‘Olingi’ kosalisa basusu?
1 Yesu azalaki mpenza komitungisa mpo na bato. Ntango moto moko ya maba abondelaki ye ete asalisa ye, Yesu asembolaki lobɔkɔ, asimbaki mobali yango mpe alobaki ete: “Nalingi. Kómá pɛto!” (Mko. 1:40-42, NW) Na makambo nini tokoki kolanda ezaleli wana ya Yesu mpo na kosalisa basusu?
2 Bato oyo basepelaka na mateya na biso: Moto nyonso na kati ya lisangá apesaka mabɔkɔ mpo na kosalisa bato oyo basepelaka na mateya na biso mpo bákóma basambeli ya Yehova. Ntango bato ya sika bayei na makita, pesá bango mbote mpe luká koyeba bango malamu. Luká ndenge nini okoki kolendisa bango. Pesá bango longonya mpo na biyano oyo bapesi mpe mpo na milende oyo bazali kosala mpo na kosalela mitinda ya Biblia na bomoi na bango. Salisá bango báyeba ete bakoki kozwa baninga ya solo na kati ya lisangá.
3 Bandeko na biso bandimi: “Baoyo bazali bandeko na biso na kati ya kondima” nde basengeli mpenzampenza kozwa lisalisi na biso na makambo ndenge na ndenge. (Gal. 6:10, NW) Mingi kati na bango bazali kobunda na mikakatano ya kolɔngɔnɔ ya nzoto. Soki tokei kotala bango mpo na kolendisa bango, tokoki kokokisa mposa makasi oyo bazali na yango ya kozala esika moko na bandeko na bango, tokoki mpe ntango mosusu kosalisa bango na makambo mosusu oyo basengeli na yango. Ekoki kozala ete basusu bazali kobunda na mikakatano mosusu na bomoi na bango. Yoká bango ntango bazali koloba mpe lendisá bango mpo na komonisa ete ozali mpenza komitungisa mpo na bango. (1 Tes. 5:14) Bankulutu mpe bazalaka na mposa ete tósalisa bango na ntango bazali kokokisa mikumba na bango. (Ebe. 13:17) Soki tozali komipesa biso moko mpo na kosalisa basusu, tokoki ‘kokóma lisalisi oyo ezali kopesa’ bandeko na biso bandimi ‘makasi.’—Kols. 4:11, NW.
4 Bato ya libota na biso: Na kati ya mabota na biso, tosengeli mpe kosala makasi mpo na komonisa ezaleli oyo Yesu azalaki na yango ya komitungisa mpo na bato. Soki baboti bazali mpenza komitungisa mpo na bana na bango, yango ekotinda bango ‘bákoba kobɔkɔla bango na disipilini mpe na makebisi ya Yehova.’ (Ef. 6:4, NW) Bana mpe bakoki kokokisa oyo ya bango mokumba soki bazali komibongisa nokinoki mpo na boyekoli ya libota, mpo na makita ya lisangá, to mpo na mosala ya kosakola. Bana oyo bakoli bakoki komonisa motema mawa oyo Yesu azalaki na yango soki, na boboto nyonso, bazali kosalisa baboti na bango oyo bakómi mibange, ete bálonga mikakatano oyo eutaka na bobange. Soki tozali kosala makambo wana mpe makambo mosusu, biso nyonso tokoki “komonisa ezaleli ya kokangama na Nzambe na kati ya ndako na [biso] moko.”—1 Tim. 5:4, NW.
5 Na ntango tozali kolanda ndakisa ya Yesu mpe tozali kosalisa basusu, tokoki ntango mosusu kokitisa mikakatano na bango, kosalisa libota na biso ezala na bomoko, mpe kosalisa lisangá ezala na bomoko. Oyo eleki ntina, tozali kokumisa Yehova, “Tata ya [motema] mawa.”—2 Kol. 1:3.