Batelá liso na yo alima
1. Kozala na liso alima elimboli nini, mpe mpo na nini yango ezali na ntina?
1 Na Lisolo oyo asalaki likoló ya Ngomba, Yesu amonisaki ete liso ya elilingi to liso ya elimo ekoki kozala malamu mpo na bomoi na biso mobimba. Alobaki ete: “Boye, soki liso na yo ezali alima, nzoto na yo mobimba ekongɛnga; kasi soki liso na yo ezali mabe, nzoto na yo mobimba ekozala molili.” (Mat. 6:22-23) Liso ya alima, ezali liso oyo etalaka kaka likambo moko—kosala mokano ya Nzambe—etikaka te mitungisi ya biloko ya mokili elongola likebi na yango. (Mat. 6:19-21, 24-33) Nini ekoki kosalisa biso tóbatela liso na biso alima?
2. Liloba ya Nzambe elendisaka biso tótalela biloko ya mokili ndenge nini?
2 Kolona ezaleli ya kosepela na oyo ozali na yango: Kokokisa bamposa ya libota na biso na ndenge oyo esengeli ezali etinda ya Biblia. (1 Tim. 5:8) Kasi, yango ezali kosɛnga te ete tomipesa kaka na koluka biloko ya malamu koleka to biloko oyo ezali kobima sika. (Mas. 27:20; 30:8, 9) Kutu, Makomami esɛngi biso nde tósepela na “bilei mpe na eloko ya kozipa nzoto,” biloko oyo moto asengeli na yango na bomoi na ye. (1 Tim. 6:8; Ebe. 13:5, 6) Kotosa toli oyo ekosalisa biso tótya liso na biso ntango nyonso na makambo ya malamu.
3. Ndenge nini tokoki koboya komimemisa bozito?
3 Tokomonisa ete tozali bato ya bwanya soki toboyi komimemisa bozito ya kokɔta banyongo ezangá ntina, mpe konduka to koluka biloko oyo ekosɛnga ete tózala na ntango mingi mpo na yango mpe tótyela yango likebi mingi. (1 Tim. 6:9, 10) Ndenge nini tokoki kosala yango? Soki tolingi kosala likambo moko, tóbondela mpo na yango mpe tótalela na bosembo nyonso soki yango ekobebisa te mikano na biso ya elimo. Zwá mokano ya kotya ntango nyonso makambo ya elimo na esika ya liboso na bomoi na yo.—Filp. 1:10; 4:6, 7.
4. Mpo na nini tosengeli koluka ndenge ya kolongola makambo ya mindɔndɔ na bomoi na biso?
4 Salá ete bomoi na yo ezala na mindɔndɔ te: Likambo mosusu oyo ekosalisa biso tóbendama te na mposa ya konduka biloko ya mokili, ezali ya koluka kolongola makambo ya mindɔndɔ na bomoi na biso. Ndeko mobali moko oyo amonaki ete libota na ye ekozala malamu ata soki bazali na biloko ebele ebele te alobaki boye: “Sikoyo, nakoki kosala mingi koleka mpo na bandeko na ngai na lisangá. Nandimi mpenza ete Yehova apambolaka basaleli na ye nyonso oyo batyaka losambo ya solo liboso ya bamposa na bango moko.” Yo mpe okoki koluka kolongola makambo ya mindɔndɔ na bomoi na yo mpo ozwa mapamboli mingi?
5. Mpo na nini ezali na ntina tósalaka ntango nyonso milende mpo na kobatela liso na biso alima?
5 Tosengeli ntango nyonso kosala milende mpo tókwea te na motambo ya Satana, ya mokili na ye oyo etondi na mposa ya konduka biloko, mpe ya nzoto na biso oyo ezangi kokoka. Na esika tótika miso na biso etalaka epai na epai, tiká tótya yango na kosala mokano ya Yehova mpe na elikya kitoko oyo tozali na yango ya kozwa bomoi ya seko.—Mas. 4:25; 2 Kol. 4:18.