Tósalisa bato mosusu mpo bápesa Yehova nkembo
1 Nsango moko ya ntina mingi ezali kosakolama epai ya bato ya mokili mobimba: “Bóbanga Nzambe mpe bópesa ye nkembo, mpamba te ngonga ya kosambisa na ye eyei, mpe na yango bósambela Oyo asalaki likoló mpe mabele mpe mbu mpe maziba ya mai.” (Emon. 14:6, 7) Tozali na libaku malamu ya kopalanganisa nsango yango. Makambo nini bato basengeli koyeba oyo etali Yehova mpo ete bákoka kobanga ye mpe kosambela ye?
2 Nkombo na ye: Bato basengeli koyeba kokesenisa Nzambe bobele moko ya solo na nkombo na ye mpe banzambe mosusu ya lokuta oyo bato basambelaka lelo. (Det. 4:35; 1 Kol. 8:5, 6) Kutu, bato oyo bakomaki Biblia basalelaki nkombo ya lokumu ya Yehova mbala koleka 7 000. Atako tokosalela bososoli na biso malamu mpo na koyeba ntango nini ebongi tólakisa moto nkombo ya Yehova, tosengeli te kobomba yango to kobanga kosalela yango. Mokano ya Nzambe ezali ete bato nyonso na mokili báyeba nkombo na ye.—Nz. 83:18.
3 Bomoto na ye: Mpo na kokumisa Yehova, bato basengeli koyeba lolenge ya Nzambe oyo ye azali. Tosengeli koteya bango bolingo na ye oyo eleki monene, bwanya na ye oyo eleki bwanya nyonso, bosembo na ye ya kokoka, mpe nguya na ye oyo ezangi nsuka, bakisa mpe motema mawa na ye, motema boboto, mpe bizaleli na ye mosusu ya malamu mingi. (Ex. 34:6, 7) Basengeli mpe kobanga Nzambe na ndenge ya malamu, kozala na nsɔmɔ na ye, wana bazali koyeba ete bomoi na bango etaleli mpenza kondimama na Yehova.—Nz. 89:7.
4 Kopusana penepene na Nzambe: Mpo bato bábika na kosambisa ya Nzambe oyo ezali koya, esengeli bábelela nkombo ya Yehova na kondima. (Lom. 10:13, 14; 2 Tes. 1:8) Yango esuki kaka te na koyeba nkombo ya Nzambe mpe bizaleli na ye. Tosengeli kosalisa bato bákóma baninga ya Yehova, bátyela ye motema na bango mobimba. (Mas. 3:5, 6) Ntango bazali kosalela makambo oyo bazali koyekola, bazali kobondela Nzambe na mozindo, mpe bazali komona ndenge azali kosalisa bango na bomoi na bango, kondima na bango ekokola mpe yango ekosalisa bango bápusana penepene na Yehova.—Nz. 34:8.
5 Tiká ete tósakola nkombo ya Nzambe na molende nyonso mpe tósalisa bato mosusu bátya motema na bango mobimba epai ya Yehova mpe bábanga ye. Tozali naino na likoki ya kosalisa bato mingi koleka mpo báyeba Yehova mpe bápesa ye nkembo lokola azali ‘Nzambe ya lobiko na bango.’—Nz. 25:5.