Biyano na mituna na bino
◼ Na makambo nini ndeko mobali asengeli komonisa bokɛngi na yango ntango azali elongo na mwasi to ndeko mwasi ntango azali elongo na mobali kati na mosala na biso ya kosakola?
Tozali na lotómo ya kokanisa ete bandeko na biso mibali mpe basi bazali na mposa ya kozala na etamboli oyo eyokani na bizaleli bileki kotombwana. Na mawa nyonso, tozali kobika na mokili etondi na mbindo, oyo kati na yango makambo nyonso mapesameli nzela mpe bipekiseli ya bizaleli malamu ezali komonana mpenza te. Yango wana, ata soki tozali na makanisi malamu, esengeli na biso ntango nyonso kokeba ete tóbwaka nsoni te to tósala te makambo na lolenge elongobani te. Yango ezali mpenzampenza solo kati na mosala ya kosakola.
Na mosala ya kosakola, tozali kokutana mbala mingi na mibali to na basi oyo bazali komonisa bosepeli oyo ezali komonana ete ezali ya sembo mpo na solo. Soki tozali kosakola biso moko mpe ete moto yango azali bobele ye moko epai na bango, ekozala mpenza malamu kopesa litatoli na ekuke kozanga kokota na ndako na ye. Soki amonisi bosepeli, tokokamata bibongiseli mpo na kozongela ye elongo na mosakoli mosusu to na ntango oyo bato mosusu bakozala na ndako. Soki likoki ezali te, ekozala kosala na mayele kotinda ndeko moko ya mobali to ya mwasi akende kotala ye soki azali mobali to mwasi. Batoli yango ezali mpe mpo na boyekoli ya Biblia oyo etambwisami mobali elongo na mwasi to mwasi elongo na mobali.— Mat. 10:16.
Bokɛngi esengisami mpe ntango tozali kopona ndeko oyo tokobima na ye. Atako ndeko mobali mpe ndeko mwasi bakoki komibongisa mpo na kobimaka elongo na bantango mosusu, ekozala malamu ete bázala na bandeko mosusu. Mingimingi, kolekisa ngonga molai elongo na ndeko mobali to mwasi oyo azali mobalani na yo te ezali likambo ya mayele te. Na yango, ndeko oyo azwi mokumba ya kokabola bandeko akozala na bokɛngi ntango azali kokabola basakoli, abakisa mpe bilenge.
Na kozaláká ntango nyonso na makanisi malamu, ‘tokotya libaku na nzela na moto te’ ezala mpo na biso moko to mpo na basusu.—2 Kol. 6:3.