Tólanda ndakisa ya motema malamu ya Yehova
1 Nsima ya kotala kolala kitoko ya moi to nsima ya kolya biloko ya kitoko, toyokaka mpenza mposa ya kopesa matɔndi na Yehova, Moto ya libosoliboso oyo amonisaka motema malamu ya ndenge nyonso. Motema malamu ya Yehova etindaka biso tólanda ndakisa na ye. (Nz. 119:66, 68; Ef. 5:1) Ndenge nini tokoki komonisa ezaleli ya motema malamu?
2 Epai ya baoyo bazali bandimi te: Lolenge moko oyo tokoki kolanda ndakisa ya motema malamu ya Yehova ezali ya komibanzabanza mpenza na bato oyo tozali na bango kondima moko te. (Gal. 6:10) Soki tosaleli bango makambo ya malamu oyo ezali komonisa ete tozali mpenza na motema malamu, yango ekoki kosala ete bátalelaka biso Batatoli ya Yehova mpe nsango oyo tomemelaka bango na ndenge ya malamu.
3 Na ndakisa, ndeko mobali moko oyo azali naino elenge mpe mobongisi-nzela, afandaki na molɔngɔ ya bato oyo bazalaki kozela kokɔta epai ya monganga; pembeni na ye, ezalaki na mwasi moko ya mobange oyo azalaki komonana ete azali kobɛla makasi koleka bato mosusu oyo bazalaki wana. Ntango ekómaki ngala ya elenge yango mpo na kokɔta epai ya monganga, atikaki mwasi yango akɔta na esika na ye. Mokolo mosusu, akutanaki lisusu na mwasi yango, mbala oyo na zando; mwasi yango asepelaki mingi ntango amonaki ye. Atako liboso mwasi yango azalaki kosepela na nsango malamu te, alobaki ete ayebi sikoyo ete Batatoli ya Yehova balingaka mpenza bazalani na bango. Mwasi yango akómaki koyekola Biblia.
4 Epai ya bandeko na biso: Tolandaka mpe ndakisa ya motema malamu ya Yehova ntango tomipesaka mpenza na kosalisa baninga na biso bandimi. Na ntango ya makama, tozalaka kati na bato ya liboso mpo na kosalisa bandeko na biso. Tomonisaka mpe motema malamu ntango tosalisaka baoyo bazangi transport mpo na kokende na makita, ntango tokendaka kotala baoyo bazali na mikakatano ya nzoto mpe ntango tosalaka makasi mpo na kolinga mpe baoyo toyebi bango malamu te na lisangá.—2 Kol. 6:11-13; Ebe. 13:16.
5 Lolenge mosusu oyo Yehova amonisaka motema malamu na ye ezali ete azalaka “pene mpo na kolimbisa.” (Nz. 86:5, NW) Na ndakisa na ye, biso mpe tokoki komonisa ete tolingaka kozala na motema malamu soki tozali kolimbisa basusu. (Ef. 4:32) Yango esalaka ete boyokani na biso na bandeko na biso bandimi ezala “malamu mpe na esengo.”—Nz. 133:1-3.
6 Tiká ete motema malamu ya Yehova oyo etondi mpenza, etinda biso na kokumisa ye lisusu koleka mpe etondisa biso na esengo. Mpe tiká ete tósala makasi mpo na kolanda ndakisa ya motema malamu na ye na makambo nyonso oyo tozali kosala.—Nz. 145:7; Yil. 31:12.