moyekoli ya sika asengeli kozala na mokano ya kokóma mosakoli ya nsango malamu oyo azali kobima sanza na sanza mpe oyo azali na molende. Na ntembe te okoki kosalisa ye ete azala na manáka moko ya malamu mpo na mosala ya kosakola. Mpo na kosalisa ye ete akóla na lolenge na ye ya kopesa litatoli, okoki kosɛnga ye ete atánga masoló mazwami na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Novɛ́mbɛ 1984 (ebimeli ya Lifansé); Mosenzeli ya 1 Febwáli 1989, nk. 12-23; 15 Yanuáli 1991, nk. 15-20 mpe Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yanuáli 1994, nk. 20-25.

20 Lendisá bayekoli ete bámipesa epai na Nzambe mpe bázwa batisimo: Moyekoli ya motema sembo akosengela mpenza koyekola makambo mingi na boumeli ya boyekoli ya búku Boyebi mpo na komipesa epai na Nzambe mpe kokokisa masɛngami mpo na kozwa batisimo. (Talá Misala 8:27-39; 16:25-34.) Nzokande, liboso ete moto azwa mposa ya komipesa epai na Nzambe, ekosengela ete akólisa bokangami mozindo epai na Yehova. (Nz. 73:25-28) Na boumeli ya boyekoli, luká mabaku ya kotonga botɔ́ndi na ye epai na Yehova mpo na bizaleli na ye. Monisá mayoki mozindo ozali na yango mpo na Nzambe. Salisá moyekoli na kokanisa na lolenge akoki kokólisa boyokani ya malamu ya ye moko elongo na Yehova. Soki akómi koyeba mpe kolinga Nzambe, akosalela ye na bosembo nyonso, mpamba te bokangami epai na Nzambe esangani na lolenge tozali kotalela bomoto ya Yehova.​—1 Tim. 4:7, 8; talá Mokanda mpo na Eteyelo, lok. 76, par. 11.

21 Salá makasi na kosimba motema ya moyekoli. (Nz. 119:11; Mis. 16:14; Lom. 10:10) Ezali likambo ya ntina ete amona na nini solo etaleli mpenza ye mpe ete azwa ekateli na lolenge asengeli kosalela makambo asili koyekola. (Lom. 12:2) Azali mpenza kondima solo oyo ezali kolakisama pɔ́sɔ na pɔ́sɔ? (1 Tes. 2:13) Mpo na koyeba yango, okoki kotuna ye mituna ya mayele oyo ezali kotinda na kokanisa, na ndakisa: Okanisi boni mpo na likambo boye? Lolenge nini okoki kosalela yango kati na bomoi na yo? Na lisalisi ya biyano na ye, okoki kososola na makambo nini osengeli kosalisa ye mingi mpo na kosimba motema na ye. (Luka 8:15; talá Mokanda mpo na Eteyelo, lok. 52, par. 11.) Maloba oyo mazali na bililingi ya nkasa 172 mpe 174 ya búku Boyebi etuni ete: “Osili komipesa epai na Nzambe na nzela na libondeli?” mpe “Nini ezali kopekisa yo kozwa batisimo?” Mituna wana mikoki kotinda moyekoli na kozwa ekateli.

22 Lolenge ya kosala ntango moyekoli amonisi mposa ya kozwa batisimo elobelami kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yanuáli 1996, lok. 17, par. 9. Búku Boyebi ebongisamaki na mokano ya kopesa nzela na moto ete ayanola na “Mituna mpo na baoyo balingi kozwa batisimo.” Mituna wana, oyo bankulutu bakotalela elongo na ye, mizwami kati na appendice ya búku Lisanga. Soki olobelaki mingi biyano na mituna minyatami kati na búku Boyebi, moyekoli akozala pene mpo na masoló makeseni oyo akozala na yango elongo na bankulutu mpo na komilɛngɛla na batisimo.

23 Tósalisa baoyo basilisi boyekoli na bango ya Biblia: Tozali komizela ete moto oyo akómi na nsuka ya boyekoli ya búku Boyebi amonisa bosembo na ye mpe mposa makasi azali na yango ya kosalela Nzambe. (Mat. 13:23) Ezali na ntina wana nde motó na likambo moke oyo ezali kosukisa búku etuni motuna oyo: “Okosala nini?” Baparagrafe ya nsuka elendisi moyekoli na kokanisa likoló na boyokani oyo asili kokólisa elongo na Nzambe, na ntina ya kosalela boyebi oyo asili kozwa mpe na ntina ya kozwa ekateli nokinoki mpo na komonisa bolingo na ye mpo na Yehova. Ebongisami te ete tóyekola mikanda misusu elongo na bato oyo basilisi búku Boyebi. Soki moyekoli moko azali kosala eloko te mpo na boyebi oyo azwi ya Nzambe, monisá ye na boboto mpe na polele nini asengeli kosala mpo na kokóla na elimo. Okoki kokendaka kotala ye na bantango mosusu, kotikeláká ye bongo nzela polele mpo na kosala matambe oyo makomema ye na bomoi ya seko.​—Mos. 12:13.

24 Moyekoli ya sika oyo andimi solo mpe azwi batisimo asengeli lisusu kokóla mingi na boyebi mpe na bososoli liboso ya kokemba mpenza kati na kondima. (Kols. 2:6, 7) Nsima na kosilisa búku Boyebi, na esika ya kokóba koyekola na ye Biblia na ndako, okoki nde kozala pene mpo na kopesa ye lisalisi oyo akozala mbala mosusu na yango mposa mpo na kokɔmela na elimo. (Gal. 6:10; Ebe. 6:1) Mpo na moyekoli ye moko, akoki kobakisa bososoli na ye na kotángáká Biblia mokolo na mokolo, na koyekoláká ye moko Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe mikanda mosusu ya ‘moombo ya sembo,’ na komibongisáká mpo na makita mpe na kosanganáká na yango, mpe na kosololáká makambo matali solo elongo na baninga kati na kondima. (Mat. 24:45-47; Nz. 1:2; Mis. 2:41, 42; Kols. 1:9, 10) Mpo na kobongisama ete akokisa malamumalamu mosala na ye na lolenge ya Teokrasi, ekozala na ntina ete atánga búku Lisanga mpe ete asalela makanisi mapesami na kati na yango.​—2 Tim. 2:2; 4:5.

25 Tókólisa makoki ya koteya: Tosili kozwa mokumba ya ‘kozalisa bayekoli mpe ya kolakisa bango.’ (Mat. 28:19, 20) Lokola makoki ya koteya ezali na ntina mpo na kozalisa bayekoli, tosengeli kosala makasi mpo na kokóma bateyi malamu koleka. (1 Tim. 4:16; 2 Tim. 4:2) Mpo na kozwa makanisi mosusu na lolenge ya kokólisa makoki ya koteya, mbala mosusu okosepela kotánga liteya 10, “Yekola koteya” mpe liteya 15, “Ndenge nini okoki kosimba mitema ya bayoki na yo” kati na Mokanda mpo na Eteyelo; “Enseignant, enseignement” kati na Auxiliaire; mpe masoló malandi oyo mazwami na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛ́mbɛ 1984 (ebimeli ya Lifalansé): “Lolenge ya kotonga na bisaleli oyo bikolónga na komekama ya mɔ́tɔ” mpe na Mosenzeli ya 1 Desɛ́mbɛ 1985: “Ntango ozali koteya solola na motema”; na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Mársi 1986 (ebimeli ya Lifalansé): “Oyebi kososola malamu uta na Makomami?” mpe na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Febwáli 1996: “Lolenge ya kozwa esengo na mosala ya kozalisa bayekoli.”

26 Wana ozali kosala makasi mpo na kozalisa bayekoli na lisalisi ya búku Boyebi, bondelá ntango nyonso Yehova, Ye oyo “akólisaka,” mpo ete apambola milende ozali kosala mpo na kosimba mitema na nzela ya nsango malamu ya Bokonzi. (1 Kol. 3:5-7) Tiká ete ozala na esengo oyo ezwamaka na kolakisáká bazalani ete bákanga ntina ya boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko, mpe báyeba motuya na yango mpe básala na boyokani na yango!

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto