Botongi Bandako ya Bokonzi na États-unis
1 Ntango tozali kotala mosala ya kosakola kati na mokili, tolendisami na komona bokoli monene oyo lisangá ya Yehova na mabelé ezali kosala. Na mobu moleki, masangá 246 efungolamaki na États-Unis mpe, na mokili mobimba, masangá nyonso oyo efungolamaki ezalaki 3 288. Na bokóli ya lolenge yango, ezali likambo ya kokamwa te ete mposa ya Bandako ya Bokonzi ezala makasi.
2 Bandeko mibali mpe bandeko basi mingi bazali komonisa milende mpenza mpe bazali kosimba lisangá ya Yehova na kopesáká na bolingo na bango moko ntango na bango mpe biloko na bango mpo na botongi Bandako ya Bokonzi. Moko na moko ya bakomité 75 ya botongi na bitúká oyo bizali na États-Unis ezali kotalela masangá 140 kati na etúká oyo epesameli bango. Mbula na mbula, pene na Bandako ya Bokonzi 200 ezali kotongama mpe 200 mosusu ezali kobongisama. Mokumba ya misala wana nyonso etali komité ya etúká, mpe mosala bazali kosala ezali kosepelisa mingi. Makambo nyonso oyo mataleli botongi Bandako ya Bokonzi mazali komonisa elimo oyo baklisto bazali na yango, elimo ya kopesa mpe elimo ya komiboya, elimo oyo ekeseni mpenza na oyo ezali komonana kati na mokili.—2 Tim. 3:2, 4.
3 Na lobanzo ya kosala makambo ndenge moko, la Société apesi na bakomité ya botongi ya bitúká modɛle moko ya Bandako ya Bokonzi mpo na États-Unis oyo ezali na ba plan kati na D.A.O. (Liyemi lisalemi na ordinatere). Ebongiseli yango ezali kopesa nzela ya kozala na ntango mingi mpe ezali kosɛnga te ete basali ya bolingo malamu bázala mingi. Ebongiseli yango ezali lisusu kopesa nzela ya kosalela malamu mosolo oyo la Société azali na yango mpo na botongi Bandako ya Bokonzi. Na mikolo oyo, bankulutu bazali kopona plan moko kati na ba plan yango ya moboko. Nsima ya kozwa esaleli wana ya sika, komité moko ya botongi ya etúká elobaki: “Tozalaki na esengo mingi mpe, mpo na koloba malamu, tosepelaki na kozwa ba plan yango. . . . Bandeko oyo bazali na makoki na makambo matali architecture mpe génie civil bamoni ete kosalela ba plan yango ezali kopesa nzela ya kozwa uta 50 % kino 60 % ya ntango oyo esengelaki koleka na mosala. Yango mpe ekopesa biso nzela ya kobongisa malamu mpe na lolenge ebongi mpenza Bandako ya Bokonzi.” Masangá oyo mazali komonisa elimo malamu ya kosalana elongo na kosimbáká kobongisama malamu ya Bandako ya Bokonzi, tozali kozela ete mokumba oyo ba architecte, ba technicien, mpe bankolo bakopanyi ya kotonga oyo bazali, na motema mobimba mpe na bolingo malamu kopesa lisungi na bango, ekitisama mpenza.
4 Basali ya bolingo malamu bazali kosimba mosala oyo eleki malamu: La Société azali na botɔ́ndi epai na ebele ya basali ya bolingo malamu oyo bazali kosangana na botongi Bandako ya Bokonzi. Ezali esengo komona bankóto ya basáli ya bolingo malamu komipesa na misala ndenge na ndenge ya botongi. Manáka ya botongi ezali kolónga mpo na elimo ya komipesa na bolingo malamu, elimo ya bokabi mpe ya kosalana elongo oyo basáli ya bolingo malamu mpe oyo bafutamaka te bazali komonisa na kopesáká ntango na bango oyo bakokaki kolekisa na makambo mosusu na masangá na bango mpe na mabota na bango. (Nz. 110:3;1 Kol. 3:23) Elimo oyo etondi na bolingo ebongi kozwa longonya na biso, botɔ́ndi na biso mpe lisungi na biso mobimba.—Lom. 12:10; Ebe. 13:1.
5 Esɛngami na baoyo nyonso bazali na makoki ya kosalisa ntango nyonso komité ya botongi ya etúká ete bátondisa baformilɛrɛ Construction des Salles du Royaume — Questionnaire pour les volontaires (S-82). Ezali lisangá nde ekotinda formilɛrɛ yango na komité ya etúká mpo na koyebisa na komité ya etúká makoki ya mosali ya bolingo malamu yango mpe bantango oyo azalaka na mosala te. Ntango ezalela ya mosali moko ya bolingo malamu ebongwani, na ndakisa soki alongwe na esika moko mpe akei na esika mosusu to akómi mosaleli ya misala to nkulutu, esengeli na ye kotondisa noki formilɛrɛ mosusu, oyo ekotindama na mokomeli ya lisangá. Soki moto moko azali lisusu kokokisa masɛngami te, bankulutu bakoyebisa noki komité ya etúká na nzela ya nkomá. Soki bozali na mposa ya baformilɛrɛ mingi, bokoki kosɛnga yango na nzela ya formilɛrɛ Demande de publications ya sanza na sanza. Mokɛngɛli ya zongazonga atalemami mpe mpo na bato oyo bapesi nkombo mpo na kosala lokola basáli ya bolingo malamu na eteni moko ya mosala oyo ya bulɛɛ. Akotalela fichier des formilaires mpo na basáli ya bolingo malamu mbala nyonso oyo akotala lisangá moko.
