Ezaleli ya koyika mpiko epesi biso mbano
1 “Na ezaleli na bino ya koyika mpiko bokozwa milimo na bino.” (Luka 21:19) Maloba oyo ya esakweli ya Yesu etali “bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo,” ezali komonisa polele ete soki tolingi kotikala sembo, tosengeli koyeba ete komekama ekoya. Kasi na lisalisi oyo Yehova apesaka, mokomoko na biso akoki ‘koyika mpiko tii na nsuka’ mpe “akobika” —Mat. 24:3, 13; Filp. 4:13.
2 Mokolo na mokolo, makambo lokola minyoko, mikakatano ya nzoto, mitungisi ya mbongo mpe mitungisi ya makanisi, ekoki kokóma komekama mpo na biso. Kasi, tosengeli kobosana ata moke te ete Satana nde azali komeka kobebisa bosembo na biso epai na Yehova. Mokolo na mokolo oyo tozali kotikala sembo epai ya Tata na biso, tozali nde kopesa eyano na ntembe ya Motumoli. Ezali mpenza likambo ya esengo koyeba ete Yehova abosanaka te “mpisoli” oyo tobimisaka ntango tokutani na komekama! Yango ezali na motuya mingi na miso ya Yehova, mpe bosembo na biso esepelisaka mpenza motema na ye!—Nz. 56:8; Mas. 27:11.
3 Komekama ebongisaka biso: Minyoko ekoki kosalisa biso na komona esika oyo kondima na biso ezali makasi te to komona ezaleli moko ya mabe na bomoto na biso, na ndakisa, lolendo to kozala motema mɔtɔmɔtɔ. Na esika ya koluka kokima minyoko to kosilisa yango na banzela oyo eyokani te na Makomami, tosengeli nde kotya likebi na toli ya Liloba ya Nzambe oyo elobi ete, “tiká ezaleli ya koyika mpiko esala mosala na yango mobimba.” Mpo na nini? Mpamba te soki tozali koyika mpiko na bosembo mpenza na mimekano, tokokóma “bato oyo bakoki na makambo nyonso mpe babongi na makambo nyonso, kozangáká eloko te.” (Yak. 1:2-4) Ezaleli ya koyika mpiko ekoki kosalisa biso na kolona bizaleli mingi ya malamu mpenza, lokola kozala makambo makasimakasi te, koyeba komitya na esika ya basusu mpe motema mawa.—Lom. 12:15.
4 Motindo ya kondima oyo emekami: Ntango tozali koyika mpiko na mimekano, tozali kokóma na lolenge moko ya kondima oyo ezali na motuya monene na miso ya Nzambe. (1 Pet. 1:6, 7) Kondima ya ndenge wana ezali kobongisa biso na kotikala sembo na mimekano oyo tokoki kokutana na yango na mikolo ekoya. Lisusu, tokoki komiyoka ete Nzambe andimi mpe elikya na biso ekokóma makasi koleka, mpe tokomona ete elikya yango ekokokisama mpenza.—Lom. 5:3-5.
5 Mbano monene koleka oyo tokoki kozwa soki tozali na ezaleli ya koyika mpiko, emonisami polele na Yakobo 1:12, oyo elobi boye: “Esengo na moto oyo azali kokoba koyika mpiko na komekama, mpamba te na kokómáká moto oyo andimami akozwa motole ya bomoi.” Na bongo, tiká ete tókangama makasi na komipesa na biso epai na Yehova, mpe tózala na kondima ete akopambola mpenza “baoyo bazali kokoba kolinga ye.”