Tókolisa mayele ya kotinda basusu na kokanisa
1. Lisolo nini ya Biblia tolingi kotalela, mpe mpo na nini?
1 Lisukulu oyo ntoma Paulo asalaki na sinagoga ya Antiokia ya Pisidia, oyo ezali na Misala 13:16-41, ezali ndakisa moko ya malamu na likambo etali kotinda basusu na kokanisa. Paulo azalaki kotalela bomoi mpe makanisi ya bato oyo bazalaki koyoka ye, mpe azalaki koyokanisa lolenge na ye ya kosakola nsango malamu na makambo yango. Ntango tozali kotalela lisolo oyo, tiká tóluka koyeba ndenge oyo tokoki kolanda ndakisa na ye na mosala na biso ya kosakola.
2. Liteya nini tokoki kozwa na ndenge oyo Paulo abandaki lisukulu na ye?
2 Tóluka makambo oyo biso ná bango tondimaka: Atako nsango ya Paulo etalelaki mpenzampenza mokumba oyo Yesu azali na yango na mokano ya Nzambe, Paulo abandaki mbala moko te na kolobela yango. Na esika ya kosala bongo, alobelaki nde makambo oyo ye ná bato oyo bazalaki koyoka ye bamesenaki na yango, oyo mingi na bango bazalaki Bayuda; alobelaki lisolo ya ekólo ya Bayuda. (Mis. 13:16-22) Ndenge moko, biso mpe tokoyebisa bato mingi nsango malamu soki tozali koluka makambo oyo biso na bango tondimaka. Yango ekoki kosɛnga tótuna bango mituna oyo ekotinda bango bábimisa makanisi na bango mpe tóyoka bango na likebi mpenza mpo na koyeba makambo oyo ezali na ntina mingi mpo na bango.
3. Mpo na nini ezalaki mpasi mpo bato oyo bazalaki koyoka Paulo bándima ete Yesu azali Masiya oyo alakamaki?
3 Ntango Paulo alobelaki lisolo ya ekólo ya Bayuda, akundwelaki bayoki na ye elaka oyo Nzambe apesaki ya kobimisa Mobikisi moko na libota ya Davidi. Nzokande, Bayuda mingi bazalaki kokanisa ete mobikisi yango akozala soda moko ya elombe oyo akolongola bango na boombo ya boyangeli ya Loma mpe akokómisa ekólo na bango ekólo oyo eleki bikólo nyonso. Kozanga ntembe, bayebaki ete bakonzi ya lingomba ya Bayuda oyo bazalaki na Yelusaleme baboyaki kondima Yesu, bakabaki ye epai ya Bakonzi ya Loma, mpe babomaki ye. Ndenge nini Paulo akoki kondimisa bango ete Yesu azalaki mpenza Masiya oyo alakamaki?
4. Mayele nini Paulo asalelaki mpo na kotinda bayuda oyo bazalaki koyoka ye na kokanisa?
4 Yokanisá lisolo na bamposa ya bato: Lokola Paulo ayebaki makanisi ya bato oyo bazalaki koyoka ye, asalelaki Makomami mpe makambo oyo bazalaki kondima mpo na kotinda bango bákanisa. Na ndakisa, amonisaki ete Yesu azali mwana ya Davidi mpe moto oyo Yoane Mobatisi alakisaki ye epai na bato, mpo bato nyonso bazalaki kondima ete Yoane azali mosakoli ya Nzambe. (Mis. 13:23-25) Paulo amonisaki ete lokola bakonzi ya mangomba baboyaki Yesu mpe bakatelaki ye etumbu ya liwa, “bakokisaki makambo oyo elobamaki na Basakoli.” (Mis. 13:26-28) Lisusu, alimbolaki bango ete ezalaki na batatoli oyo bamonaki na miso ndenge Yesu asekwaki, mpe abendaki likebi na bango na bavɛrsɛ oyo bamesanaki na yango, oyo ekokisamaki na lisekwa ya Yesu.—Mis. 13:29-37.
5. (a) Ndenge nini Paulo abongolaki ndenge ya kobanda lisolo ntango azalaki koloba na Bagrɛki? (b) Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Paulo ntango tozali kosakola na teritware na biso?
5 Kasi, ntango Paulo alobaki liboso ya Bagrɛki na Aleopaji na Atene, abandaki lisolo na ye ndenge mosusu. (Mis. 17:22-31) Kutu, asakolaki nsango kaka moko wana ya ntina epai ya Bayuda mpe epai ya Bagrɛki; na mabaku yango nyonso mibale milende na ye ebotaki mbuma mpenza. (Mis. 13:42, 43; 17:34) Ndenge moko mpe lelo oyo, tokozwa matomba na mosala na biso ya kosakola soki tozali koluka makambo oyo biso ná bato oyo bazali koyoka biso tondimaka mpe soki toyokanisi masolo na biso na bomoi mpe makanisi na bango.