Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 10/99 lok. 7
  • Olingi kokende kofanda esika mosusu?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Olingi kokende kofanda esika mosusu?
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1999
  • Masolo mosusu
  • Ndenge ya komesana ntango okei na lisangá ya sika
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • Tiká ete lisangá elendisama
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Tiká ete lisangá esanzola Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Ndenge ya komesana na lisangá ya sika
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1999
km 10/99 lok. 7

Olingi kokende kofanda esika mosusu?

Soki eyano na motuna oyo ezali Ɛɛ, ezali na makambo mingi oyo yo mpe bato mosusu bosengeli kosala. Soki okolanda makambo ya ntina oyo emonisami awa, okomesana noki na lisangá na yo ya sika.

(1) Soki oyebi esika oyo okokende, mokomeli ya lisangá na bino akoki kozwa adresi ya Ndako ya Bokonzi ya lisangá na yo ya sika. Ntango okómi na esika na yo ya sika, luká mbala moko koyeba esika Ndako ya Bokonzi ezali mpe mikolo na ngonga oyo basalaka makita. Soki masangá mingi basalelaka Ndako ya Bokonzi moko, tuná bankulutu báyebisa yo soki ndako na yo ezali na teritware ya lisangá nini. Bandá mbala moko koyangana na makita mpe komesana na bankulutu ya lisangá yango.

(2) Mokomeli ya lisangá na yo ya sika mpe ya lisangá na yo ya kala basengeli kosala elongo mpo ete Fiche na yo mpe ya bato mosusu ya libota na yo etindama na lisangá na yo ya sika. Bankulutu ya lisangá na yo ya kala basengeli mpe kotinda mokanda epai ya bankulutu ya lisangá na yo ya sika. (Talá mokanda ya 1 Yuni 1999 epai na masangani nyonso ya bankulutu mpe Mosala na biso ya Bokonzi ya Yuli 1991 na etanda Biyano na mituna na bino.) Komite ya Mosala ya lisangá ya sika esengeli koyebisa boyei na yo epai ya motambwisi ya boyekoli ya mokanda mpo akoka kokutana na yo mpe kosalisa yo oyeba etuluku na yo ya sika ya boyekoli ya mokanda.—Lom. 15:7.

(3) Basakoli nyonso na lisangá na yo ya sika bazali na mokumba kitoko ya kokokisa—ya komesana na yo mpe ya koyamba yo malamu na lisangá na bango. (Kokanisá na 3 Yoane 8.) Ya solo, yango elingi koloba ete osengeli koyangana na makita mpo ete bókoka koyikisana mpiko mpe kolendisana elongo na bandeko.

(4) Yo moko osengeli kozela te kino makambo nyonso ya ndako na yo ya sika ekosila bongo na nsima obanda kosangana na mosala ya kosakola na lisangá na yo ya sika. Soki otii matomba ya Bokonzi na esika ya liboso, makambo mosusu ekobongisama na nsima, mpe okosepela mingi na esika na yo ya sika. (Mat. 6:33) Ntango osilisi kobongisa ndako na yo ya sika, na ntembe te okolinga kobénga bandeko mosusu ya lisangá báya kotala yo mpe bóyebana malamu.—Lom. 12:13b.

Kokana kokende kofanda na esika mosusu ezali likambo moke te. Kasi, soki moto nyonso asali oyo esɛngami epai na ye, yango ekosalisa biso ete tólɛmba te na elimo. Moto nyonso akosepela mingi na bolingo ya bandeko na biso baklisto.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto