Batatoli ya Yehova: bapalanganisi ya solo ya nsango malamu
1 Yesu Klisto apesaki bayekoli na ye nyonso mokumba ya kopalanganisa nsango malamu, kopesáká bango etinda ya sikisiki ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi. (Mat. 24:14; Mis. 10:42) Na likambo yango, bayekoli na ye ya ekeke ya liboso bapesaki ndakisa na kolobáká kozanga kotika na ntina na Bokonzi bobele na bisika ya losambo te, kasi mpe na bisika nyonso oyo bazalaki kokutana na bato, ezala na bisika ya bato nyonso to na ndako na ndako. (Mis. 5:42; 20:20) Lelo oyo, biso Batatoli ya Yehova, tozali komimonisa bapalanganisi ya solo ya nsango ya Bokonzi. Yango ezali komonana polele na mosala na biso ya kosakola oyo tozali kosala na mikili 232 mpe na bayekoli ya sika oyo bobele nsima ya mbula misato oyo euti koleka, bazwaki batisimo bato koleka milió moko! Mpo na nini mosala na biso ya kopalanganisa nsango malamu ezali kolonga boye?
2 Nsango malamu ezali kosepelisa biso mingi: Bapalanganisi ya nsango malamu bazali bamemi-nsango, to basakoli ya nsango malamu. Lokola tozali bapalanganisi ya nsango malamu, tozali na libaku ya motuya koleka, kosakola Bokonzi ya Yehova, elikya ya solo bobele moko oyo ekoki kopesama epai na bato ya mokili oyo banyokwami. Tozali na esengo mingi lokola tosili koyeba ete makoló ya sika makotya boyangeli ya sembo likoló na mabelé ya sika mpe yango ekotonda na bato ya sembo kati na Paladiso oyo ezali koya. (2 Pet. 3:13, 17) Bobele biso nde tozali na elikya yango mpe tozali na mposa makasi ya koyebisa yango epai na basusu.
3 Bolingo ya solo ezali kopusa biso: Mosala ya kopalanganisa nsango malamu ezali kobikisa bato. (Lom. 1:16) Yango wana tozalaka na esengo mingi mpo na kopalanganisa nsango ya Bokonzi. Lokola tozali bapalanganisi ya solo ya nsango malamu, tozali kolinga bazalani na biso, mpe bolingo yango ezali kopusa biso ete tóyebisa nsango malamu epai na bato ya libota na biso, epai na bato oyo bafandi pembeni na biso, epai na bayebani na biso mpe epai na bato mingi mpenza, oyo tokozwa likoki ya kosolola na bango. Kokokisa mosala yango na molimo na biso mobimba ezali moko na lolenge malamu mpenza oyo tokomonisa bolingo ya solo oyo tozali na yango mpo na bazalani na biso.—1 Tes. 2:8.
4 Elimo santu ya Nzambe ezali kosunga biso: Liloba ya Nzambe ezali kondimisa biso ete ntango tozali kolona mpe kosopa mai likoló na mbóto ya Bokonzi, Yehova azali ‘kokólisa’ yango. Ezali mpenzampenza likambo oyo tozali komona kosalema na yango kati na lisangá ya Yehova lelo oyo. (1 Kol. 3:5-7) Elimo ya Yehova nde ezali kosunga biso na misala na biso mitali kopalanganisa nsango malamu mpe yango ezali kopesa biso likoki ya kozwa matomba malamu.—Yoe. 2:28, 29.
5 Wana tozali kobatela elendiseli oyo epesami na 2 Timoté 4:5, oyo etali ‘kosala mosala ya kopalanganisa nsango malamu’ mpe lokola tozali kolinga bazalani na biso, tiká ete tózala na mposa ya koyebisa nsango malamu ya Bokonzi na mabaku nyonso, lokola tondimisami ete Yehova akokóba kopambola mosala na biso!