Mosala na biso ya kosakola: Elakiseli ya bolingo ya solo
1 Na mosala na biso ya kosakola, tozali komonisa botosi na biso na mibeko mibale ya minene koleka. (Mat. 22:37-39) Bolingo oyo tozali na yango mpo na Yehova ezali kopusa biso ete tóloba makambo malamu na ntina na ye. Bolingo oyo tozali na yango mpo na bazalani na biso ezali kopusa biso ete tólendisa bango báyeba makambo oyo Nzambe alingaka mpe mikano na ye, mpo bálinga Yehova lokola biso mpe bámitya bango moko na ngámbo ya baoyo bakozwa mbano ya bomoi ya seko. Na bongo, na mosala na biso ya kosakola, tozali kokumisa nkombo ya Yehova mpe tozali kopesa bazalani na biso elikya ya Bokonzi ya Nzambe oyo motuya na yango ekoki kotángama te. Ɛɛ, mosala na biso ya kosakola ezali elakiseli ya bolingo ya solo mpo na Nzambe mpe mpo na bato.
2 Bolingo na biso ezali kopusa biso ete tósolola na bato ya lolenge nyonso mpe ya bizalela nyonso. (1 Kol. 9:21-23) Na ndakisa, moklisto moko oyo azali nkulutu na lisangá asalaki mobembo na mpɛpo mpe afandaki pembeni na sángó moko. Na mayele nyonso, nkulutu yango atunaki sángó mwa mituna oyo epusaki ye na koloba, mpe na nsima, nkulutu abendaki lisolo yango na likambo litali Bokonzi ya Nzambe. Liboso ete sángó yango akita na mpɛpo, azwaki buku mibale oyo nkulutu alakisaki ye. Bolingo ya solo oyo nkulutu yango amonisaki na mozalani na ye ebimisaki matomba malamu!
3 Bolingo epusaka biso ete tósakola: Baoyo bazali kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi to mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza bazali komonisa bolingo ya solo mpo na Nzambe mpe mpo na bazalani na bango. Babongisi-nzela bazali ntango nyonso kopesa ntango na bango mpe milende na bango mpo na kosalisa bato mosusu na elimo. Eloko nini epusaka bango ete básalaka bongo? Ndeko mwasi moko mobongisi-nzela alobaki ete: “Nayebi ete bolingo ezali mbuma ya elimo ya Nzambe. Soki mpo na yango te, mbɛlɛ nalingaki kozala na losambo ya solo te, mpe mingi koleka nalingaki kozwa te matomba malamu oyo mosala ya mobongisi-nzela epesaka. Bolingo ezali kopusa ngai ete namibanzabanzaka mpo na bato, nasosolaka bamposa na bango, mpe nazalaka na botɔ́ndi mingi ntango bato bamoniselaka ngai bolingo.” Yesu amoniselaki bato bolingo ya lolenge wana. Mokolo moko, ntango amonaki ete bayekoli na ye balɛmbi mingi, Yesu akendaki na bango na esika moko mpo ete ‘bápema moke,’ kasi bato bakatisaki bango liboso. Yesu asalaki nini? ‘Koyokeláká bango mawa,’ atyaki bamposa na ye pembeni mpo na “koteya bango makambo mingi.”—Mko. 6:30-34.
4 Ata soki bato bazali koboya nsango malamu oyo tozali komemela bango, na mitema na biso, tozali na esengo mingi mpamba te toyebi ete, lokola topusami na bolingo, tozali kosala oyo ekoki na biso mpo na kosalisa bango ete bázwa lobiko. Ntango mokomoko na biso akosambisama na Klisto, tokozala na esengo mingi mpenza mpo ete tómonisaki bolingo ya solo na ‘kokokisáká na bozindo mosala na biso ya kosakola.’—2 Tim. 4:5.