Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 5/98 lok. 1
  • Tóyangana na makita ‘lisusu mingi koleka’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tóyangana na makita ‘lisusu mingi koleka’
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini tosengeli koyanganaka mpo na kosambela Yehova?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Mpo na nini tosengeli koyangana na makita ya boklisto
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Bolamu nini okoki kozwa na makita ya Batatoli ya Yehova?
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Ndenge oyo Yehova azali kotambwisa biso.
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1998
km 5/98 lok. 1

Tóyangana na makita ‘lisusu mingi koleka’

1 Na bileko nyonso, basaleli ya Yehova bamonaka ete koyangana na makita ezali mpenza likambo ya ntina. Mpo na Bayisalaele, tempelo mpe sinagoga ezalaki bisika mpo na losambo ya solo, mpo na kozwa mateya mauti na Nzambe mpe mpo na bokutani ya esengo. Lolenge moko mpe, baklisto ya ekeke ya liboso batikaki te koyangana esika moko. Lokola masɛnginya mpe komekama ezali se kobakisama na mikolo oyo ya nsuka, mikolo ya mpasi, biso mpe tozali na mposa ya kolendisama na elimo na koyanganáká na makita ya lisangá ‘lisusu mingi koleka.’ (Ebe. 10:25) Tótalela ntina misato oyo tozali koyangana na makita.

2 Mpo na bokutani: Makomami mazali kolendisa biso ete ‘tókoba kobɔndisana moko na mosusu mpe tólendisana moko na mosusu.’ (1 Tes. 5:11) Ntango tozali kokutana mpo na koyoka mateya mauti na Nzambe, yango ezali kotondisa mayele na biso na makanisi malamu mpe ezali kopusa biso ete tósala misala malamu. Kasi soki tokómi kozangisa makita, tozali mosika te na kokolisa makanisi ya bozoba, ya moimi mpe ya mbindo.​—Mas. 18:1.

3 Mpo na koteyama: Makita ya boklisto ezali ntango nyonso kopesa mateya mauti na Biblia mpo ete tókoba kolinga Nzambe na bolingo ya solo kati na mitema na biso. Mateya yango mazali kopesa litambwisi malamu mpo ete tósalela “toli nyonso ya Nzambe.” (Mis. 20:27, NW) Makita ezali kobongisa biso mpo ete tózala na makoki ya kosakola mpe koteya nsango malamu; makoki oyo tosengeli na yango mpenza mpo ete tóyoka esengo monene oyo ezalaka na kozwa mpe na kosalisa bato oyo basepeli na mateya ya solo ya Biblia.

4 Mpo na libateli: Na mokili oyo mabe, lisangá ezali ebombamelo ya solo na elimo​—hema ya kimya mpe ya bolingo. Ntango tozali koyangana na makita ya lisangá, elimo santu ya Nzambe ezali kosala bopusi makasi likoló na biso, kobimisáká mbuma ya elimo lokola “bolingo, esengo, kimya, motema molai, boboto, bolamu, kondima, bopɔlɔ, komipekisa.” (Gal. 5:22, 23, NW) Na mikolo mileki, batunaki bakɛngɛli-batamboli mpo na nini bato mingi bazali kobimisama na lisangá, mpe bakɛngɛli-batamboli bamonisaki ete mibembo milaimilai mpo na mombongo mizali kolɛmbisa bato na elimo. Na kozaláká mosika na libota na ye mpe na lisangá ya boklisto na boumeli ya basanza, mingimingi moto akolekisa basanza kozanga kosakola, to akotika mpenza kosakola, akokwea na pite mpe na masumu mosusu. Nzokande, makita ezali kolendisa biso ete tótikala ngwi kati na kondima. Yango ezali kopesa biso makoki mpo ete tómibongisa liboso na komekama oyo ezali koya.

5 Na koyanganáká mbala na mbala na makita, tokomona bosolo ya maloba ya Davidi oyo mazwami na Nzembo 133:1, 3 ete: “Talá lokola ezali malamu mpe na esengo soko bandeko [bakofanda esika moko na bomoko, NW]!” Lelo oyo, ezala epai wapi basaleli ya Yehova bazali kosalela ye mpe bazali koyangana esika moko, “kuna [Yehova] alakaki kopambola na bomoi na lobiko.”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto