Etumba ya basoda batamboli-na-mpunda oyo etaleli mpe yo
1, 2. Mokumba nini basaleli ya Yehova bazali na yango kati na kokokisama ya emonaneli ya esakweli oyo ezali na Emoniseli 9:13-19?
1 “Anzelu ya motoba abɛtaki kelelo na ye.” Nsima na yango, “mampinga ya basoda-batamboli-na-mpunda,” oyo bazalaki “bamiliadi mibale ya bamiliadi” bagangaki lokola nkake. Basoda yango bakeseni mpenza na basoda mosusu nyonso. “Mitó ya bampunda yango [ezali] lokola mitó ya bankɔsi.” Mɔtɔ, milinga mpe sufulu ezali kobima na minɔkɔ na bango, mpe “mikila na [bango] ezali lokola banyoka.” Limpinga ya basoda yango ya elilingi ezali kobebisa bisika nyonso oyo ezali koleka. (Emon. 9:13-19) Oyebi mokumba na yo kati na kokokisama ya emonaneli ya esakweli wana ya kokamwa?
2 Batikali bapakolami ná baninga na bango, bampate mosusu, bazali koyebisa na bomoko mpenza bikateli ya Nzambe. Yango ezali kosala ete bato nyonso bámona polele ete mangomba ya boklisto esili kokufa na elimo. Tiká tótalela makambo mibale ya emonaneli ya esakweli yango oyo ezali komonisa polele ntina oyo mosala ya basaleli ya Nzambe ezali kobota mbuma malamu.
3. Formasyo nini ozwi mpo na koyebisa nsango ya Nzambe na ndenge ya malamu mpenza?
3 Babongisami mpe bazali na nyonso oyo esengeli mpo na koyebisa nsango ya Nzambe: Baministre ya Nzambe bazwi formasyo ya koloba nsango ya Nzambe na nguya na lisalisi ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi mpe ya makita mosusu. Na ndakisa ya Yesu ná bayekoli na ye, bazali kokende koluka baoyo babongi mpe kosakola na bisika nyonso oyo bakoki kokuta bato. (Mat. 10:11; Mko. 1:16; Luka 4:15; Mis. 20:18-20) Lolenge wana ya kosalela mayele oyo euti na Biblia ebimisi matomba mingi mpenza!
4. Bisaleli nini basakoli mingi bazalaka na yango, oyo esalisaka bango básala malamu mosala na bango?
4 Baministre baklisto bakaboli bamiliare ya Babiblia, ya babuku, ya mwa babuku, mpe ya bazulunalo mpo na kokokisa mokumba na bango ya kosakola. Mikanda yango ezali na minɔkɔ pene na 400, ezali kolobela makambo mingi oyo etaleli bato ya ndenge na ndenge. Osalelaka bisaleli yango malamu?
5, 6. Nini emonisi ete basaleli ya Yehova bazali kozwa lisalisi uta na likoló?
5 Lisalisi mpe litambwisi oyo euti likoló: Emonaneli ya esakweli yango ezali mpe komonisa polele ete mosala oyo emonisami na lipinga ya basoda batamboli-na-mpunda ezali kotambwisama na Nzambe. (Emon. 9:13-15) Mosala ya kosakola oyo ezali kosalema na mokili mobimba ezali kosalema na bwanya to makasi ya bato te, kasi na elimo santu ya Nzambe. (Zek. 4:6) Yehova azali kosalela baanzelu mpo na kotambwisa mosala yango. (Emon. 14:6) Na bongo, longola milende oyo Batatoli na ye awa na nse bazali kosala, Yehova azali mpe uta na likoló kopesa lisungi mpo na kobenda bato ya komikitisa epai na ye.—Yoa. 6:45, 65.
6 Ata eloko moko te ekoki kopekisa mosala ya basaleli ya Yehova, mpamba te babongisami, bazali na nyonso oyo esengeli mpo koyebisa nsango ya Nzambe mpe bazali kotambwisama na baanzelu. Tiká ete mokomoko na biso alanda kokokisa mokumba na ye kati na kokokisama ya emonaneli ya esakweli wana oyo ezali mpenza kobenda likebi na biso.