Sɛngá lisalisi
1 “Ntango ya mpasi.” Yango ezali maloba ya Biblia, oyo ebongi mpenza mpo na komonisa eleko na biso oyo etondi na mikakatano. (2 Tim. 3:1) Yango wana, okosala nini ntango okutani na mikakatano ya elimo mpe omoni ete okokoka kolonga yango te?
2 Okolinga kosolola na ndeko moko ya lisangá na bino oyo akɔmeli na elimo? Bato mosusu bakoki kobanga kosala yango mpo bazali koyoka nsɔni, balingi te kotungisa bato, to bandimi te ete moto moko akoki mpenza kosalisa bango. Ezali solo ete, tosengeli kosala nyonso oyo tokoki mpo na kokokisa biso moko mikumba na biso malamu mpenza. Atako bongo tosengeli soko moke te kobanga koluka lisalisi na makambo oyo etaleli bolamu na biso ya elimo.—Gal. 6:2, 5.
3 Esengeli kobanda wapi?: Mbala mosusu okolinga kosolola na ndeko oyo atambwisaka boyekoli ya mokanda na etuluku na yo mpe kosɛnga ye soki okoki kobima na ye na mosala ya kosakola. Yango ekopesa yo libaku ya koyebisa ye mposa na yo ya kokola na elimo. Soki azali mosaleli na misala, yebisá ye mposa na yo ya kozwa lisalisi na elimo mpe akosɛnga bankulutu ete básalisa yo. To okoki kosolola na nkulutu nyonso oyo olingi mpo na koyebisa ye mikakatano na yo.
4 Ozali na mposa ya lisalisi ya ndenge nini? Ezali na likambo moko oyo ezali kolɛmbisa yo? Ozali kobɔkɔla bana yo moko mpe olingi ete bana na yo bákangama na lisangá makasi? Ozali mobange oyo azali na mposa ya lisungi? To ezali na mwa makambo oyo ezali kolɛmbisa yo? Eleko oyo tozali na yango etondi na mikakatano mpe bomoi ekómi mpenza mpasi—kasi tokoki kolonga. Lisalisi ezali.
5 Ndenge oyo bankulutu bapesaka lisalisi: Bankulutu bamibanzabanzaka mpenza. Bakoyoka mikakatano oyo ozali na yango. Soki basakoli mosusu bazali kokutana na mikakatano ya ndenge moko, bankulutu bakotalela likambo yango ntango bazali kosala mosala ya kobatela bampate mpe koteya lisangá. Lokola bazali “ndakisa mpo na etonga,” bazali ntango nyonso pene ya kosalana na yo na esengo. (1 Pet. 5:3) Koyoka ndenge bandeko oyo bakɔmeli bazali kolimbola mitinda ya Biblia ekoki kosalisa yo obongisa lisusu mosala na yo ya kosakola mpe ekosalisa yo na bomoi na yo.—2 Tim. 3:16, 17.
6 Yesu apesi biso ebele ya ‘makabo na lolenge ya mibali.’ (Ef. 4:8, NW, maloba na nse ya lokasa) Yango elimboli ete bankulutu bazali wana mpo na yo. Bazali pene ya kosalisa yo. ‘Bazali’ mpenza ‘ya yo.’ (1 Kol. 3:21-23) Yango wana, na esika ya kokakatana, sololá na bango kozanga kobanga. Sɛngá lisalisi oyo osengeli na yango.