Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 5/99 lok. 8
  • Ndenge ya kokolisa mosala na yo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kokolisa mosala na yo
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1999
  • Masolo mosusu
  • Ndenge ya kosala lisusu mingi na mosala ya Nzambe
    Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
  • Tókolisa mosala na biso ya motuya
    Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Olingi kosala mingi lisusu?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Formasyo mpo na basakoli ya Bokonzi
    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1999
km 5/99 lok. 8

Ndenge ya kokolisa mosala na yo

1 Mbula koleka 40 esili koleka uta lisolo moko oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Osalaka nyonso oyo ekoki na yo?” ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuni 1955 (na Lifalanse). Lisolo yango emonisaki na boboto mpenza ndenge nini basaleli ya Yehova bakoki kosala lisusu milende mingi na mosala ya kosakola mpo na kokolisa mosala na bango ya Bokonzi. Toli malamu wana etaleli mpe biso lelo oyo, wana tozali kosala makasi lisusu koleka.

2 Mosala na biso nyonso oyo tozali kosala esengeli kopusama na mobeko monene oyo: ‘Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba, na mayele na yo nyonso mpe na makasi na yo nyonso.’ (Mko. 12:30, NW) Tokomonisa ete tolingaka Yehova soki tozali kosalela malamumalamu mabaku nyonso oyo tozwi mpo mosala na ye ya Bokonzi ekende liboso. Makanisi oyo elandi ekosalisa yo okolisa mosala na yo.

3 Memá mokumba na yo: Bandeko mibali oyo bazwá batisimo bakoki kosala makasi mpo na kokóma basaleli na misala mpe na nsima kosala makasi mpo na kokóma bankulutu. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Sɛtɛmbɛ 1990, ebimisaki masolo mibale oyo ezalaki na mitó ya likambo ete: “Ozali koluka mokumba?” mpe “Okokisi masɛngami mpo na kozwa mokumba?” Masolo yango elendisaki bandeko ya mibali mingi ete bámibongisa mpo na kozwa mikumba na lisangá. Sɛngá bankulutu ya lisangá na yo bálakisa yo likambo ya sikisiki oyo osengeli kosala mpo na koluka mikumba mpe kokokisa masɛngami.

4 Bankulutu mpe basaleli na misala oyo bazali minzemba balendisami ete bákanisa malamumalamu mpo na kokɔta na Eteyelo mpo na kobongisa basungi. Okoki koyeba ndenge eteyelo yango esalemaka soki okotánga mikanda mpe bazulunalo oyo ezali kolobela eteyelo yango. Talá na ba Index ya la Société, epai bakomá “École de formation ministérielle.” Ba Index yango ezali oyo ya 1986-1995, 1996, mpe 1997. Ozali komona ‘ekuke monene ya mosala’ oyo efungwani liboso na yo? (1 Kol. 16:9a) Bandeko ya mibali mingi oyo balekaki na eteyelo yango bayebaki te mikumba oyo ezalaki kozela bango na nsima. Lelo oyo bazali kosala na Betele to kosala lokola babongisi-nzela monene to kosala mosala ya misionere to kosala lokola bakɛngɛli ya zongazonga​—na ekólo oyo to epai mosusu.

5 Luká kokɔta na mosala ya ntango-nyonso: Bilenge oyo bauti kosilisa kelasi na bango, bamama ya bana, mpe moto nyonso oyo azwá pasyo basengeli kokanisa kosala mosala ya mobongisi-nzela. Talelá lisusu siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Augusto 1998, mpe sololá na babongisi-nzela oyo liboso ya kobanda mosala na bango bazalaki na makambo ya ndenge moko na oyo ya yo. Mbala mosusu yango ekopusa yo ete okolisa lisusu mosala na yo ya kosakola na kosaláká mosala ya mobongisi-nzela, ndenge bango bazali kosala yango. (1 Kol. 11:1) Okoki kokolisa lisusu mosala na yo ya kosakola mpe kolekisa ngonga 70 na sanza mpo na kokóma mobongisi-nzela ya sanza na sanza?

6 Bandeko koleka 17 000 bazali sikoyo kosala na bafiliale mpe Betele na mokili mobimba. Mosala na biso ya Bokonzi ya Sɛtɛmbɛ 1995 elobelaki makambo oyo esɛngami mpo na kokɔta na mosala yango. Tolendisi yo otánga yango mpo na koyeba soki okokisi masɛngami mpo na kozwa libaku wana oyo bato mingi te bazali na yango, ya kosala na Betele.

7 Kende kosala epai mposa ezali makasi: Ofandaka na teritware oyo mosala ya kosakola esalamaka mingi kuna? Ofandaka epai basakoli bazali mingi kasi teritware ezali moke? Mpo na nini te kozwa likanisi ya kokolisa lisusu mosala na yo ya kosakola na kokendáká epai mposa ezali makasi? Mbala mosusu ekosengela na yo kokende na mwa mboka moko ya pembeni epai kuna bazali na mposa ya basakoli mingi. (Mat. 9:37, 38) Kozwa ekateli yango mbangumbangu te. Osengeli kokanisa mpe kobondela liboso ya kosala yango. (Luka 14:28-30) Sololá na bankulutu mpe mokɛngɛli ya zongazonga mpo na koyebisa bango ndenge makambo na yo ezali. Bango bakosalisa yo mpo na koyeba soki ezali malamu ete okende na teritware yango sikoyo to omibongisa naino mpo na kokende kuna na mikolo mizali koya. Soki olingi kokomela la Société mpo na koyeba epai wapi okoki kokende kosala, mokanda na yo esengeli kotindama nzela moko na mokanda mosusu oyo ezali na sinyatili ya bankulutu ya komite ya mosala ya lisangá na yo.

8 Bongisá lisusu mosala na yo ya kosakola: Biso nyonso tokoki kosangana lisusu mingi na mosala ya kosakola na kobongisáká lolenge tozali kosala mosala yango. Osanganaka na mitindo nyonso ya mosala ya kosakola, mpe opesaka litatoli ndako na ndako, litatoli ya libaku malamu, kozongela bato oyo basepelaki na solo mpe otambwisaka boyekoli ya Biblia? Soki ozali kotambwisa boyekoli ya Biblia, okoki kobongisa lisusu ndenge na yo ya koteya? Ekozala malamu ete otalela lisusu siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Yuli 1996 mpo na kozwa makanisi oyo okoki kosalela mpo na kopusa moto oyo ozali koyekola na ye Biblia amipesa mpe azwa batisimo.

9 Lolenge ya kokolisa mpe kobongisa lisusu mosala na biso elobelami na molai mpenza na kati ya buku Lisanga mpo na kokokisa mosala ya Nzambe, na mokapo 9. Ya solo, biso nyonso tosengeli kozala na mposa ya kosala nyonso oyo ekoki na biso na mosala ya Nzambe. Mpo na nini te kotalela malamu mikano na yo ya elimo? Salá ndenge 1 Timote 4:15 etindi ete: “Otyaka motema na makambo oyo, omipesa na yango, ete bato nyonso bámona polele ete ozali kotambola liboso.”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto