Nini ezali kosala ete baklisto bázala na bomoko ya solosolo?
1 Nini ekoki kosala ete bato koleka milio motoba oyo bauti na bikólo 234 mpe oyo balobaka minɔkɔ soki 380 bázala na bomoko? Kaka losambo ya Yehova Nzambe. (Mika 2:12; 4:1-3) Batatoli ya Yehova bamoni bango moko na miso ete baklisto ya solo bazali mpenza na bomoko ya solosolo lelo oyo. Lokola tozali “etonga kaka moko” oyo ezali kotambwisama na “mobateli kaka moko,” tozali na mokano ya kotika ata moke te elimo ya bokabwani, oyo ezali na mokili oyo, ekɔtela biso.—Yoa. 10:16; Ef. 2:2.
2 Mokano mpenza ya Nzambe ezali ete baanzelu nyonso ná bato nyonso básangana na losambo ya solo. (Emon. 5:13) Yesu ayebaki ete mokano yango ezali na ntina mingi, yango wana abondelaki mingi mpo bayekoli na ye bázala na bomoko. (Yoa. 17:20, 21) Ndenge nini mokomoko na biso akoki kosala ete lisangá ya boklisto ezala na bomoko?
3 Oyo ezali kosala ete tózala na bomoko: Lisangá ya boklisto ekokaki kozala na bomoko te soki Liloba ya Nzambe mpe elimo na ye ezalaki te. Ntango tozali kosalela makambo oyo tozali kotánga na Biblia, tozali kotikela elimo ya Nzambe nzela ete esala mosala na bomoi na biso kozanga nkaka. Yango ezali kosalisa biso na “kobatela bomoko ya elimo na kati ya ekanganeli ya kimya oyo esangisaka.” (Ef. 4:3) Ezali kotinda biso na kozala na bolingo ntango tozali kokanga motema na mabunga ya basusu. (Kols. 3:13, 14; 1 Pet. 4:8) Omanyolaka likoló ya Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo mpo na kobatela bomoko?
4 Mokumba tozwi ya kosakola mpe kokómisa bato bayekoli esalaka mpe ete tózala na bomoko. Ntango tozali kosakola elongo na baklisto mosusu, “kobundáká elongo mpo na kondima ya nsango malamu,” tozali kokóma “baninga ya mosala na kati ya solo.” (Filp. 1:27; 3 Yoa. 8) Ntango tozali kosala bongo, bolingo oyo esalaka ete tózala na bomoko na kati ya lisangá ezali kokóma makasi koleka. Mpo na nini te kobenga mosakoli moko oyo bobimi na ye mikolo oyo te na mosala ya kosakola mpo bóbima na ye na pɔsɔ oyo?
5 Tozali mpenza na libaku malamu ya kozala na kati ya lisangá kaka moko ya bandeko ya solo na mokili mobimba oyo ezali awa na mabelé! (1 Pet. 5:9) Eleki mwa mikolo, ebele ya bato bamonaki bomoko yango na miso na mayangani “Pesá Nzambe nkembo” oyo esangisaki bato oyo bautaki mikili ndenge na ndenge. Tiká biso nyonso tótángaka Liloba ya Nzambe, tósilisaka matata na bolingo, mpe tósakolaka nsango malamu “na bomoko mpenza” mpo na kobatela bomoko yango oyo ezali na motuya mingi.—Lom. 15:6.