Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/03 nk. 3-5
  • Tóbatela malamu esika na biso ya losambo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tóbatela malamu esika na biso ya losambo
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • Masolo mosusu
  • Bisika na biso ya losambo
    Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
  • Ndenge nini tokoki kopesa mabɔkɔ mpo na kobatela Ndako na biso ya Bokonzi?
    Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
  • Oyo ezali esika na biso ya losambo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Tozali komemya esika na biso ya losambo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2003
km 8/03 nk. 3-5

Tóbatela malamu esika na biso ya losambo

1. Ntina ya Ndako ya Bokonzi ezali nini?

1 Na mokili mobimba, ezali na masangá ya Batatoli ya Yehova koleka 94 000. Na masangá mingi, baklisto bayanganaka mpo na koyekola Biblia mpe bakutanaka na baninga na bango baklisto na Ndako ya Bokonzi, oyo ezali esika ya losambo ya solo na esika bafandi.

2. Mpo na nini ezali na ntina ete Ndako ya Bokonzi ezalaka pɛto mpe kitoko?

2 Tózala na programɛ ya kotyaka bopɛto na Ndako ya Bokonzi: Mosala oyo tosalaka mpo na kotya bopɛto na Ndako ya Bokonzi ezali na ntina mingi na mosala na biso ya bosantu. Buku Lisangá na lokasa 62 elobi boye: “Bandeko basengeli kotalela ete ezali libaku malamu epesameli bango ya kopesa makabo mpo na Salle du Royaume, bobele mbongo te kasi lisusu kopesa ntango na bango mpe makasi na bango mpo na kosala misala misengeli mpo ete Salle ezala pɛto, kitoko na komona mpe ebatelama malamu. Na motindo ezali komonana na kati mpe na libanda, Salle du Royaume esengeli kokumisa lisanga ya Yehova.” Lokola Ndako ya Bokonzi esalelamaka mbala na mbala na pɔsɔ, esengeli kotyaka bopɛto mbala na mbala mpe kobongisaka yango. Mbala mingi basakoli ya lisangá (to masangá) oyo esalaka makita na Ndako ya Bokonzi yango nde basalaka mosala yango. Lokola na ntango ya kala, biso basaleli ya Yehova lelo oyo tosengeli kozala na molende ya “kobongisa” esika na biso ya losambo.​—2 Nta. 34:10, NW.

3. Ndenge nini mosala ya kotya bopɛto na Ndako ya Bokonzi ebongisami, mpe banani bakoki kosala yango?

3 Programɛ ya kotya bopɛto na Ndako ya Bokonzi pɔsɔ na pɔsɔ esengeli kotyamaka na etanda ya mayebisi. Pɔsɔ na pɔsɔ, etuluku mokomoko ya boyekoli ya mokanda esengeli kotyaka bopɛto na Ndako ya Bokonzi, bakosala misala oyo ezali na liste. Baoyo nyonso bazali nzoto makasi bazali na libaku malamu ya kopesa mabɔkɔ na mosala ya kobatela pɔsɔ na pɔsɔ Ndako ya Bokonzi pɛto mpe kitoko. Bana mpe bakoki kopesa mabɔkɔ na mosala yango soki bazali kosala elongo na baboti na bango; na ndenge yango, baboti na bango bakoteya bango básepelaka na mosala yango, oyo ezali mpenza libaku malamu. Lokola mosala ya kotyaka bopɛto na Ndako ya Bokonzi ezali mpe na ntina mingi na losambo na biso, esengeli bandeko báyokanaka malamu mpo na kosala yango, mingimingi soki masangá mingi ezali kosalela ndako yango, mpo ete mosala yango esalemaka kaka na mwa ndambo ya bandeko te.

