Biyano na mituna na bino
◼ Ntango nini ebongi kosala etuluku na lokota moko ya bapaya?
Ntango bato oyo balobaka lokota moko ya bapaya bazali mingi na teritware ya lisangá, bankulutu basengeli kosala oyo bakoki mpo na kobongisa mosala ya kosakola na lokota yango. (km 7/02 lok. 1; km 3/98 nk. 3-4) Ekoki kozala ete bato oyo balobaka lokota yango bazali na bateritware ya masangá mibale to masangá mingi ya zingazinga. Na ntango yango, mokɛngɛli (to bakɛngɛli) ya zongazonga akopesa makanisi oyo esengeli mpo na kosalisa masangá yango básala na bomoko na mosala ya kosakola. Bakoki mbala na mbala kobongisa mpo na kosala lisukulu ya bato nyonso to boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpo na kotala soki bato boni bakoyangana na makita na lokota yango ya bapaya.
Mpo na kosala etuluku na lokota moko ya bapaya, esengeli kokokisa masɛngami oyo: (1) Esengeli kozala na basakoli to bato oyo bazali kosepela na solo, baoyo bayokaka nsango malamu na lokota yango malamumalamu. (2) Esengeli kozala na nkulutu moko ya makoki to mosaleli na misala moko ya makoki oyo akobanda kokamba mpe kotambwisa ata likita moko pɔsɔ na pɔsɔ. (3) Lisangani ya bankulutu basengeli kondima kosimba etuluku yango. Soki masɛngami oyo nyonso ekokisami, bankulutu basengeli koyebisa na biro ya filiale mpo etuluku yango endimama mpe mpo na kozwa malako mosusu.
Bituluku mingi ebandaka naino na Boyekoli ya mokanda ya lisangá pɔsɔ na pɔsɔ. Na nsima, bankulutu bakoki kondima kobakisa makita mosusu, lokola lisukulu ya bato nyonso mpe Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, lisolo ya 2, ya 3, mpe ya 4 ekoki kosalema na eteyelo mosusu soki ezali na nkulutu moko ya makoki to mosaleli na misala moko ya makoki oyo ayebi koloba lokota yango, oyo akoki kosala lokola mopesi-toli. Nzokande, etuluku yango ekosangana na lisangá mobimba mpo na kolanda lisolo ya koteya lisangá, makanisi ya ntina na botángi ya Biblia, mpe Likita ya Mosala. Makita mpo na mosala ya kosakola ekoki mpe kobongisama mpo na etuluku yango.
Bato nyonso oyo bazali na etuluku yango basengeli kosala na bomoko mpe kotambwisama na lisangani ya bankulutu. Bankulutu basengeli kosalisa etuluku yango na ndenge oyo ebongi mpe kosala makambo oyo ezali komonisa ete bazali mpenza komibanzabanza mpo na bamposa ya etuluku yango. Ntango mokɛngɛli ya zongazonga azali kotala lisangá oyo esimbi etuluku yango, akoki mpe kobongisa mpo na kosakola elongo na bandeko ya etuluku yango, mpo na kolendisa bango na elimo. Na lipamboli ya Yehova, etuluku yango ekoki kokóma lisangá na nsima.