6 Tókitisa motuya ya mosolo ya botongi: Bakomité ya botongi ya bitúká bazali na motindá ya kobongisa mosala ya bosombi biloko oyo etambwisami na nkulutu moko ya makoki. Bandeko oyo bazali na mosala yango bakotala biloko nyonso mpo na kozwa oyo ezali na ntalo ya malamu, bakokesenisa bantalo nyonso mpe bakoluka oyo ezali na ntalo ya nsé. Na lolenge yango bakoki koyeba bateki oyo bakobanda kosomba biloko epai na bango mpe biloko oyo bakobanda kosomba. Mbala mosusu, na ntango ya kotalela makambo matali botongi Ndako ya Bokonzi moko, bandeko oyo bazali na makoki kati na lisangá bakobyangama mpo na kopesa lisungi na bandeko oyo bazali basangani na makambo matali bosombi biloko.
7 Mpo na komindimisa ete mosolo mosalelami malamu mpenza, mosolo nyonso oyo mobimisami na bidjɛ ya botongi mosengeli koyebisama na komité ya botongi ya etúká oyo ekotya sinyatili na chèque to na ba facture. Bobele na ntango botongi to kobongisama ya Ndako ya Bokonzi moko ezwi lisungi ya basali ya bolingo malamu ya masangá mosusu longola masangá oyo makosangana na Ndako ya Bokonzi yango, komité ya botongi ekozwa mokumba ya kokɛngɛla mosala yango.
8 Bosengeli kosɛnga na kompanyi nyonso oyo endimi kɔntra ya kosala misala ya Ndako ya Bokonzi ete epesa bilembeteli bimonisi ete ezali na assurance mpo na kobatela basáli na yango, mpe ete esili kofuta assurance oyo ekondima mikumba ya kompanyi na ntango ya makámá na kozongisáká biloko ya ntina, mpe na kobakisáká lisangá na molɔngɔ́ ya babatelami na yango; kɔntra yango esengeli mpe kolobela boyokani ebéngami clause de renonciation to boyokani botali mwa matómba mosusu.
9 Lisungi lipesami na bafiliale mosusu: Ekómaka ete bafiliale mosusu bázala na mposa ya lisungi ya bakomité ya botongi ya bitúká ya États-Unis. Ezalaka mbala mingi na ntango ya kobongisa bisika oyo bibebisamaki na makámá mauti na biloko bizalisami to mpo na kolakisa mosala na basangani ya komité ya botongi na etúká ya esika yango. Bandeko oyo bazali na mikumba na likambo yango mpe bazali pene na kokende na mboka mopaya, na mosolo na bango moko, mpo na kosalisa basusu bazali kopesa litatoli malamu ya bolingo. Ntango lisengi moko oyo lisalami na filiale moko endimami, la Société akobenga komité ya etúká moko oyo ezali mpenza na mosala mingi te ya botongi na ntango yango. Na bongo, makambo mabongisami malamu.
10 Mposa mpo na Bandako ya Bokonzi na mikili mosusu ezali sé kobakisama, ezali na ntina kosalela mosolo oyo mozali na kɛsi na mayele mpenza. Nkomá ya 15 Yúni 1995 oyo etindamaki na masangá ya États-Unis elendisaki biso na kosala nyonso mpo na kosalela malamu mosolo ya botongi to ya kobongisa Bandako ya Bokonzi. Lisɛngi yango endimamaki mpenza. Nzokande, lokola elobaki yango Mosala na biso ya Bokonzi ya Marsi 1997 (États-Unis), ndambo ya mosolo oyo la Société abongisi mpo na Bandako ya Bokonzi ebatelami sikawa mpo na kodefisa masangá ya mikili oyo mposa ya Bandako ya Bokonzi ezali makasi, kasi oyo bazali mpenza na makoki te mpe oyo bazali na mikakatano na makambo ya nkita.
11 Annuaire 1997 elobeli mingi ntina ya kozala na Bandako ya Bokonzi mingi na mikili mosusu. Moko na yango, ezali mokili ya Ukraine epai kuna Bandako ya Bokonzi 47 etongamaki kino sikawa, mpe 56 mosusu ezali naino kotongama. Emonani polele ete mposa ezali na mikili yango. Ezali yango emonisi lapólo moko: “Na ekólo Russie, mposa ya Bandako ya Bokonzi ezali mingi. Bokóli ya motango ya Batatoli ezali kosalama mpenza nokinoki, kasi pene na masangá ntuku mwambe na mitano likoló na monkámá (85 %) oyo matalelami na filiale ya Russie mazali na esika ya koyangana ya bango moko te. Na ekólo Zimbabwe, epai kuna masangá mazali soko 800, mingi kati na yango basengeli koyangana libanda. Na yango, bato mosusu oyo bamonisi bosepeli sika bazali koboya koyangana na makita.” Makambo motindo moko mazali na Mpótó ya Ɛ́sti, na Afrika mpe Amérique latine.
12 Ya solo, na mikolo oyo ya nsuka, bolingo ya bato mingi ezali kokóma mpiɔ, kasi libota ya Nzambe bazali kokóba komonisa bolingo na bango bamoko epai na basusu, bolingo oyo ezali na ndelo te, eponaka mposo mpe te to ekólo te. (Mat. 24:12) Komekoláká Tata na biso ya makoló, tiká ete tókóba komonisa bolingo motindo yango na kosimbáká engebene makoki na biso botongi ya Bandako ya Bokonzi, ezala na États-Unis to bipai mosusu! Na kosaláká bongo; tokondimama na Yehova mpe tokozwa ebele ya mapamboli.—Mki. 3:10; Ebe. 6:10.