4. Bosengeli kosala nini mpo bandeko báyeba misala oyo basengeli kosala ntango bazali kotya bopɛto na Ndako ya Bokonzi?

4 Na esika oyo bobombaka biloko ya mosala, bokoki kotya liste ya misala oyo esengeli kosalema. Na liste yango, bosengeli komonisa misala oyo esengeli kosalema pɔsɔ na pɔsɔ, misala lokola: kokɔmbɔla, kolongola bandako ya mampulututu (toile d’araignée), kosukola maninisa to madusu ya babiliki oyo ekɔtisaka mopɛpɛ (claustras) soki Ndako ya Bokonzi na bino ezali na yango, kopangusa mesa ya mikanda, kobwaka matiti, kosukola ndako, mpe kopangusa batalatala. Ezali na misala mosusu oyo esɛngaka kosala yango ntango nyonso te, na ndakisa kopakola vernis ya sika na biloko nyonso oyo esalemi na mabaya, kosukola bakiti, barido mpe kopangusa miinda. Bosengeli kobombaka bankisi nyonso oyo bosalelaka mpo na kosukola ndako na esika oyo bana bakoki kokóma te mpe bosengeli kokoma nkombo ya nkisi mokomoko likoló na yango. Bosengeli mpe komonisa mwa moke ndenge ya kosalela yango.

5. Ezali mpenza na ntina kokebaka ete makama ebimaka te, mpe biloko nini esengeli kotalaka mbala na mbala? (Talá etanda oyo ezali na lokasa 4.)

5 Ezali mpenza na ntina kokeba ete makama ebima te na Ndako ya Bokonzi. (Det. 22:8) Mpo na yango, etanda oyo ezali na lokasa 4 elobeli biloko oyo tosengeli kotalaka mbala na mbala mpo makama ebima te. Bosengeli mpe kosalela malako yango mpo na ndako ya bandeko oyo bakɛngɛlaka Ndako ya Bokonzi.

6. Ndenge nini mosala ya kobongisa Ndako ya Bokonzi etambwisamaka?

6 Tóbongisaka Ndako ya Bokonzi: Lisangani ya bankulutu ezali na mokumba ya kozwa bibongiseli ya makambo etali kobongisa Ndako ya Bokonzi. Mbala mingi, baponaka nkulutu to mosaleli na misala moko mpo atalelaka mosala yango. Ndeko yango atalelaka makambo nyonso oyo etali ndenge oyo Ndako ya Bokonzi esalelamaka mokolo na mokolo, mpe azwaka bibongiseli mpo ete ndako yango ezalaka pɛto, ebatelama malamu mpe bisaleli ezangaka te. Ezala na kati ya Ndako ya Bokonzi to na libándá, eloko moko te oyo ekoki kobimisa likama esengeli kozala. Soki ezali na masangá mingi oyo ezali kosalela Ndako ya Bokonzi moko, masangani ya bankulutu ya masangá nyonso wana ekosala komite moko oyo ekobanda kotalela makambo etali kobongisa Ndako ya Bokonzi mpe lopango. Komite yango ekobanda kotambwisama na masangani ya bankulutu ya masangá yango.

7. (a) Nini esalemaka mbula na mbula mpo Ndako ya Bokonzi ezalaka ntango nyonso malamu? (b) Makambo nini bosengeli kotalaka mbala na mbala? (Talá etanda oyo ezali na lokasa 5.)

7 Mbula na mbula, bosengeli kotala Ndako ya Bokonzi malamumalamu, bokolanda makambo oyo ekomami na formilɛrɛ CN-14 oyo biro ya makambo etali kotonga Bandako ya Bokonzi epesaki. Bankulutu nde basengeli kozwa bibongiseli mpo na oyo etali kobongisa biloko nyonso oyo ebebi. Bankulutu bakoki kosɛnga lisalisi ya basakoli mpo na kobongisa biloko oyo ebebi. Bandeko nyonso basengeli kotya likebi mpenza mpo na kobongisa ata makambo ya mikemike mpe basengeli kobongisa nokinoki eloko nyonso oyo ebebi.

8. Ntango nini bankulutu bakoki kosɛnga lisalisi na biro ya makambo etali kotonga Bandako ya Bokonzi mpo na makambo etali kobongisa Ndako ya Bokonzi?

8 Soki bankulutu bamoni ete bazali na mposa ya mwa makanisi to ya lisalisi mpo na kobongisa Ndako ya Bokonzi, bakokoma na biro ya makambo etali kotonga Bandako ya Bokonzi. Ekoki kozala makambo lokola oyo: mwa misala ya nsuka ya kobongisa bifelo, kobongisa bapakapaka soki ezali, kobongisa bisika nyonso oyo ezali kopɔlisa bifelo mpe kobongisa bisika mosusu.

9. Bosengeli kosala ndenge nini soki bozali na mposa ya kompanyi moko to moto moko mpo asalela bino mosala moko boye?

9 Tósalelaka malamu mbongo ya lisangá: Misala mingi ya kobongisa Ndako ya Bokonzi mpe lopango na yango esalemaka na bandeko oyo bandimaka kosala na bolingo na bango moko. Milende oyo basalaka mpo na komipimela makambo mosusu emonisaka mpenza bolingo oyo bazali na yango mpe esalaka ete mbongo ebimaka mingi te. Soki emonani ete bosengeli kosɛnga na kompanyi moko to moto moko ya makoki mpo asalela bino mosala moko, na ndakisa koboma nyamankɛkɛ to kopepa libulu ya twalɛti, bankulutu bakoluka kompanyi moko to moto moko ya makoki oyo akosala mosala yango kasi oyo akosɛnga mbongo mingi te. Liboso bábanda koluka, bakolimbola malamumalamu na papye mosala oyo esengeli kosalema mpe biloko oyo esengeli mpo na mosala yango. Bankulutu bakosala bafotokopi ya papye yango mpe bakopesa yango na kompanyi to na moto nyonso oyo akoki kosala mosala yango mpo bato yango nyonso báyeba ndenge moko mosala oyo bozali kosɛnga bango ntango bakoyebisa mbongo oyo bosengeli kofuta. Ntango bakoyebisa mbongo oyo bosengeli kofuta (devis), bankulutu bakopona kompanyi to moto oyo asɛngi mbongo mingi te. Bosengeli kolandaka malako oyo ata soki ezali na ndeko moko oyo asɛngi asala mosala yango to atɛkela bino biloko oyo bosengeli na yango na ntalo oyo atii.

10. Bibongiseli nini ezwamaka mpo mbongo ya lisangá esalelamaka na ndenge oyo ebongi?

10 Na bisika oyo esengeli kofuta mpako ya lopango mpe mpako soki otɛki lopango, bankulutu bakosala nyonso mpo bázwa mikanda ya Leta oyo epesaka nzela na bato mosusu báfutaka mpako ya lopango te. Soki masangá mingi ezali kosalela Ndako ya Bokonzi moko, komite oyo etalelaka makambo ya kobatela mpe kobongisa Ndako ya Bokonzi ekozala na kɔnti na yango moko; sanza na sanza, ekobanda kotindela masangani ya bankulutu lapɔlɔ ya kɔnti wana; na ndenge yango, bankulutu bakobanda koyeba ndenge mbongo ezali kosalelama. Bankulutu nde bazali na mokumba ya kotalela makambo ya mbongo ya lisangá.

11. Bosengeli kosala nini soki esengeli ete bósala mosala moko ya monene mpo na kobongisa Ndako ya Bokonzi?

11 Misala ya minene: Soki komite oyo etalelaka makambo ya kobongisa mpe kobatela Ndako ya Bokonzi emoni ete mosala moko ya monene esengeli kosalema na oyo etali lolenge ya kosalela Ndako ya Bokonzi to kobongisa yango, ekotuna masangani ya bankulutu mpo na kosala mosala yango. Soki bankulutu bamoni ete mosala yango esengeli mpenza kosalema to soki bamoni ete mosala yango ekoki kosalema na bandeko ya lisangá te, basengeli koyebisa yango na biro ya makambo etali kotonga Bandako ya Bokonzi. Bandeko ya makoki mpe baoyo bameseni na mosala ya kotonga oyo basalaka na biro yango, bakopesa makanisi oyo ebongi mpe bakotambwisa mosala yango. Soki mosala yango ekosɛnga mbongo mingi, bosengeli naino koluka koyeba soki esɛngi mpenzampenza mbongo boni mpe bosengeli kotuna lisangá soki endimi kobimisa mbongo yango to te.​—Talá Biyano na mituna na bino, na Mosala na biso ya Bokonzi ya Augusto 1994.

12. Ndenge nini tokoki komonisa botɔndi na biso mpo na libaku malamu oyo tozali na yango ya koyanganaka na Ndako ya Bokonzi?

12 Tiká ete tózalaka mpenza na botɔndi mpo na libaku malamu oyo tozali na yango ya koyanganaka na Ndako ya Bokonzi! Tokolinga te ete tózangisaka makita mpambampamba to tómonaka yango lokola nde ezali na ntina mingi te. Biso nyonso tokoki kosala ete makita, ebongiseli oyo elendisaka biso, elekaka malamu soki tozali komipesa mpenza na mosala ya kobatela Ndako ya Bokonzi na biso. Kosala bongo ekumisaka losambo ya pɛto mpe nkombo ya Yehova. Tiká tozala na mokano ya kobatela malamu esika na biso ya losambo.

[Maloba mpo na kolimbola elilingi na lokasa 4]

Biloko oyo esengeli kotalaka mbala na mbala

◻ Biloko oyo basalelaka mpo na koboma mɔtɔ (extincteur) esengeli kotyama na bisika oyo moto nyonso akoki kokóma mpe mbula na mbula esengeli kotalaka soki ezali kaka kosala malamu.

◻ Bosengeli kotya bilembo malamumalamu mpo na kolakisa bisika oyo baporte ná baesikaliɛ ezali, kotya mpe miinda na bisika yango mpe esengeli kozala mpasi te mpo na kokóma na baporte to baesikaliɛ yango; lisusu, mabaya to bibende oyo ezalaka pembenipembeni ya baesikaliɛ esengeli kozala makasi.

◻ Mwa ndako ya kobomba biloko, baarmware mpe batwalɛti esengeli kozala pɛto mpe biloko oyo ezali na kati na yango esengeli kozala na molɔngɔ; esengeli te kotya kuna biloko lokola esansi to biloko mosusu ya bandeko oyo eumelaka na kopela te.

◻ Bosengeli kotalaka mbala na mbala soki nsamba ya ndako (toit) ná manzanza oyo esopaka mai oyo eutaka likoló ya ndako (gouttière) ezali kaka malamu mpe bosengeli kosukolaka yango.

◻ Bosengeli kotya miinda ya malamu na bisika oyo bato balekaka mpe na bisika oyo batɛlɛmisaka mituka mpe bosengeli kolongola na bisika yango biloko nyonso oyo ekoki kokweisa bato.

◻ Bosengeli kotalaka biloko ya kura mpe bapakapaka mpo na koyeba soki ezali kosala malamu mpe kobongisaka yango.

◻ Soki ndako ekómi kotanga, bosengeli kobongisa yango nokinoki mpo ete bifelo ebeba te.

◻ Ndako ya bandeko oyo bakɛngɛlaka Ndako ya Bokonzi esengeli ntango nyonso kozala pɛto, biloko oyo ezali na kati na yango esengeli kozala na molɔngɔ; esengeli mpe te kozala na biloko ya salite, na esansi to na biloko mosusu oyo eumelaka na kopela te.

◻ Bosengeli kokangaka Ndako ya Bokonzi na fungola soki moto azali na kati te.

[Etanda na lokasa 5]

Kobatela ndako mpe lopango

◻ Libándá: Nsamba ya ndako, bifelo, langi, maninisa mpe esika oyo bakomá Ndako ya Bokonzi ezali kaka malamu?

◻ Lopango: Bozali kobatela lopango malamu? Bisika ya koleka ná bifelo ya lopango, mpe esika ya kotɛlɛmisa mituka ezali kaka malamu?

◻ Na kati: Barido, bakiti, biloko ya kura mpe ya mai, bifelo, mpe baamware ya mikanda, ezali kaka malamu?

◻ Biloko mosusu: Miinda, biloko ya masini ya kokolisa lolaka (sonorisation), mpe bapakapaka ezali kaka kosala malamu?

◻ Batwalɛti: Batwalɛti ezali pɛto mpe ezali kaka malamu?

◻ Mikanda ya lisangá: Na badosye na bino, bozali na bakopi ya mikanda ya lopango ya Ndako ya Bokonzi na bino (Elingi koloba, Certificat d’Enregistrement, Contrat de Location, Acte de Vente)? Na bamboka oyo esɛngamaka bongo, bopesaka mbula na mbula na babiro ya Leta baformilɛrɛ mpo na kosɛnga ete báfutisaka bino mpako ya lopango te?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto