Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 6/03 lok. 8
  • Tóyebisa bato nkombo ya Nzambe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tóyebisa bato nkombo ya Nzambe
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini tosengeli koyeba nkombo ya Nzambe
    Nkombo ya Nzambe oyo ekoumela seko
  • Yehova asali ete nkombo na ye eyebana
    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
  • Kumisá nkombo monene ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Nkombo ya Nzambe
    Lamuká!—2017
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2003
km 6/03 lok. 8

Tóyebisa bato nkombo ya Nzambe

1. Koyeba nkombo ya Nzambe ekoki kotinda bato na kosala nini?

1 Oyokaki ndenge nini ntango oyebaki nkombo ya Nzambe mpo na mbala ya liboso? Bato mingi basalaka lokola mwasi oyo alobaki: “Ntango namonaki nkombo ya Nzambe na Biblia mpo na mbala ya liboso, nalelaki. Nasepelaki komona ete nakoki mpenza koyeba mpe kosalela nkombo ya Nzambe.” Mpo na ye, koyeba nkombo ya Nzambe ezalaki likambo ya ntina mingi mpo na koyeba Yehova lokola moto mpenza mpe kokóma moninga na ye.

2. Mpo na nini tosengeli nokinoki koteya bato báyeba Yehova?

2 Mpo na nini koyebisa bato nkombo yango? Nkombo ya Nzambe ezali na boyokani na bizaleli na ye, na mikano mpe misala na ye. Ezali mpe na ntina mpo na kozwa lobiko. Ntoma Paulo akomaki ete “moto nyonso oyo azali kobelela nkombo ya Yehova akobika.” Abakisaki, kasi, “ndenge nini bakobelela,” soki bayebi naino Yehova te mpe bandimeli ye te? Yango wana, baklisto basengeli nokinoki koyebisa bamosusu nkombo ya Nzambe mpe makambo nyonso oyo ekangani na nkombo yango. (Lom. 10:13, 14) Kasi, ezali kutu na ntina mosusu ya monene oyo nkombo ya Nzambe esengeli koyebana.

3. Ntina ya libosoliboso etindaka biso tósakola ezali nini?

3 Na bambula ya 1920, basaleli ya Nzambe basosolaki kati na Makomami likambo oyo etali molɔ́ngɔ́ mobimba, kolongisama ya bokonzi ya Yehova mpe kosantisama ya nkombo na ye. Liboso Yehova aboma bato mabe mpo na kolongola nsɔni oyo ebwakamaki likolo ya nkombo na ye, esengeli naino ete solo na ntina na ye “eyebana na mabelé mobimba.” (Yis. 12:4, 5, NW.; Ezk. 38:23) Na yango, ntina monene koleka oyo tosakolaka ezali ya kokumisa Yehova mpe ya kosantisa nkombo na ye liboso ya bato nyonso. (Ebe. 13:15) Bolingo mpo na Nzambe mpe mpo na bazalani na biso ezali kotinda biso na kosala mingi na mosala wana oyo Nzambe apesi biso.

4. Ndenge nini Batatoli ya Yehova bakómaki kobengama na nkombo ya Nzambe?

4 “Ekólo moko mpo na nkombo na ye”: Na 1931 tozwaki nkombo ya Batatoli ya Yehova. (Yis. 43:10) Kobanda ntango yango, basaleli ya Nzambe basali nyonso ete bato mingi báyeba malamu mpenza nkombo ya Nzambe, mpe mpo na yango buku Prédicateurs, na lokasa 124, emonisi ete: “Na mokili mobimba, moto nyonso oyo azali kosalela mingi nkombo ya Nzambe, bakokanisa mbala moko ete azali Motatoli ya Yehova.” Yo mpe bayebaka yo ndenge wana? Botɔndi na biso mpo na boboto ya Yehova esengeli kotinda biso ‘tókumisa nkombo na ye,’ tóloba na ntina na ye na mabaku nyonso.​—Nz. 20:7; 145:1, 2, 7.

5. Ndenge nini etamboli na biso etaleli nkombo ya Nzambe oyo tomemi?

5 Lokola tozali “ekólo moko mpo na nkombo na ye,” tosengeli kokangama na mitinda na ye. (Mis. 15:14; 2 Tim. 2:19) Mbala mingi, eloko ya liboso oyo bato bamonaka epai ya Batatoli ya Yehova ezalaka etamboli na bango ya malamu. (1 Pet. 2:12) Tokolinga ata moke te kobebisa lokumu ya nkombo ya Nzambe na koboyáká kotosa mitinda na ye to na kozongisáká losambo na ye na nsima na bomoi na biso. (Lev. 22:31, 32; Mki. 1:6-8, 12-14) Na esika ya kosala bongo, tiká tómonisa na bomoi na biso ete tozali kosepela na libaku malamu oyo tozwi ya komema nkombo ya Nzambe.

6. Libaku malamu nini tozali na yango lelo, mpe libela na libela?

6 Lelo oyo, tozali komona kokokisama ya maloba oyo ya Yehova: “Longwa na kobima na moi kino kolimwa na yango, nkombo na ngai ezali monene kati na mabota.” (Mki. 1:11) Tiká tólanda koyebisa bato solo na ntina na Yehova mpe ‘tósanzola nkombo na ye [mosantu], lobiko na lobiko.’​—Nz. 145:21.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto