Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 6/06 lok. 1
  • Mosala na biso ya kosakola emonisaka motema mawa

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mosala na biso ya kosakola emonisaka motema mawa
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Masolo mosusu
  • “Mawa monene ya Nzambe na biso”
    Pusaná penepene na Yehova
  • Mekolá motema mawa ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • “Ayokaki mawa”
    “Yaká, landá ngai”
  • Yehova azali koyangela na motema mawa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2006
km 6/06 lok. 1

Mosala na biso ya kosakola emonisaka motema mawa

1 Yesu atalaki ebele ya bato oyo bazalaki koyoka ye mpe amonaki ete “batikamaki mpamba mpe bapalanganisamaki lokola bampate ezangá mobateli.” (Mat. 9:36) Na boboto mpe na bolingo mpenza, Yesu ateyaki bango banzela ya Yehova, abɔndisaki bango, mpe na motema mawa mpenza, asalaki nyonso mpo na kokokisa bamposa na bango ya elimo. Soki tozali komanyola na misala ya Yesu, tokobanda kokanisa mpe kotalela makambo lokola ye, mpe ezaleli wana ya motema mawa ekomonana polele na mosala na biso ya kosakola.

2 Kanisá moke ndenge oyo Yesu azalaki kosalisa bato oyo bazalaki koya epai na ye, oyo bazalaki na mikakatano makasi. (Luka 5:12, 13; 8:43-48) Azalaki komitya na esika ya bato oyo bazalaki konyokwama. (Mko. 7:31-35) Azalaki koyeba mpasi ya basusu mpe koluka ndenge ya kosalisa bango. Azalaki kotala te ndenge oyo bazali komonana na miso. (Luka 7:36-40) Na ntembe te, Yesu amonisaki motema mawa ya Nzambe na biso na ndenge ya kokoka mpenza.

3 Azalaki koyokela bato mawa: Yesu azalaki kosakola te kaka mpo na kokokisa mokumba oyo Nzambe apesaki ye. Yesu azalaki mpenza koyokela bato mawa. (Mko. 6:34) Ndenge moko biso mpe lelo oyo, tozali kaka te kosakwela bato, kasi tozali koluka kobikisa bango. Na bongo, luká koyeba ntina oyo moto azali kosala likambo boye to boye. Mpo na nini asiliki to azali komitungisa. Ntango mosusu, azali komitungisa mpo na ndenge bakonzi ya mangomba bazali konyokola bato mpe kokosa bango. Soki tozali mpenza kotyela bato likebi, yango ekoki kotinda bango bándima nsango malamu.​—2 Kol. 6:4, 6.

4 Moto asepelaka mingi soki bamoniseli ye motema mawa. Ndakisa oyo elandi emonisi yango: Mwasi moko azalaki komitungisa mingi mpo akufelaki mwana na ye ya mwasi ya sanza misato. Ntango Batatoli mibale babɛtaki na porte na ye, andimaki kosolola na bango kaka mpo na koluka kokangisa bango monɔkɔ; yango wana alobelaki ndenge oyo Nzambe azali kokanga miso na bampasi ya bato. Nzokande, na nsima, mwasi yango alobaki boye: “Bayokaki ngai na boboto mpenza, mpe na nsuka ya lisolo na biso, namiyokaki malamu mpenza mpe nandimaki ete báya kotala ngai lisusu mokolo mosusu.” Osalaka makasi omonisa motema mawa epai ya moto nyonso oyo okutani na ye na mosala ya kosakola?

5 Soki tóloni ezaleli ya motema mawa, tokobɔndisa basusu malamumalamu, mpe tokopesa nkembo na Yehova, “Tata ya motema mawa mingi.”​—2 Kol. 1:3.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto