Kofanda malamu na bato ya pembeni epesaka litatoli
1 Yesu alobaki ete “Linga moninga na yo lokola yo moko omilingaka.” (Mat. 22:39, Boyokani ya Sika) Na ntembe te, ‘osalaka malamu’ epai ya bandeko kasi mpo na nini te kokolisa lisusu bolingo na yo epai ya bato oyo bafandaka penepene na yo? (Gal. 6:10) Okosala yango ndenge nini?
2 Yebisá bango soki ozali nani: Bato oyo bofandaka na bango kartye moko bayebi ete ozali Motatoli? Soki bayebi te, okoki kokende kotala bango ntango ozali na mosala ya kosakola, mpe okomona bayambi yo malamu! To soki olingi, okoki komeka kopesa bango litatoli na ntango bozali kobɛta masolo. Ntango obimi libanda, mbala mosusu okomona bango bazali kosala mosala na lopango na bango to bazali kotambola mpamba na balabala. Kende na mwa kosɛka, sololá na bango. Salá makasi mpo na kolobela makambo oyo etali kondima na yo, koyebisa bango esika Ndako ya Bokonzi ezalaka, mpe makambo nini elekaka kuna, mpe yebisá bango nani mosusu na kartye ayanganaka kuna. Bengisá bango báya na makita. Zwá mokano ya kopesa litatoli ya solosolo mpenza ya nsango malamu epai ya moto nyonso oyo yo oyebi.—Mis. 10:42; 28:23.
3 Na bizaleli na yo ya malamu: Bizaleli na yo ya kofanda malamu na bato ekopesa yo lokumu mpe ekoki kosalisa yo opesa litatoli. Ezali mpe ‘kokómisa mateya ya Nzambe kitoko.’ (Tito 2:7, 10, NW) Lakisá mpenza ete olingaka bato oyo ofandaka na bango kartye moko. Zalá malamu na bango mpe yebá komitya na esika na bango. Kokɔtakɔtaka na makambo na bango te mpe kosalasala makɛlɛlɛ te oyo ekokoma tii epai na bango. Soki moko na bango azali maladi, moná yango lokola likambo na yo mpe pesá lisalisi. Soki libota moko ekoti sika pembeni na bino, leká wana mpo na kotombela bango boyei malamu. Kolakisa bato boboto ndenge wana esalisaka bango bámona ete moto azali moto malamu mpe esepelisaka Yehova.—Ebe. 13:16.
4 Na bopɛto na yo: Kobongisa malamu esika na yo ya kofanda ezali mpe moko ya makambo oyo ekosala ete bato ya pembeni básepela na yo. Ndako mpe lopango oyo ezali pɛto, oyo ezali kosepelisa bato, ezali mpe litatoli mobimba. Kasi ndako oyo ezali bosɔtɔ to ezali na biloko ya mpambampamba to oyo epanzanapanzana ekozanga te mbala mosusu kobebisa lokumu ya nsango ya Bokonzi. Yango wana, ezali mpenza na ntina ete ndako, lopango mpe mituka na biso ezala pɛto mpe ebongisama malamu.
5 Soki mpenza olukaka bolamu ya bato oyo bazali libanda ya lisangá ya boklisto, yango ekomonana na ndenge ozali kolinga bato ya kartye na yo. Yango ekoki kobota mbuma nini? Ekoki kosalema ete “mpo na misala na yo ya malamu oyo bango moko bamoni na miso” bamosusu kati na bango “bakokumisa Nzambe.”—1 Pet. 2:12, NW.