Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/96 lok. 1
  • Tókokisa ndai na biso mokolo na mokolo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tókokisa ndai na biso mokolo na mokolo
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Masolo mosusu
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • “Elako oyo osali, kokisá yango”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • Mituna na batangi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Tosá ndai na yo ya libala!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1996
km 8/96 lok. 1

Tókokisa ndai na biso mokolo na mokolo

1 Mokomi na Nzembo apusamaki na koloba na Yehova ete: “Ngai nakoyembela nkombo na yo nzembo libela, mpe mikolo nyonso nakokokisa ndai na ngai.” (Nz. 61:8) Davidi ayebaki ete wana moto alapi ndai, azali kosala yango na bolingo na ye moko. Nzokande, ayebaki mpe ete soki ye alapaki ndai, asengelaki kokokisa yango. Atako bongo, azalaki kokumisa Yehova mpo na likoki azalaki na yango ya kokokisa ndai na ye mokolo na mokolo.

2 Ntango tomipesaki epai na Yehova, ezali na bolingo na biso moko nde tolapaki ndai ya kokokisa mokano na ye. Tomiboyaki biso moko mpe tokómisaki mosala ya Yehova likambo lileki ntina kati na bomoi na biso. (Luka 9:23) Yango wana biso mpe tosengeli kokokisa ndai na biso mokolo na mokolo. (Mos. 5:4-6) Eyambweli oyo tosalaki na ntango ya batisimo na biso esengeli komonana kati na bomoi na biso mobimba, koyebáká ete “eyambweli ekokómisa moto na lobiko ezali na bibɛbu.” (Lom. 10:10) Yango etaleli mosala ya kosakola nsango malamu. (Ebe. 13:15) Ezalela ya moko na moko ekeseni mpenza, kasi mokolo na mokolo biso nyonso toyebi ntina ya koyebisa nsango malamu epai na bazalani na biso.

3 Tóluka mabaku ya kosakola mokolo na mokolo: Koyebisa nsango malamu epai na moto mosusu epesaka esengo. Mpo na kosala yango mokolo na mokolo, tosengeli koluka mabaku ya kosakola ntango nyonso oyo likoki ezali. Baoyo bazali na momeseno ya kosakola na lolenge ya libaku malamu na bisika na bango ya mosala, na eteyelo, epai na baninga ya kartyé to epai na bato mosusu oyo bazali kokutana na bango mokolo na mokolo bayokaka mpenza esengo. Likoki kútu ezali ya kopesa litatoli na nzela ya kotinda nkóma to na telefone. Na kosaleláká mabaku nyonso wana mpe na komibombeláká ntango pɔ́sɔ na pɔ́sɔ mpo na kopesa litatoli ya ndako na ndako mpe kosala bozongeli ya sika, mbala mosusu tokozwa esengo mpenza oyo ezwamaka na kotambwisáká boyekoli ya Biblia na ndako. Ɛɛ, tozali na likoki ya koluka mokolo na mokolo mabaku ya kosakola.

4 Ndeko mwasi moko abandaki kotánga mwa búku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo na ntango ya bopemi. Asɛngaki na mwasi moko oyo bazalaki kosala na ye ete bátángaka mokapo ya mokolo, yango epesaki nokinoki nzela na boyekoli ya Biblia elongo na moto yango. Mokolo na mokolo bazalaki koyekola na boumeli ya miniti ntuku misato, mbala mitano na pɔ́sɔ moko. Mobali moko oyo azalaki kosala elongo na bango amonaki lolenge bazalaki kosala boyekoli na bango mokolo na mokolo. Mobali yango asukaki na komimonisa ete azali ndeko mobali, kasi nde atiká kosakola. Molende ya ndeko mwasi wana elamwisaki ye, mpe akendaki kokutana na nkulutu moko mpo na kozongela lisusu kosakola. Na mposa na ye ya kokokisa malamumalamu ndai na ye mokolo na mokolo, ndeko mwasi wana asalaki bopusi malamu epai na bato mibale.

5 Lokola topusami na motema oyo ezali na botɔ́ndi mingi mpo na makambo nyonso malamu oyo Yehova azali kosala mpo na biso, tokokokisa ndai na biso mokolo na mokolo engebene makoki na biso, yango ekopesa biso esengo mpe bosepeli. Lokola mokomi na Nzembo, tokoki koloba ete: “Ɛ [Yehova] Nzambe, nakotɔnda yo na motema na ngai mobimba mpe nakokumisa nkombo na yo seko na seko.”​—Nz. 86:12.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto