Liyangani ya zongazonga ya mbala oyo
Ndimbola moko oyo bapesaka mpo na liloba kobanga ezali “limemya mpe botosi ya solosolo, mingimingi epai ya Nzambe.” Yango ezali komonisa bobangi ya malamu oyo elobelami na kati ya Makomami ete ezali “ebandeli ya mayele.” (Nz. 111:10) Nzokande, lolenge mosusu ya kobanga ezali komonana na mokili ya Satana oyo tozali kofanda. Ndenge nini tokoki kokima kobanga wana oyo ezali mabe mpe kokolisa bobangi Yehova oyo ezali malamu? Liyangani ya zongazonga mpo na mobu 2002 ekolobela likambo yango. Motó ya likambo na yango ezali “Bangá Nzambe mpe pesá ye nkembo.” (Emon. 14:7) Tokomona ndenge kobanga Yehova ezali kosalisa moto mokomoko na bomoi na ye mpe na kati ya lisangá.
Atako kobanga ekoki mpe komonisa nsɔmɔ to kozanga mpiko mpe koboya kolonga mikakatano, Biblia elobi ete: “Esengo ezali na moto oyo [abangaka Yehova, NW].” (Nz. 128:1) Liyangani ekomonisa biso ndenge tokoki kotɛmɛla makambo oyo eyokani te na losambo ya solo. Tokomona ndenge tokoki kosalisa bato ya sika bálona ezaleli wana ya bobangi Nzambe, oyo ekolendisa bango ete bándima kosalela ye na motema na bango mobimba, na molimo na bango mobimba, na makanisi na bango nyonso, mpe na makasi na bango nyonso. (Mko. 12:30, NW ) Na mokolo ya liboso, liyangani ekosuka na lisukulu ya mokɛngɛli ya zongazonga oyo ekozala na motó ya likambo “Kangamá makasi na bato oyo olingaka.” Akolobela ndenge tokoki kosɛnzɛla mpo na kotɛmɛla milende oyo Zabolo azali kosala mpo na kolongola biso, libota na biso, mpe bandeko na biso baklisto na nzela ya Yehova.
“Tóbanga Yehova, kasi bato te,” yango ezali motó ya likambo ya masukulu-matongani na biteni minei oyo ekosalema na mokolo ya mibale. Masukulu-matongani yango ekolobela ntina mpe ndenge tosengeli kolongola kobanga nyonso oyo ekoki kopekisa biso ete tókokisa malamumalamu mosala na biso ya kosakola to oyo ekoki kopekisa biso ete tóbatela bosembo na biso mpe lisosoli malamu na eteyelo mpe na esika ya mosala. Lisukulu ya bato nyonso oyo ezali na motó ya likambo ete “Bangá Nzambe mpe tosá mibeko na ye” ezwami na kati ya makambo oyo elobelami na Emoniseli mokapo 14. Liyangani ya zongazonga ekosuka na toli ya kolendisa oyo ezali na lisukulu oyo ekozala na motó ya likambo “Landá kotambola na kobanga Nzambe.”
Liyangani yango ekozala mpe na makambo mosusu ya ntina oyo ekozala malamu ete ozanga yango te, na ndakisa: Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, Likita ya Mosala oyo ekozala lokola ndakisa, lisukulu ya batisimo, mpe lisolo mokuse ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Bengá bato oyo oyekolaka na bango Biblia ete báyangana elongo na yo. Moto nyonso oyo alingi kozwa batisimo asengeli koyebisa yango nokinoki na mokɛngɛli-mokambi. Soki tosali makasi mpo na kozangisa ata eteni moko te ya liyangani oyo, tokomonisa ete tobangaka Yehova mpe tozali kopesa ye nkembo!