Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/97 lok. 7
  • Tokoyekola búku Bolamu na libota

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tokoyekola búku Bolamu na libota
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Masolo mosusu
  • Tóyekola Esakweli ya Danyele
    Mosala na biso ya Bokonzi—2000
  • Omibongisa mpo na koyekola esakweli ya Yisaya!
    Mosala na biso ya Bokonzi—2008
  • Eteni 4​—Tótambwisa boyekoli ya Biblia na ndenge oyo ekosalisa bato bákola
    Mosala na biso ya Bokonzi—2004
  • Bolamu bozali kozwama na boyekoli
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1997
km 8/97 lok. 7

Tokoyekola búku Bolamu na libota

Bokosepela koyoka ete kobanda pɔ́sɔ ya 6 Ɔkɔtɔ́bɛ 1997 tokoyekola búku Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota na boyekoli ya mokanda ya lisangá. Moto moko te akolinga kozanga boyekoli oyo esalami na etuluku na lisalisi ya esaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya libota ya esengo, esaleli oyo ezwi moboko na yango kati na Makomami. Manáka ya boyekoli ekopesa nzela na kotalela na bozindo paragrafe mokomoko mpe versɛ́ mokomoko ya Biblia oyo etyami kati na búku.

Mokapo ya liboso ekoyekolama mobimba na boumeli ya boyekoli ya pɔ́sɔ ya liboso, mpamba te ezali na mikapo mingi te oyo ezwami kati na yango kozanga kotángama. Bobele mpo na ntina moko wana tokoyekola mokapo 15 na mbala moko. Kasi, tokoyekola mikapo nyonso mosusu oyo etikali mbala mibale, elingi koloba pene na katikati pɔ́sɔ na pɔ́sɔ. Yango ekopesa ntango mingi mpo na kotánga mpe kopesa bakomantɛrɛ likoló na mikapo oyo mipesami bakisa mpe kotalela mpenza ndenge ya kosalela mikapo nyonso mipesami kati na paragrafe mokomoko.

Kotalelama ya mituna ya bozongeli oyo mizali na etanda na nsuka ya mokapo mokomoko ezali eteni moko ya ntina kati na boyekoli. Ekosengela kotika ntango mingi mpo na koyanola na mituna yango mpe kotalela mikapo oyo mipesami.

Batambwisi ya boyekoli ya mokanda balendisami na kotya likebi mpenza ntango bazali kobongisa boyekoli; bakolendisa basangani ya etuluku ya boyekoli oyo bazali kotambwisa, bakisa mpe bato ya sika, ete bámibongisa malamu, báyanganaka ntango nyonso na likita yango mpe bápesaka biyano na boyekoli.​​​—om-LI 76-78.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto