Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 7/98 nk. 3-6
  • Bazali kobatela biloko ya Nkolo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bazali kobatela biloko ya Nkolo
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mokumba ya kapita kati na lisangá ya boklisto
  • “Kapita ya sembo mpe ya mayele”
  • Kotalela makambo na lolenge mosusu
  • Mposa ndenge na ndenge mpo na kobongisa mosala
  • Makambo ya kotalela
  • Tóbatela biloko
  • Konyata mikanda mikolimbolaka biblia na ntango ya epekiseli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Ozali kapita malamu!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Oyebaki yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
Mosala na biso ya Bokonzi—1998
km 7/98 nk. 3-6

Bazali kobatela biloko ya Nkolo

1 Na ntango ya lisolo ya Biblia, kapita azalaki kozwa mikumba minene. Yango wana, Abalayama apesaki kapita na ye mokumba ya koluka mwasi mpo na mwana na ye Yisaka. (Gen. 24:1-4) Kapita yango azalaki na mokumba ya kosala ete libota ya Abalayama elandana. Ezalaki mpenza mokumba moko monene. Ezali likambo ya kokamwa te ete Paulo aloba: “Bakolukaka epai na [bakapita, NW] ete amonana moto na sembo.”​—1 Kol. 4:2.

Mokumba ya kapita kati na lisangá ya boklisto

2 Biblia ezali kotalela makambo mosusu ya mosala ya baklisto lokola mokumba ya kapita. Na ndakisa, ntoma Paulo alobelaki baklisto ya Efese na ntina na ‘mokumba ya kapita ya ngɔlu ya Nzambe oyo epesamelaki ye mpo na bango.’ (Ef. 3:2, NW; Kols. 1:25) Azalaki kotalela etinda na ye ya kosakola nsango malamu epai na mabota lokola mokumba ya kapita oyo asengelaki kokokisa na bosembo mpenza. (Mis. 9:15; 22:21) Ntoma Petelo akomelaki bandeko na ye bapakolami ete: “Bónyangelana na koimaima te. Pelamoko ezwi moto na moto likabo na ngɔlu, bósungana na yango lokola [bakapita, NW] malamu na ngɔlu na Nzambe, oyo [emonanaka, NW] na mitindo mingi.” (1 Pet. 4:9, 10; Ebe. 13:16) Biloko nyonso ya mosuni oyo baklisto yango ya ekeke ya liboso bazalaki na yango eutaki na ngɔlu ya Yehova. Na bongo, bazalaki bakapita ya biloko yango mpe basengelaki kosalela yango na lolenge oyo elongobani na baklisto.

3 Lelo oyo, Batatoli ya Yehova bazali kotalela makambo na lolenge wana. Lokola bamipesi na Yehova Nzambe, batalelaka nyonso oyo bazali na yango​—bomoi na bango, makasi na bango, biloko na bango​—lokola mbuma ya ‘ngɔlu ya Nzambe, oyo emonanaka na mitindo mingi.’ Lokola bakapita malamu, bamonaka ete bazali na mokumba liboso na Nzambe na lolenge oyo bazali kosalela biloko yango. Lisusu, basili kozwa boyebi ya nsango malamu. Yango mpe ezali libombo ya biloko oyo bazali na mposa ya kosalela na lolenge malamu, elingi koloba mpo na kokumisa nkombo ya Yehova mpe mpo na kosalisa bato mosusu ete bákóma na boyebi ya solo.​—Mat. 28:19, 20; 1 Tim. 2:3, 4; 2 Tim. 1:13, 14.

4 Lolenge nini Batatoli ya Yehova bakokisaka mokumba na bango lokola bakapita? Lapolo ya mobu mobimba ezali komonisa ete, na mobu moleki, basalaki bangonga koleka miliare moko na mosala ya kosakola “nsango malamu ya Bokonzi” na mokili mobimba mpe batambwisaki boyekoli ya Biblia 4 500 000 na bato oyo bazali kosepela na nsango malamu yango. (Mat. 24:14) Bamonisi mpe ete bazali bakapita ya sembo ya Yehova na kopesáká makabo ya bolingo malamu mpo na kosimba mosala ya kosakola na mokili mobimba mpe mpo na kobongisa Bandako na bango ya Bokonzi, na koyambáká bakɛngɛli-batamboli mpe baklisto mosusu, mpe na komonisáká boboto mingi epai na baoyo bazali kati na bosɛnga, na ndakisa baoyo bazali konyokwama mpo na bitumba. Emonani ete baklisto ya solo bazali kobatela biloko ya Nkolo na lolenge malamu.

“Kapita ya sembo mpe ya mayele”

5 Mokumba ya kapita yango esalemaka bobele moto na moto te, kasi mpe na lisangá mobimba. Yesu alobaki ete lisangá ya bapakolami awa na mabelé ezali “kapita ya sembo mpe ya mayele.” (Luka 12:42) “Kapita ya sembo” yango azali na mokumba ya kopesa ‘bilei’ mpe ya kotambwisa mosala ya kosakola nsango malamu na mabota nyonso. (Emon. 12:17) Na boyokani na likambo yango, kelasi ya kapita ya sembo, oyo emonisami na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, ezali na mokumba na lolenge ya kosalela makabo ya bolingo malamu oyo mazali kopesama mpo na kosimba mosala ya kosakola na mokili mobimba. Makabo yango mazali kopesama na motema mobimba, mpe “kapita ya sembo mpe ya mayele,” azali na mokumba ya kokeba ete masalelama na makambo oyo yango epesamaki, kasi masalelama na mayele, na lobanzo mpo na kobatela yango mpe na lolenge malamu.

6 Tozali kokuta ndakisa moko ya kosalelama na mayele ya makabo yango kati na bokoli ya misala ya konyata mikanda ya Batatoli ya Yehova na boumeli ya ekeke ya 20. Kokabolama ya Babiblia mpe mikanda mikolimbolaka Biblia​—bazulunalo, babuku, batrakte mpe Nsango ya Bokonzi​—esali mosala monene kati na mosala ya kopalanganisa “nsango malamu” na “mikolo ya nsuka.” (Mko. 13:10; 2 Tim. 3:1) Na oyo etali Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, yango ezali esaleli ya moboko mpo na kopesa “bilei na ntango ebongi” epai na basangani ya “ndako ya Nzambe” mpe epai na baninga na bango “ebele monene” ya “bampate mosusu.”​—Mat. 24:45; Ef. 2:19; Emon. 7:9; Yoa. 10:16.

7 Na ebandeli, mikanda nyonso ya Batatoli ya Yehova mizalaki konyatama na bakompanyi ya mombongo oyo enyataka mikanda, kasi na bambula ya 1920 ekateli ezwamaki ete ekozala malamu basaleli ya Yehova bányataka mikanda yango bango moko. Nsima ya kobimisa mwa mikanda na 1920, misala ya konyata mikanda mikómaki kobakisama mokemoke na Brooklyn kino kokóma mingi koleka. Na 1967, masini ya konyata mikanda etondaki na ndako minei. Mikanda ebandaki mpe konyatama na bikólo mosusu, kasi mosala yango ekatanaki na bikólo mingi kati na bikólo yango na ntango ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba.

8 Nzokande, atako masini ekómaki mingi, misala ya konyata mikanda na États-Unis ekokaki te mpo na kobimisa mikanda ya mokili mobimba. Na bambula ya nsima ya etumba, bafungolaki to mpe bakobaki misala ya konyata mikanda na bikólo mosusu mingi, kati na yango Afrique du Sud, Allemagne fédérale, Angleterre, Canada, Danemark, Grèce, Suisse. Na ebandeli ya bambula ya 1970, bikólo: Australie, Brésil, Finlande, Ghana, Japon, Nigeria mpe Philippines bikɔtaki mpe na molɔngɔ ya mosala ya konyata mikanda. Binyateli ya bamoko ya bikólo yango ezalaki konyata babuku. Bobele na eleko wana, bamisionere ya Gileadi babongisamaki na esika ya konyata mikanda mpe batindamaki na bamoko ya bikólo yango mpo na kosalisa bandeko ete bákokisa mosala yango.

9 Na boumeli ya bambula ya 1980, bikólo oyo bizalaki konyata bazulunalo bikómaki 51.a Nyonso wana emonisi lolenge malamu ya kosalela biloko ya Nkolo. Ezalaki elembeteli ya polele ya bokoli ya mosala ya Bokonzi. Oyo nde litatoli ya nguya emonanaki mpo na lisungi ya bolingo malamu ya bamilio ya Batatoli ya Yehova oyo ‘bakumisaki Yehova na biloko na bango ya motuya’! (Mas. 3:⁠9) Na yango, bamimonisaki ete bazalaki bakapita malamu na oyo Yehova apesaki bango na mitindo mingi.

Kotalela makambo na lolenge mosusu

10 Na boumeli ya bambula ya 1970 mpe na ebandela ya bambula ya 1980, batekiniki ya konyata mikanda ekolaki mingi, mpe Batatoli ya Yehova basalelaki batekiniki yango ya sika. Kino ntango wana, bazalaki konyata mikanda engebene mwango ya kala oyo ebéngami typographie. Nyonso wana ebongwanaki mokemoke, mpe babandaki kosalela mwango ya mikolo na biso mpenza oyo ebengami offset. Na yango nde mikanda kitoko mizali sikawa konyatama na bililingi ya langi minei na esika ete ezala langi mibale (moindo mpe langi mosusu) na mwango ya kala oyo ebéngami typographie. Nsima na yango, ordinatere ebongolaki misala oyo misalemaka liboso ya konyata. Na bongo, Batatoli ya Yehova babimisaki mwango moko ebéngami Système de Photocomposition Électronique Multilingue (MEPS), mwango ya ordinatere oyo ezali kopesa nzela na konyata mikanda na nkota koleka 370. Ebongiseli moko te ya ordinatere ya mombongo ekokani na MEPS mpo na oyo etali kosala mpo na kobimisa mikanda na nkota mingi ndenge wana.

11 Na lisalisi ya MEPS mpe na batekiniki mosusu ya sika, na ndakisa oyo ebéngami courrier électronique, bokoli mosusu esalami makasi na oyo etali kobimisa bilei na ntango ebongi. Liboso, na batekiniki ya kala, soki masolo ya bazulunalo na Lingelesi ebimi, oyo ya nkota mosusu ezalaki kobima nsima ya basanza, ntango mosusu nsima ya mbula mobimba. Sikawa, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ebimaka mbala moko na nkota 115, mpe Lamuká! ebimaka mbala moko na nkota 62. Yango elingi komonisa ete na mokili mobimba bayangani koleka 95 % na boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli pɔsɔ na pɔsɔ oyo ebongisami na Batatoli ya Yehova batalelaka lisolo bobele moko bango nyonso na mbala moko. Oyo nde lipamboli! Na ntembe te, batekiniki oyo ya sika ezali mpenza lolenge malamu ya kosalela biloko ya Nkolo.

Mposa ndenge na ndenge mpo na kobongisa mosala

12 Myango oyo ya sika esali ete lolenge ya Batatoli ya Yehova ya konyata mikanda ebongwana. Binyateli ya offset bisalaka na lombangu koleka binyateli ya typographie, kasi bizali mpe na ntalo mingi koleka. Myango ya elektroniki mpe ya ordinatere oyo misengeli kosalelama na misala oyo misalemaka liboso ya konyata mikanda​—kokoma masolo, kobongola, koyema, kosangisa​—mipesaka makoki mingi koleka myango ya kala, kasi yango esɛngaka mbongo mingi. Emonani sikawa polele ete konyata bazulunalo na bikólo 51 ezali kobatela mosolo te. Yango wana, na bambula ya 1990, “kapita ya sembo” atalelaki lisusu likambo yango. Asukisaki ndenge nini?

13 Boyekoli emonisi ete ‘biloko ya motuya’ oyo bipesami na Batatoli ya Yehova mpe baninga na bango bikosalelama malamu soki mosala ya konyata mikanda ebongisami lisusu. Na bongo, bakitisi mokemoke motángo ya bafiliale oyo ezali konyata mikanda. Ekólo Allemagne ezongeli konyata bazulunalo mpo na mikili mingi ya Mpoto ya Ɛsti mpe ya Mpoto ya Wɛsti, bakisa mpe bikólo mosusu oyo ezalaki naino konyata bazulunalo na yango yango moko. Ekólo Italie ezali konyata mikanda mpo na bikólo ya Afrika mpe bikólo ya Mpoto ya Sudi-Ɛsti, kati na yango ekólo Grèce mpe ekólo Albanie. Na Afrika, bobele bikólo oyo, Nigeria mpe Afrique du Sud nde enyataka bazulunalo. Ebongiseli motindo wana esalemi na biteni nyonso ya mokili mobimba.

Makambo ya kotalela

14 Na Yulí 1998, bikólo mosusu ya Mpoto ekonyata lisusu bazulunalo te, lokola Autriche, Danemark, France, Grèce, Pays-Bas mpe Suisse. Bikólo bikonyata bazulunalo na Mpoto ezali bongo Allemagne, Angleterre, Espagne, Finlande, Italie mpe Suède. Makambo nini matalelamaki mpo ete bápona bikólo oyo bikokoba konyata mikanda mpe bikólo oyo bikonyata lisusu te? Na boyokani na mokumba na ye ya kobatela biloko ya Nkolo na mayele, “kapita ya mayele” ataleli mpo na ekólo mokomoko mbongo oyo esengeli mpo na konyata bazulunalo mpe kotinda yango bipai mosusu. Ataleli mpe mibeko ya bikólo yango mpo na koyeba epai oyo mikanda ekoki konyatama mpe kotindama na lolenge oyo eyokani na mibeko ya Leta mpe ekozala malamu mpo na biso.

15 Ezali mingimingi mpo na bantina ebongi nde mikanda misuki konyatama na bikólo mosusu mpe ebakisami na bisika mosusu. Ekozala malamu konyata na ekólo bobele moko mikanda oyo esengeli mpo na bikólo mosusu mingi; na bongo bisaleli oyo esɛngaka mbongo mingi bikosalelama na lolenge malamu. Konyata mikanda ezali kosalema sikawa epai oyo mbongo ekoki kobima moke, bisaleli bizali mingi mpe myango ya kotinda mikanda ezali malamu. Na bongo, biloko ya Nkolo bikosalelama malamu. Ya solo, kotika konyata mikanda na ekolo moko elingi koloba te ete kuna mosala ya kosakola esuki. Mikanda ekozala mingi, mpe bankóto ya Batatoli oyo bazali na bikólo yango bakokoba kosakola “nsango malamu ya kimya” epai na bazalani na bango. (Ef. 2:17) Soki tolongoli mbongo, ebongiseli oyo ezali na matomba mosusu ya malamu.

16 Na ndakisa, binyateli mingi ya mikolo na biso oyo ezalaki na Danemark, na Grèce, na Pays-Bas mpe na Suisse etindamaki na Nigeria mpe na Philippines. Batambwisi ya makoki ya binyateli yango bandimaki kokenda elongo na yango mpe kobongisa bandeko esika yango ekei mpo ete bango mpe bátambwisa binyateli yango na nsima. Na yango, bikólo yango ezali sikawa na bazulunalo ya kitoko lokola na bikólo mosusu.

17 Talelá litomba mosusu: mbongo mpo na konyata bazulunalo ezali sikawa kobimisama na bikólo oyo bizali kosalela binyateli yango. Na ntina yango, na bikólo oyo bazali konyata lisusu bazulunalo te, mosolo ezali sikawa kosalelama mpo na makambo mosusu, na ndakisa mpo na kotonga Bandako ya Bokonzi to mpo na kokokisa bamposa ya bandeko na biso na mikili ya bobola. Na yango, na lisalisi ya kosalelama malamu ya biloko ya Nkolo, maloba oyo ya ntoma Paulo epai na Bakolinti makoki kosalelama malamu mpenza mpo na mokili mobimba: “Nalingi te ete ezala likambo ya pɛtɛɛ mpo na basusu, kasi mpasi mpo na bino; kasi nde na bokokani bozwi na bino esunga na ntango oyo bozangi na bango . . . mpo ete bokokani ezala.”​—2 Kol. 8:13, 14, NW.

18 Na lisalisi ya ebongiseli yango, Batatoli ya Yehova ya mokili mobimba bazali komiyoka lisusu pene bamoko na bamosusu. Mpo na Batatoli ya ekólo Danemark, lokola bazulunalo na bango ekonyatama na Allemagne ezali na likambo te, atako bamesanaki konyata yango bango moko. Bazali na botɔ́ndi mpo na mosala oyo mozali kokokisama na bandeko na bango ya ekólo Allemagne. Batatoli ya Yehova na Allemagne basepelaki te mpo ete makabo na bango mazali kosalelama mpo na konyata mikanda mikolimbolaka Biblia mpo na ekólo Danemark​—⁠to Russie, Ukraine to bikólo mosusu? Soko moke te. Bazali nde na esengo ya koyeba ete makabo ya bandeko na bango ya bikólo yango makoki sikawa kosalelama mpo na kokokisa bamposa mosusu.

Tóbatela biloko

19 Kati na Bandako nyonso ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba, ezalaka na sanduku ya makabo ya bolingo malamu oyo likoló na yango bakomi ete “Makabo ya bolingo malamu mpo na kosunga mosala ya la Société na mokili mobimba​—Matai 24:14.” Makabo ya bolingo malamu oyo matyamaka na basanduku yango masalelamaka bipai binso oyo mposa ezali. Ezali “kapita ya sembo mpe ya mayele” nde azwaka bikateli mpo na kosalelama ya makabo yango. Na bongo, esalemaka ete makabo ya bolingo malamu oyo matyami na sanduku na ekólo moko makoki kosunga misala ya Batatoli ya Yehova na ekólo mosusu, na ntaka ya bakilomɛtɛlɛ mingi. Makabo motindo wana masalelamaki mpo na kosunga baninga na biso baklisto oyo bazwaki makama ya bikumbaki, ya koningana ya mabelé to ya bitumba. Makabo yango mazali mpe kosalisa bamisionere kati na mikili koleka 200.

20 Na momeseno, kati na masangá ya Batatoli ya Yehova balobelaka makambo matali mbongo bobele mbala moko na sanza, mpe na boumeli ya mwa miniti moke. Kokɔngɔla mabonza ezalaka te, ezala na Bandako ya Bokonzi to na mayangani. Basɛngaka mbongo na moto moko te ata mpe na bakompanyi te. Na momeseno, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ebimisaka bobele lisolo moko na mbula mpo na kolimbola lolenge baoyo basepeli bakoki kopesa makabo ya bolingo malamu na la Société Watch Tower mpo na kosimba mosala ya kosakola na mokili mobimba. Kati na Lamuká! balobelaka makambo matali mbongo te. Na bongo, ndenge nini likoki ezalaki mpo na kokokisa mosala monene ya kosakola na mokili mobimba, kotonga Bandako ya Bokonzi oyo esengeli, kosimba mosala ya ntango nyonso mpe kopesa lisalisi na bandeko oyo bazalaki na bosɛnga? Yehova apamboli basaleli na ye na lolenge ya kokamwa na kolamusáká elimo ya bokabi. (2 Kol. 8:2) Tozali kosimba libaku oyo epesameli biso mpo na kopesa matɔ́ndi na baoyo nyonso ‘bakumisi Yehova na biloko na bango ya motuya.’ Bámindimisa bango nyonso ete “kapita ya sembo” akokoba kobatela biloko ya Nkolo! Tozali kobondela Yehova ete apambola bibongiseli nyonso oyo bikamatami mpo na bokoli ya mosala na ye na mokili mobimba.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Na bikólo nsambo kati na yango, mikanda ezalaki konyatama na bakompanyi ya mombongo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto